< Deuteronômio 19 >

1 Quando o Senhor teu Deus desarraigar as nações cuja terra te dará o Senhor teu Deus, e tu as possuires, e morares nas suas cidades e nas suas casas;
Tango Yawe, Nzambe na bino, akobebisa bikolo oyo Ye akopesa bino mokili na bango, tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka mpe na bandako na bango;
2 Três cidades separarás no meio da tua terra que te dará o Senhor teu Deus para a possuir.
bokotia pembeni mpo na bino, bingumba misato oyo ezali na kati-kati ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa.
3 Preparar-te-ás o caminho; e os termos da tua terra, que te fará possuir o Senhor teu Deus, partirás em três: e isto será para que todo o homicida se acolha ali.
Bokosala kuna banzela mpe bokokabola na biteni misato, mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto akoka kokima kuna.
4 E este é o caso tocante ao homicida, que se acolher ali, para que viva: aquele que por erro ferir o seu próximo, a quem não aborrecia de antes:
Tala makambo oyo ekoki kosala ete moto oyo abomi moninga na ye akoka kokima kuna mpo na kobikisa bomoi na ye: ezali tango abomi moninga na ye na nko te, moto oyo ayinaki te liboso.
5 Como aquele que entrar com o seu próximo no bosque, para cortar lenha, e, pondo força na sua mão com o machado para cortar a árvore, o ferro saltar do cabo e ferir o seu próximo, e morrer, o tal se acolherá a uma destas cidades, e viverá:
Ndakisa: moto oyo akei na zamba elongo na moninga na ye mpo na kokata banzete; bongo na tango atomboli loboko na ye mpo na kokata nzete, ebende ya epasola elongwe na esimbelo na yango, ekweyeli moninga wana mpe ebomi ye: moto wana akoki kokima kati na moko ya bingumba wana mpo na kobikisa bomoi na ye.
6 Para que o vingador do sangue não vá após o homicida, quando se esquentar o seu coração, e o alcançar, por ser comprido o caminho, e lhe tire a vida; porque não é culpado de morte, pois o não aborrecia de antes.
Soki bongo te, mobukanisi makila akolanda ye na kanda, akokanga ye mpe akoboma ye soki engumba ya kokimela ezali mosika mingi. Nzokande asengelaki kokufa te, pamba te ayinaki te liboso moto oyo asilaki koboma.
7 Portanto te dou ordem, dizendo: três cidades separarás.
Yango wana, napesi bino mitindo ete botia pembeni bingumba misato mpo na bino.
8 E, se o Senhor teu Deus dilatar os teus termos, como jurou a teus pais, e te der toda a terra que disse daria a teus pais
Soki Yawe, Nzambe na bino, ayeisi monene mokili na bino ndenge alakaki epai na bakoko na bino na nzela ya ndayi mpe apesi bino mokili mobimba ndenge alakaki bango,
9 (Quando guardares todos estes mandamentos, que hoje te ordeno, para faze-los, amando ao Senhor teu Deus e andando nos seus caminhos todos os dias), então acrescentarás outras três cidades além destas três.
mpo ete bosili kotosa mibeko nyonso oyo napesi bino lelo, mibeko ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kotambola na banzela na Ye, wana bokobakisa lisusu bingumba misato na bingumba misato ya liboso.
10 Para que o sangue inocente se não derrame no meio da tua terra, que o Senhor teu Deus te dá por herança, e haja sangue sobre ti
Bosala bongo mpo ete makila ya moto oyo ayebi likambo te esopana te kati na mokili na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, soki te bokomema ngambo ya makila.
11 Mas, havendo alguém que aborrece a seu próximo, e lhe arma ciladas, e se levanta contra ele, e o fere na vida, que morra, e se acolhe a alguma destas cidades,
Kasi soki moto ayini moninga na ye mpe atieli ye motambo, abundisi ye mpe abomi ye na nko, bongo akimi kati na moko ya bingumba wana,
12 Então os anciãos da sua cidade mandarão, e dali o tirarão, e o entregarão na mão do vingador do sangue, para que morra
bampaka ya engumba na ye bakolukisa ye, bakozongisa ye na engumba na ye mpe bakotika ye na maboko ya mobukanisi makila mpo ete aboma ye.
13 O teu olho o não poupará; antes tirarás o sangue inocente de Israel, para que bem te suceda.
Boyokela ye mawa te. Na nzela wana nde bokolongola kati na Isalaele mabe ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te, mpo ete bozala malamu.
14 Não mudes o limite do teu próximo, que limitaram os antigos na tua herança, que possuires na terra, que te dá o Senhor teu Deus para a possuires.
Okoki te kopusa mondelo ya moninga na yo, mondelo oyo bato oyo bayaki liboso na yo na mabele na yo bakataki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango.
15 Uma só testemunha contra ninguém se levantará por qualquer iniquidade, ou por qualquer pecado, seja qual for o pecado que pecasse: pela boca de duas testemunhas, ou pela boca de três testemunhas, se estabelecerá o negócio.
Litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kotalisa ete moto songolo abomaki moto to asalaki mabe. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.
16 Quando se levantar testemunha falsa contra alguém, para testificar contra ele acerca de desvio,
Soki motatoli ya lokuta atelemi mpo na kofunda moto mosusu ete moto wana abomi moto;
17 Então aqueles dois homens, que tiverem a demanda, se apresentarão perante o Senhor, diante dos sacerdotes e dos juízes que houver naqueles dias;
bato nyonso mibale oyo bazali kowelana bakotelema na miso ya Yawe liboso ya Banganga-Nzambe mpe basambisi oyo bazali kosala mosala kati na bino na tango wana.
18 E os juízes bem inquirirão; e eis que, sendo a testemunha falsa testemunha, que testificou falsidade contra seu irmão,
Basambisi basengeli koyekola likambo yango malamu penza. Mpe soki emonani ete motatoli akosi, apesi litatoli ya lokuta mpo na ndeko na ye;
19 Far-lhe-eis como cuidou fazer a seu irmão: e assim tirarás o mal do meio de ti.
bosala ye ndenge akanaki kosala ndeko na ye. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino.
20 Para que os que ficarem o ouçam e temam, e nunca mais tornem a fazer tal mal no meio de ti.
Tango bato oyo batikali bakoyoka yango, bakobanga mpe mabe ya lolenge oyo ekotikala lisusu kosalema te kati na bino.
21 O teu olho não poupará: vida por vida, olho por olho, dente por dente, mão por mão, pé por pé.
Boyokela moto ya ndenge wana mawa te! Mobeko ezali: bomoi mpo na bomoi, liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo.

< Deuteronômio 19 >