< Deuteronômio 16 >
1 Guarda o mês de Abib, e celebra a pascoa ao Senhor teu Deus: porque no mês de Abib o Senhor teu Deus te tirou do Egito, de noite.
Batela sanza ya Abibi mpe sepela feti ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezalaki na butu moko ya sanza yango nde Yawe abimisaki yo na Ejipito.
2 Então sacrificarás a pascoa ao Senhor teu Deus, ovelhas e vacas, no lugar que o Senhor escolher para ali fazer habitar o seu nome.
Tala biloko oyo okobonza lokola mbeka ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye: ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe ntaba ya mwasi.
3 Nela não comerás levedado: sete dias nela comerás pães asmos, pão de aflição (porquanto apressadamente saíste da terra do Egito), para que te lembres do dia da tua saída da terra do Egito, todos os dias da tua vida.
Okolia yango te na mapa oyo basangisa na levire. Kasi mikolo sambo, okolia mapa ezanga levire, mapa ya pasi, pamba te obimaki na Ejipito na lombangu. Okosalaka bongo na mikolo nyonso ya bomoi na yo mpo ete okanisaka mokolo oyo obimaki na Ejipito.
4 Levedado não aparecerá contigo por sete dias em todos os teus termos: também da carne que matares à tarde, no primeiro dia, nada ficará até à manhã
Tika ete levire emonana te epai na yo, kati na mokili na yo nyonso mikolo sambo. Kotika te ete nyama oyo babonzi na pokwa ya mokolo ya liboso etikala kino na tongo.
5 Não poderás sacrificar a pascoa em nenhuma das tuas portas que te dá o Senhor teu Deus;
Okoki te kobonza mbeka ya Pasika kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi yo.
6 Senão no lugar que escolher o Senhor teu Deus, para fazer habitar o seu nome, ali sacrificarás a pascoa à tarde, ao pôr do sol, ao tempo determinado da tua saída do Egito.
Ezali kaka na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona mpo na kotia Kombo na Ye nde bokobonza mbeka ya Pasika. Bokosala yango na pokwa, tango moyi elalaka, ngonga oyo obimaki na Ejipito.
7 Então a cozerás, e comerás no lugar que escolher o Senhor teu Deus; depois virás pela manhã, e irás às tuas tendas
Okolamba mpe okolia yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Bongo na tongo, okozonga na ndako na yo.
8 Seis dias comerás pães asmos e no sétimo dia é solenidade ao Senhor teu Deus: nenhuma obra farás.
Mikolo motoba, okolia mapa ezanga levire; bongo na mokolo ya sambo, okosala feti monene mpo na Yawe, Nzambe na yo; okosala mosala moko te.
9 Sete semanas contarás; desde que a foice começar na seara começarás a contar as sete semanas.
Okotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo okotia mbeli na elanga ya ble mpo na kobuka ble yango.
10 Depois celebrarás a festa das semanas ao Senhor teu Deus; o que deres será tributo voluntário da tua mão, segundo o Senhor teu Deus te tiver abençoado.
Okosala feti ya Baposo mpo na Yawe, Nzambe na yo; okobonzela Ye makabo wuta na mokano ya motema na yo moko kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.
11 E te alegrarás perante o Senhor teu Deus, tu, e teu filho, e tua filha, e o teu servo, e a tua serva, e o levita que está dentro das tuas portas, e o estrangeiro, e o órfão, e a viúva, que estão no meio de ti, no lugar que escolher o Senhor teu Deus para ali fazer habitar o seu nome.
Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye: yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.
12 E lembrar-te-ás de que foste servo no Egito: e guardarás estes estatutos, e os farás.
Kobosana te ete ozalaki mowumbu kati na Ejipito mpe salela malamu mitindo oyo.
13 A festa dos tabernáculos guardarás sete dias, quando colheres da tua eira e do teu lagar.
Mpo na oyo etali feti ya Bandako ya kapo, okosala yango mikolo sambo sima na yo kosangisa bambuma na yo ya ble mpe kokamola vino na yo.
14 E na tua festa te alegrarás, tu, e teu filho, e tua filha, e o teu servo, e a tua serva, e o levita, e o estrangeiro, e o órfão, e a viúva, que estão das tuas portas para dentro.
Okozala na esengo na feti yango: yo, bana na yo ya mibali mpe ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kati na bingumba na yo.
15 Sete dias celebrarás a festa ao Senhor teu Deus, no lugar que o Senhor escolher: porque o Senhor teu Deus te há de abençoar em toda a tua colheita, e em toda a obra das tuas mãos; pelo que te alegrarás certamente.
Mikolo sambo, okosala yango feti mpo na Yawe, Nzambe na yo, na bisika oyo Yawe akopona; pamba te Yawe, Nzambe na yo, akopambola milona na yo mpe misala nyonso ya maboko na yo; bongo esengo na yo ekozala mingi koleka.
16 Três vezes no ano todo o macho entre ti aparecerá perante o Senhor teu Deus, no lugar que escolher, na festa dos pães asmos, e na festa das semanas, e na festa dos tabernáculos; porém não aparecerá vazio perante o Senhor:
Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli kokende liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo Ye akopona: na feti ya Mapa ezanga levire, na feti ya Baposo, mpe na feti ya Bandako ya kapo. Moko te akokende liboso ya Yawe, maboko pamba:
17 Cada qual, conforme ao dom da sua mão, conforme à benção do Senhor teu Deus, que te tiver dado.
moko na moko kati na bino asengeli komema likabo kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi ye.
18 Juízes e oficiais porás em todas as tuas portas que o Senhor teu Deus te der entre as tuas tribos, para que julguem o povo com juízo de justiça.
Okopona basambisi mpe bakalaka kati na bikolo na yo nyonso, kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. Bakokata makambo ya bato na bosembo.
19 Não torcerás o juízo, não farás acepção de pessoas, nem tomarás peitas; porquanto a peita cega os olhos dos sábios, e perverte as palavras dos justos
Okobebisaka bosembo te, okoponaka bilongi te, okondimaka kanyaka te, pamba te ezipaka miso ya bato ya bwanya mpe ebebisaka maloba ya bato ya sembo.
20 A justiça, a justiça seguirás; para que vivas, e possuas a terra que te dará o Senhor teu Deus.
Okosalelaka bosembo mpe bosembo kaka, mpo ete owumela mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo.
21 Não plantarás nenhum bosque de árvores junto ao altar do Senhor teu Deus, que fizeres para ti,
Okotelemisa te likonzi ya nzambe mwasi Ashera pembeni ya etumbelo oyo okotonga mpo na Yawe, Nzambe na yo.
22 Nem levantarás estátua, a qual aborrece o Senhor teu Deus.
Okotelemisa te libanga ya bule, pamba te Yawe, Nzambe na yo, ayinaka nyonso wana.