< Marcos 1 >

1 Principio do Evangelho de Jesus Christo, Filho de Deus;
Tala ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe,
2 Como está escripto nos prophetas: Eis-que eu envio o meu anjo ante a tua face, o qual preparará o teu caminho diante de ti.
kolanda ndenge ekomama kati na mokanda ya mosakoli Ezayi: « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo, ye nde akobongisela Yo nzela.
3 Voz do que clama no deserto: preparae o caminho do Senhor, endireitae as suas veredas.
Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe: ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, bosembolela Ye banzela ya mike! › »
4 Estava João baptizando no deserto, e pregando o baptismo do arrependimento, para remissão dos peccados.
Boye Yoane azalaki kati na esobe mpe azalaki kosakola: « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino! »
5 E toda a provincia da Judea e os de Jerusalem iam ter com elle; e todos eram baptizados por elle no rio Jordão, confessando os seus peccados.
Bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazalaki kokende epai na ye; bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani.
6 E João andava vestido de pellos de camelo, e com um cinto de coiro em redor de seus lombos, e comia gafanhotos e mel silvestre.
Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi.
7 E prégava, dizendo: Após mim vem aquelle que é mais forte do que eu, ao qual não sou digno de, encurvando-me, desatar a correia das suas alparcas.
Tala makambo oyo azalaki koteya bato: « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye.
8 Eu, em verdade, tenho-vos baptizado com agua; elle, porém, vos baptizará com o Espirito Sancto.
Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi Ye akobatisa bino kati na Molimo Mosantu. »
9 E aconteceu n'aquelles dias que Jesus, tendo ido de Nazareth, da Galilea, foi baptizado por João, no Jordão.
Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti ya Galile, mpe Yoane abatisaki Ye na ebale Yordani.
10 E, logo que saiu da agua, viu os céus abertos, e o Espirito, que como pomba descia sobre elle.
Tango kaka abimaki na mayi, amonaki Likolo kofungwama mpe Molimo kokitela Ye lokola ebenga.
11 E ouviu-se uma voz dos céus, que dizia: Tu és o meu Filho amado em quem me comprazo.
Mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo: « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi! »
12 E logo o Espirito o impelliu para o deserto,
Mbala moko, Molimo amemaki Yesu kati na esobe
13 E esteve ali no deserto quarenta dias, tentado por Satanaz. E estava com as féras, e os anjos o serviam.
epai wapi avandaki mikolo tuku minei mpe Satana azalaki komeka Ye. Azalaki kuna elongo na banyama ya zamba, mpe ba-anjelu bazalaki kopesa Ye bilei.
14 E, depois que João foi entregue á prisão, veiu Jesus para a Galilea, prégando o Evangelho do reino de Deus,
Tango babwakaki Yoane kati na boloko, Yesu akendeki na Galile epai wapi azalaki koteya Sango Malamu ya Nzambe.
15 E dizendo: O tempo está cumprido, e o reino de Deus está proximo. Arrependei-vos, e crede no Evangelho.
Azalaki koloba: « Tango ekoki, mpe Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu. »
16 E, andando junto do mar da Galilea, viu Simão, e André, seu irmão, que lançavam a rede ao mar, porque eram pescadores.
Mokolo moko, wana Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galile, amonaki Simona mpe Andre, ndeko na ye. Bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi.
17 E Jesus lhes disse: Vinde após mim, e eu farei que sejaes pescadores de homens.
Yesu alobaki na bango: « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »
18 E, deixando logo as suas redes, o seguiram.
Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu.
19 E, passando d'ali um pouco mais adiante, viu Thiago, filho de Zebedeo, e João, seu irmão, que estavam no barco concertando as redes,
Wana Yesu akobaki kotambola, amonaki na mosika Jake, mwana mobali ya Zebede, oyo azalaki elongo na Yoane, ndeko na ye; bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango.
20 E logo os chamou. E elles, deixando o seu pae Zebedeo no barco com os jornaleiros, foram após elle.
Mbala moko, Yesu abengaki bango. Batikaki Zebede, tata na bango, kati na bwato elongo na basali na ye mpe balandaki Yesu.
21 E entraram em Capernaum, e, logo no sabbado, entrando na synagoga, ensinava.
Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na Kapernawumi. Na mokolo ya Saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya.
22 E maravilharam-se da sua doutrina, porque os ensinava como tendo auctoridade, e não como os escribas.
Bato bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te ateyaki na bokonzi oyo balakisi ya Mobeko bazangaki.
23 E estava na synagoga d'elles um homem com um espirito immundo, e exclamou, dizendo:
Kaka na tango yango, ezalaki na moto moko, kati na ndako ya mayangani, oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki koganga:
24 Ah! que temos comtigo, Jesus nazareno? Vieste destruir-nos? Bem sei quem és: o Sancto de Deus.
— Yesu ya Nazareti, olingi nini? Oyei nde koboma biso? Nayebi Yo malamu, ozali Motindami mpe Mosantu ya Nzambe!
25 E reprehendeu-o Jesus, dizendo: Cala-te, e sae d'elle.
Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo: — Kanga monoko na yo! Bima kati na moto oyo.
26 Então o espirito immundo, despedaçando-o, e clamando com grande voz, saiu d'elle.
Molimo mabe eningisaki moto yango makasi mpe ebimaki na koganga.
27 E todos se admiraram, a ponto de perguntarem entre si, dizendo: Que é isto? que nova doutrina é esta? pois até com auctoridade ordena aos espiritos immundos, e elles lhe obedecem!
Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana: — Oyo ezali lisusu likambo nini? Tala mateya ya sika oyo etondi na nguya! Azali kopesa mitindo ata na milimo mabe, mpe ezali kotosa Ye!
28 E logo correu a sua fama por toda a provincia da Galilea.
Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile.
29 E logo, saindo da synagoga, foram a casa de Simão e de André com Thiago e João.
Tango Yesu abimaki na ndako ya mayangani, akendeki elongo na Jake mpe Yoane na ndako ya Simona mpe Andre.
30 E a sogra de Simão estava deitada com febre; e logo lhe fallaram d'ella.
Nzokande, mama-bokilo ya Simona azalaki ya kolala mpo ete azalaki kobela fievele; mbala moko, bapesaki Ye sango.
31 Então, chegando-se a ella, tomou-a pela mão, e levantou-a: e logo a febre a deixou, e servia-os.
Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei.
32 E, tendo chegado a tarde, quando já se estava pondo o sol, trouxeram-lhe todos os que se achavam enfermos, e os endemoninhados.
Wana moyi elalaki mpe pokwa eyaki, bamemelaki Yesu babeli nyonso mpe bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe.
33 E toda a cidade se ajuntou á porta.
Bato nyonso ya engumba bayaki kosangana liboso ya ekuke ya ndako;
34 E curou muitos que se achavam enfermos de diversas enfermidades, e expulsou muitos demonios, porém não deixava fallar os demonios, porque o conheciam.
bongo Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na pasi ya ndenge na ndenge, abenganaki milimo mabe ebele mpe apekisaki yango koloba; pamba te milimo mabe eyebi nani oyo Ye azali.
35 E, levantando-se de manhã muito cedo, fazendo ainda escuro, saiu, e foi para um logar deserto, e ali orava.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela.
36 E seguiram-n'o Simão e os que com elle estavam.
Simona elongo na baninga na ye bakendeki koluka Yesu.
37 E, achando-o, lhe disseram: Todos te buscam.
Tango bamonaki Ye, balobaki na Ye: — Bato nyonso bazali koluka Yo.
38 E elle lhes disse: Vamos ás aldeias visinhas, para que eu ali tambem prégue; porque para isso vim.
Kasi Ye azongiselaki bango: — Tokende na esika mosusu, na bamboka ya zingazinga, mpo ete nateya mpe kuna, pamba te nayaki mpo na yango.
39 E prégava nas synagogas d'elles por toda a Galilea, e expulsava os demonios.
Boye, atambolaki na Galile mobimba; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani mpe kobengana milimo mabe.
40 E approximou-se d'elle um leproso, rogando-lhe, e pondo-se de joelhos diante d'elle, e dizendo-lhe: Se queres, podes limpar-me.
Moto moko na maba apusanaki pene na Yesu, afukamaki mpe asengaki na Yesu: — Soki olingi, komisa ngai peto.
41 E Jesus, movido de grande compaixão, estendeu a mão, e tocou-o, e disse-lhe: Quero; sê limpo.
Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki: — Nalingi ete ezala bongo, koma peto.
42 E, tendo elle dito isto, logo a lepra desappareceu, e ficou limpo.
Mbala moko, maba elongwaki na nzoto ya mobeli mpe akomaki peto.
43 E, ameaçando-o, logo o despediu de si,
Mbala moko, Yesu azongisaki ye mpe akebisaki ye:
44 E disse-lhe: Olha, não digas nada a ninguem; porém vae, mostra-te ao sacerdote, e offerece pela tua purificação o que Moysés determinou, para lhes servir de testemunho.
— Yoka Ngai malamu, koyebisa likambo oyo na moto moko te; kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa, mpo na kopetolama na yo, likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
45 Mas, tendo elle saido, começou a apregoar muitas coisas, e a divulgar o que acontecera; de sorte que Jesus já não podia entrar publicamente na cidade, mas conservava-se fóra em logares desertos: e de todas as partes iam ter com elle.
Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye.

< Marcos 1 >