< Jeremiasza 43 >
1 Gdy Jeremiasz przestał mówić do całego ludu te wszystkie słowa PANA, ich Boga, z którymi posłał go do nich PAN, ich Bóg, wszystkie te słowa;
Tango Jeremi asilisaki koloba na bato maloba nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, maloba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye koyebisa bango,
2 Azariasz, syn Hoszajasza, i Jochanan, syn Kareacha, oraz wszyscy pyszni mężczyźni powiedzieli do Jeremiasza: Kłamstwo mówisz! Nie posłał cię PAN, nasz Bóg, byś mówił: Nie idźcie do Egiptu, aby tam przebywać;
Azaria, mwana mobali ya Oshaya; Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bato oyo nyonso ya lolendo balobaki na Jeremi: — Ozali koloba makambo ya lokuta! Yawe, Nzambe na biso, atindi yo te koloba na biso ete tokende te kovanda na Ejipito.
3 Ale Baruch, syn Neriasza, podburza cię przeciwko nam, aby nas wydać w ręce Chaldejczyków, żeby nas pobili albo uprowadzili do niewoli do Babilonu.
Ezali Baruki, mwana mobali ya Neriya, moto atindi yo ete okosa biso, pamba te alingi ete towumela na se ya bokonzi ya bato ya Babiloni mpo ete baboma biso to bamema biso na bowumbu na Babiloni.
4 Dlatego Jochanan, syn Kareacha, oraz wszyscy dowódcy wojsk, a także cały lud nie słuchali głosu PANA, aby pozostać w ziemi Judy.
Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, bakonzi nyonso ya basoda mpe bato nyonso baboyaki kotosa Yawe oyo azali kosenga bango kovanda kati na mokili ya Yuda.
5 Lecz Jochanan, syn Kareacha, i wszyscy dowódcy wojsk zabrali całą resztkę Judy, która powróciła ze wszystkich narodów, do których została wygnana, by zamieszkać w ziemi Judy:
Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda bakamataki batikali nyonso ya Yuda, oyo bazongaki wuta na bikolo nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana, mpo na kovanda na mokili ya Yuda;
6 Mężczyzn, kobiety, dzieci, córki króla oraz każdą duszę, którą pozostawił Nebuzaradan, dowódca gwardii, z Gedaliaszem, synem Achikama, syna Szafana, z prorokiem Jeremiaszem i z Baruchem, synem Neriasza;
bamemaki lisusu mibali, basi, bana mpe bana basi ya mokonzi oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, apesaki na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani. Bamemaki mpe mosakoli Jeremi mpe Baruki, mwana mobali ya Neriya.
7 I poszli do ziemi Egiptu, bo nie usłuchali głosu PANA. I przybyli do Tachpanches.
Boye, mpo ete batosaki Yawe te, bakendeki na Ejipito mpe bakomaki kino na Dafine.
8 I w Tachpanches doszło do Jeremiasza słowo PANA mówiące:
Wuta na Dafine, Yawe alobaki na Jeremi:
9 Weź do rąk wielkie kamienie i ukryj je w glinie w piecu do wypalania cegieł, który jest przy wejściu do domu faraona w Tachpanches, na oczach mężczyzn Judy;
— Kamata mabanga minene mpe, na miso ya Bayuda, kunda yango na se ya mabele oyo basalelaka bikeko, mabele ya pavema oyo batonga na babiliki, na ekotelo ya ndako ya Faraon, na Dafine.
10 I powiedz im: Tak mówi PAN zastępów, Bóg Izraela: Oto poślę po Nabuchodonozora, króla Babilonu, mego sługę, i sprowadzę [go], i ustawię jego tron na tych kamieniach, które ukryłem; i rozciągnie swój baldachim na nich.
Loba na bango: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: ‹ Nakobengisa mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe nakotelemisa kiti na ye ya bokonzi na likolo ya mabanga oyo nasili kokunda na esika oyo; akotanda ndako na ye ya kapo ya bokonzi na likolo na yango.
11 Gdy przyjdzie, pobije ziemię Egiptu, a [oddani] na śmierć na śmierć [pójdą], oddani do niewoli do niewoli pójdą, i oddani pod miecz pod miecz pójdą.
Akoya kobundisa Ejipito mpe akoboma bato oyo basengeli kokufa, akomema na bowumbu ba-oyo basengeli kokende na bowumbu mpe akoboma na mopanga ba-oyo basengeli kokufa na mopanga.
12 Podłożę ogień w domach bogów Egiptu i on je spali, i uprowadzi. Przyozdobi się ziemią Egiptu, jak pasterz zakłada swoją szatę, i wyjdzie stamtąd w pokoju.
Akotia moto kati na batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito, akotumba batempelo yango mpe akomema banzambe na bango ya bikeko na bowumbu. Akolongola bato ya Ejipito ndenge mobateli bibwele alongolaka basili na kazaka na ye, mpe akobima na kimia.
13 Rozbije posągi w Betszemesz, które [jest] w ziemi Egiptu, oraz ogniem spali domy bogów egipskich.
Kuna, kati na tempelo ya Eliopolisi, akobuka makonzi ya bule mpe akobebisa na moto batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito. › »