< Ezechiela 25 >

1 I doszło do mnie słowo PANA mówiące:
Yawe alobaki na ngai:
2 Synu człowieczy, zwróć swoją twarz przeciwko Ammonitom i prorokuj przeciwko nim.
« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya bato ya Amoni mpe sakola mpo na kotelemela bango.
3 Powiedz Ammonitom: Słuchajcie słowa Pana BOGA. Tak mówi Pan BÓG: Ponieważ mówiłeś: Ha! na moją świątynię, gdy została zbezczeszczona, i na ziemię Izraela, gdy była spustoszona, i na dom Judy, gdy poszedł w niewolę;
Yebisa bato ya Amoni: ‹ Boyoka liloba na Nkolo Yawe! Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola bosepelaki tango babebisaki bosantu ya Esika na Ngai ya bule, tango mokili ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te mpe wana bato ya Yuda bakendeki na bowumbu,
4 Oto wydam cię w posiadanie narodom Wschodu. Pobudują swoje pałace u ciebie i urządzą u ciebie swoje mieszkania. Będą jeść twoje plony i będą pić twoje mleko.
nakokaba bino na maboko ya bato ya mikili ya este lokola libula, bakotonga milako na bango mpe bakotelemisa bandako na bango ya kapo kati na mokili na bino; bakolia bambuma na bino mpe bakomela miliki na bino.
5 I uczynię z Rabby legowisko dla wielbłądów, a z [miast] Ammonitów – legowisko dla trzód. I poznacie, że ja jestem PANEM.
Nakokomisa engumba ya Raba lopango ya koleisela bashamo, mpe nakokomisa mokili ya bato ya Amoni esika oyo bibwele epemelaka. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe.
6 Tak bowiem mówi Pan BÓG: Ponieważ klaskałeś rękami, tupałeś nogami i cieszyłeś się w sercu z całą pogardą wobec ziemi Izraela;
Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola ozalaki kobeta maboko mpe kotuta makolo na esengo mpo na kotiola mokili ya Isalaele,
7 Oto wyciągnę swą rękę przeciwko tobie i wydam cię na łup poganom; wytnę cię spośród narodów, wytracę cię z ziem i wyniszczę cię. I poznasz, że ja jestem PANEM.
nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo mpe nakokaba yo na maboko ya bikolo ya bapaya lokola bomengo ya bitumba; nakolongola yo na molongo ya bikolo, nakosilisa bato na yo mpe nakobebisa yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
8 Tak mówi Pan BÓG: Ponieważ Moab i Seir mówią: Oto dom Judy jest jak wszystkie inne narody;
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Lokola mokili ya Moabi mpe ya Seiri ezalaki koloba: ‘Tala, libota ya Yuda ekomi kaka lokola bikolo nyonso.’
9 Dlatego odsłonię zbocze Moabu od miast, od jego granicznych miast, [które są] ozdobą ziemi: Bet-Jeszimot, Baal-Meon i Kiriataim;
Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko: Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi;
10 Przed narodami Wschodu wraz z Ammonitami; dam je w posiadanie, aby nie wspominano Ammonitów między narodami.
nakokaba Moabi mpe bato ya Amoni na maboko ya Este lokola libula, mpo ete bakanisa lisusu bato ya Amoni te kati na molongo ya bikolo;
11 I dokonam sądów nad Moabem, i poznają, że ja jestem PANEM.
nakopesa Moabi etumbu. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. ›
12 Tak mówi Pan BÓG: Ponieważ Edom srodze się mścił nad domem Judy i ciężko zawinił, mszcząc się nad nim;
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Lokola bato ya Edomi bazongisaki mabe na mabe epai ya libota ya Yuda, mpe lokola bamemaki penza ngambo wana basalaki bongo;
13 Tak mówi Pan BÓG: Wyciągnę też swoją rękę na [ziemię] Edomu i wytracę z niej ludzi i zwierzęta, i zamienię ją w pustynię; od Temanu aż do Dedanu polegną od miecza.
mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela Edomi mpe nakoboma bato mpe banyama na yango; nakobebisa yango, mpe bakokufa na mopanga, kobanda na engumba Temani kino na engumba Dedani.
14 I dokonam swojej zemsty na Edomie przez ręce mego ludu Izraela, a postąpią z Edomem według mojej zapalczywości i według mojego gniewu. I poznają moją pomstę, mówi Pan BÓG.
Nakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe na nzela ya bato na Ngai, Isalaele: bakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe, kolanda kanda na Ngai mpe kotomboka na Ngai. Na bongo, bakoyeba solo ete Ngai, nazongisaka mabe na mabe, elobi Nkolo Yawe. ›
15 Tak mówi Pan BÓG: Ponieważ Filistyni się mścili i dokonali zemsty złośliwym sercem, aby prowadzić do zguby z powodu odwiecznej nieprzyjaźni;
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: ‹ Mpo ete bato ya Filisitia bazongisaki mabe na mabe, mpo ete bakokisaki makanisi mabe ya mitema na bango tango balukaki kobebisa mokili ya Yuda, mpo ete bayina bango wuta kala;
16 Dlatego tak mówi Pan BÓG: Oto wyciągnę swoją rękę na Filistynów, wykorzenię Keretytów i wytracę resztkę wybrzeża morskiego.
mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakomi pene ya kosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bato ya Filisitia; nakoboma bato ya Kereti mpe nakobebisa batikali oyo bazalaka pembeni ya ebale monene.
17 I dokonam na nich wielkiej pomsty, karząc [ich] w zapalczywości; i poznają, że ja jestem PANEM, gdy wywrę na nich swoją pomstę.
Nakozongisela bango mabe na mabe mpe nakopesa bango etumbu na nzela ya kanda na Ngai. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakozongisela bango mabe na mabe. › »

< Ezechiela 25 >