< Psalmów 114 >
1 Gdy wychodził Izrael z Egiptu i dom Jakóbowy z narodu obcego,
Tango Isalaele abimaki wuta na Ejipito, tango libota ya Jakobi elongwaki na ekolo ya bapaya,
2 Stał się Juda poświęceniem jego, Izrael panowaniem jego.
Yuda ekomaki Esika ya bule ya Yawe, mpe Isalaele ekomaki mabele na Ye.
3 To widząc morze, uciekło a Jordan wrócił się nazad.
Ebale monene emonaki yango mpe ekimaki, mayi ya Yordani ezongaki na sima,
4 Góry skakały jako barany, pogórki jako jagnięta.
bangomba epumbwaki lokola bameme, bangomba mike epumbwaki lokola bana ya ntaba.
5 Morze! cóż ci się stało, iżeś uciekło? O Jordanie! żeś się nazad wrócił?
Ebale monene, nini ezalaki kati na yo mpo ete okima? Yordani, mpo na nini ozongaki na sima?
6 Góry! żeście skakały jako barany? pagórki! jako jagnięta?
Bino bangomba, mpo nini bopumbwaki lokola bameme? Bongo bino bangomba mike, mpo na nini bopumbwaki lokola bana ya ntaba?
7 Przed obliczem Pańskiem zadrżała ziemia, przed obliczem Boga Jakóbowego.
Mokili, lenga liboso ya Yawe, liboso ya Nzambe ya Jakobi,
8 Który obraca opokę w jezioro wód, a krzemień w źródło wód.
oyo abongolaka libanga monene liziba, mpe libanga etima.