< Amosa 3 >

1 Słuchajcie słowa tego, które mówi Pan przeciwko wam, synowie Izraelscy! przeciwko wszystkiemu rodzajowi, którym wywiódł z ziemi Egipskiej, mówiąc:
Oh bana ya Isalaele, boyoka liloba oyo Yawe alobi na tina na bino, na tina na etuka nyonso oyo nabimisaki na Ejipito:
2 Tylkom was samych poznał ze wszystkich rodzajów ziemi; przetoż was nawiedzę dla wszystkich nieprawości waszych.
« Bozali etuka moko kaka oyo Ngai napona kati na bituka nyonso ya mabele; yango wana nakopesa bino etumbu mpo na mabe nyonso oyo bosali.
3 Izali dwa społem pójdą nie zgodziwszy się?
Boni, bato mibale bakoki solo kotambola nzela moko soki bayokani te?
4 Izali zaryczy lew w lesie, gdyby nie miał łupu? Izali wyda lwię głos swój z jaskini swojej, gdyby łapać nie miało?
Nkosi ekoki solo koganga na zamba soki emoni te nyama ya kolia? Mwana nkosi ekoki penza konguluma na esika oyo evandaka soki ekangi nyama te?
5 Izali ptak wpadnie w sidło na ziemi, gdyby sidła nie było? Izali będzie podniesione sidło z ziemi, gdyby nic nie uwięzło?
Ndeke ekoki solo kokangama na motambo oyo ezali na mabele soki ezangi eloko ya kolia? Motambo ekoki solo koningana soki ekangi eloko te?
6 Izali się ludzie nie lękają, gdy trąba w mieście zabrzmi? izali jest w mieście co złego, którego by Pan nie uczynił?
Boni, kelelo ya bitumba ekoki solo kobeta kati na engumba, bongo bato bazanga kobanga? Pasi ekoki solo koya na engumba soki Yawe atindi yango te?
7 Zaiste nic nie czyni panujący Pan, chyba żeby objawił tajemnice swoję sługom swoim, prorokom.
Solo, Nkolo Yawe asalaka eloko moko te soki alakisi mabongisi na Ye te epai ya basali na Ye, basakoli.
8 Lew ryczy, któżby się nie bał? Panujący Pan mówi, któżby nie prorokował?
Nkosi egangi; nani akobanga te? Nkolo Yawe alobi; nani akoki koboya kosakola?
9 Obwołajcie w pałacach w Azocie i w pałacach ziemi Egipskiej, a mówcie: Zbierzcie się na góry Samaryi, a obaczcie wielkie zamięszania w pośrodku jej, i ucisk cierpiących w niej;
Bosakola makambo oyo kati na bandako ya Asidodi mpe ya Ejipito: ‹ Bosangana na likolo ya bangomba ya Samari mpe botala ndenge nini mobulu mpe minyoko ezali kosalema kati na yango!
10 I że nie umieją czynić, co jest prawego, mówi Pan, zbierając na pałacach swoich skarby z zdzierstwa i z łupiestwa.
Bato na Ngai bayebi lisusu te kosala makambo na bosembo, › elobi Yawe, ‹ batondisi bandako na bango na bomengo ya bitumba mpe na biloko oyo babotoli na makasi. › »
11 Przetoż tak mówi panujący Pan: Oto nieprzyjaciel około tej ziemi, a ten odejmie od ciebie siłę twoję, i rozchwycone będą pałace twoje.
Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: « Monguna moko akozingela yo, akosukisa yo mpe akobotola na makasi biloko kati na bandako na yo, oyo batonga makasi. »
12 Tak mówi Pan: Jako wyrywa pasterz z paszczęki lwiej dwa gnaty albo kęs ucha, tak wyrwani będą synowie Izraelscy, którzy mieszkają w Samaryi na stronie łoża, i na stronie pościeli.
Tala liloba oyo Yawe alobi: « Ndenge mobateli bibwele alongolaka na monoko ya nkosi makolo mibale to songe ya litoyi ya meme, ndenge wana nde bana ya Isalaele bakobikisama, ba-oyo bavandaka na Samari, na basonge mpe na basuka ya bambeto na bango. »
13 Słuchajcie a oświadczajcie w domu Jakóbowym, mówi panujący Pan, Bóg zastępów.
« Boyoka makambo oyo mpe bokebisa ndako ya Jakobi, » elobi Yawe, Nzambe, Mokonzi ya mampinga.
14 Bo dnia onego, którego Izraela nawiedzę dla przestępstwa jego, nawiedzę też ołtarze w Betel, i odcięte będą rogi ołtarza, tak, że na ziemię upadną;
« Na mokolo oyo nakopesa Isalaele etumbu mpo na masumu na ye, nakobebisa bitumbelo ya Beteli, nakobuka maseke ya bitumbelo, mpe ekokweya na mabele.
15 I uderzę dom zimy o dom lata, a zginą domy z kości słoniowych, a domy zacne koniec wezmą, mówi Pan.
Nakokweyisa ndako ya tango ya malili makasi mpe ya tango ya molunge makasi; mpe bandako oyo batonga kitoko na pembe ya nzoko ekozala lisusu te, » elobi Yawe.

< Amosa 3 >