< II Kronik 29 >

1 A Ezechyjasz gdy począł królować, miał dwadzieścia i pięć lat; a dwadzieścia i dziewięć lat królował w Jeruzalemie. Imię matki jego Abi, córka Zacharyjaszowa.
Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abiya. » Abiya azalaki mwana mwasi ya Zakari.
2 A czynił co było dobrego przed oczami Pańskiemi, według wszystkiego, jako czynił Dawid ojciec jego.
Ezekiasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge Davidi, koko na ye, asalaki.
3 Ten roku pierwszego królowania swego, miesiąca pierwszego, otworzył drzwi domu Pańskiego, i poprawił je.
Na sanza ya liboso ya mobu ya liboso ya bokonzi na ye, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe mpe abongisaki yango.
4 I przywiódł kapłanów i Lewitów, a zgromadził ich na ulicę wschodnią.
Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, asangisaki bango na libanda ya ngambo ya este.
5 I rzekł do nich: Słuchajcie mię Lewitowie: Teraz się poświęćcie: poświęćcie też i dom Pana, Boga ojców waszych, i wyrzućcie plugastwa z świątnicy:
Alobaki na bango: — Boyoka ngai, Balevi! Bomibulisa sik’oyo mpe bopetola Tempelo ya Yawe, Nzambe ya bakoko na bino; bolongola mbindo nyonso kati na Esika ya bule.
6 Albowiem zgrzeszyli ojcowie nasi, i czynili złe przed oczyma Pana, Boga naszego, opuszczając go, i odwracając oblicza swoje od przybytku Pańskiego, a obracając się tyłem do niego.
Batata na biso bazangaki boyengebene, basalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe basundolaki Ye; batikaki Tempelo ya Yawe mpe bapesaki Ye mokongo.
7 Zamknęli też drzwi u przysionka, i pogasili lampy, a kadzidłem nie kadzili, ani całopalenia nie ofiarowali w świątnicy Bogu Izraelskiemu.
Bakangaki kutu bikuke ya ndako moke ya kokotela, babomaki minda mpe batikaki kobonzela Nzambe ya Isalaele malasi mpe bambeka ya kotumba kati na Esika ya bule.
8 Przetoż był gniew Pański nad Judą, i nad Jeruzalemem, a podał ich na rozproszenie, na spustoszenie, i na pośmiech, jako sami widzicie oczyma waszemi.
Boye, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi, akomisaki bango eloko ya kobanga, ya somo mpe ya kotiola, ndenge bokoki komona yango na miso na bino.
9 Bo oto polegli ojcowie nasi od miecza, a synowie nasi, i córki nasze, i żony nasze zawiedzione są w niewolę dla tego.
Yango wana batata na biso bakweyaki na mopanga; mpe yango wana lisusu bana na biso ya mibali, bana na biso ya basi mpe basi na biso bazali kati na bowumbu.
10 Teraz tedy umyśliłem uczynić przymierze z Panem, Bogiem Izraelskim, aby odwrócił od nas gniew popędliwości swojej.
Sik’oyo, nazwi mokano ya kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpo ete abwaka kanda makasi na Ye mosika na biso.
11 Synowie moi! nie bądźcież już niedbałymi; bo was Pan obrał, abyście stojąc przed nim służyli mu, a byli sługami jego, i kadzili mu.
Sik’oyo, bana na ngai ya mibali, bobenda nzoto te, pamba te Yawe aponi bino mpo ete botelema liboso na Ye, bosala mosala na Ye, bosala losambo mpe botumbela Ye mbeka ya malasi mpo na lokumu na Ye.
12 Tedy powstali Lewitowie: Machat, syn Amasajowy, i Joel, syn Azaryjaszowy, z synów Kaatowych, a z synów Merarego: Cys, syn Abdy, i Azaryjasz, syn Jehaleelowy; a z Giersończyków: Joach, syn Zamy, i Eden, syn Joachowy:
Bongo, Balevi oyo bakotaki na mosala: Na molongo ya bato ya Keati: Maati, mwana mobali ya Amasayi; mpe Joeli, mwana mobali ya Azaria; na molongo ya Merari: Kishi, mwana mobali ya Abidi, mpe Azaria, mwana mobali ya Yealeyeli; na molongo ya bato ya Gerishoni: Yoa, mwana mobali ya Zima; mpe Edeni, mwana mobali ya Yoa;
13 A z synów Elisafanowych: Symry i Jehijel: a z synów Asafowych: Zacharyjasz i Matanijasz;
na molongo ya Elitsafani: Shimiri mpe Yeyeli; na molongo ya Azafi: Zakari mpe Matania;
14 A z synów Hemanowych: Jehijel i Symchy; a z synów Jedytunowych: Semejasz i Uzyjel.
na molongo ya Emani: Yeyeli mpe Shimei; mpe na molongo ya Yedutuni: Shemaya mpe Uzieli.
15 I zgromadzili braci swych, którzy poświęciwszy się przyszli według rozkazania królewskiego, i rozkazania Pańskiego, aby wyczyścili dom Pański.
Tango basangisaki bandeko na bango mpe bamibulisaki, bakotaki mpo na kopetola Tempelo ya Yawe, ndenge mokonzi apesaki mitindo mpe kolanda Liloba na Yawe.
16 A wszedłszy kapłani do domu Pańskiego, aby go oczyścili, wynieśli wszystkie plugastwa, które znaleźli w kościele Pańskim, do sieni domu Pańskiego; a Lewitowie zabrawszy to wynieśli precz do potoku Cedron.
Banganga-Nzambe bakotaki kati na Tempelo ya Yawe mpo na kopetola yango: babwakaki kati na lopango ya Tempelo ya Yawe biloko nyonso ya mbindo oyo bamonaki kati na yango. Balevi balokotaki mpe bamemaki yango kino na lubwaku ya Sedron.
17 I poczęli pierwszego dnia miesiąca pierwszego poświęcać, a dnia ósmego tego miesiąca weszli do przysionku Pańskiego i poświęcali dom Pański przez ośm dni, a dnia szesnastego, miesiąca pierwszego, dokończyli.
Babandaki mosala yango ya kopetola na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe, na mokolo ya mwambe ya sanza yango, bakomaki na ndako moke ya kokotela na Tempelo. Basalaki lisusu mikolo mwambe mpo na kokoba kobulisa Tempelo ya Yawe mpe basukisaki mosala yango na mokolo ya zomi na motoba ya sanza ya liboso.
18 Potem weszli do króla Ezechyjasza, i rzekli: Oczyściliśmy wszystek dom Pański, i ołtarz całopalenia, i wszystkie naczynia jego, i stół pokładny i wszystkie naczynia jego;
Bakendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe balobaki: — Topetoli Tempelo mobimba ya Yawe, etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso, mpe mesa oyo batiaka mapa elongo na bisalelo na yango nyonso.
19 Także wszystko naczynie, które był odrzucił król Achaz za królowania swego, gdy grzeszył, zgotowaliśmy i poświęcili; a oto są przed ołtarzem Pańskim.
Tobongisi mpe tobulisi bisalelo nyonso oyo mokonzi Akazi, na kozanga boyengebene na ye na miso ya Yawe, abebisaki bosantu na yango tango azalaki mokonzi. Bisalelo yango ekomi sik’oyo liboso ya etumbelo.
20 A tak wstawszy rano król Ezechyjasz zgromadził przedniejszych miasta, i szedł do domu Pańskiego.
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, mokonzi Ezekiasi asangisaki bakambi ya engumba mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe.
21 I przywiedziono mu cielców siedm, i baranów siedm, i baranków siedm, i kozłów siedm, na ofiarę za grzech, za królestwo, i za świątnicę, i za Judę, a rozkazał synom Aaronowym, kapłanom, aby ofiarowali na ołtarzu Pańskim.
Bamemaki bangombe sambo ya mibali, bameme sambo ya mibali, bana meme sambo ya mibali mpe bantaba sambo ya mibali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na mokili, mpo na Esika ya bule mpe mpo na Yuda. Mokonzi apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, ete babonza bambeka yango na etumbelo ya Yawe.
22 A tak pobili one woły, a kapłani wziąwszy krew ich kropili po ołtarzu; pobili też i barany, a kropili krwią ich po ołtarzu; pobili też i baranki, a kropili krwią ich po ołtarzu.
Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bangombe, bazwaki makila na yango mpe babwakaki yango na etumbelo, bakataki bakingo ya bameme ya mibali mpe babwakaki makila na yango na etumbelo, bakataki bakingo ya bana meme mpe babwakaki makila na yango na etumbelo.
23 Przywiedli kozły też na ofiarę za grzech przed króla i przed zgromadzenie, którzy włożyli ręce swoje na nie.
Bongo bamemaki bantaba ya mibali oyo ebongisamaki mpo na mbeka mpo na masumu, liboso ya mokonzi mpe lisanga, mpe batiaki yango maboko.
24 I pobili je kapłani, i oczyścili krwią ich ołtarz na oczyszczenie wszystkiego Izraela; albowiem za wszystkiego Izraela rozkazał król ofiarować całopalenie i ofiarę za grzech.
Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bantaba mpe babwakaki makila na yango na etumbelo lokola mbeka mpo na masumu, mpe mpo na kokokisa mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele mobimba; pamba te mokonzi apesaki mitindo ete babonza mpo na Isalaele mobimba bambeka ya kotumba mpe bambeka mpo na masumu.
25 Postanowił też i Lewitów w domu Pańskim z cymbałami, i z cytrami, i z harfami, według rozkazania Dawidowego, i Gada, widzącego królewskiego, i Natana proroka; bo to było rozkazanie Pańskie przez proroków jego.
Mokonzi atiaki Balevi kati na Tempelo ya Yawe elongo na bangongi, makembe mpe mandanda kolanda mitindo ya Davidi, ya Gadi, momoni makambo ya mokonzi; mpe ya mosakoli Natan; pamba te ezalaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya basakoli na Ye.
26 A tak stali Lewitowie z instrumentami Dawidowemi, i kapłani z trąbami.
Balevi babongamaki elongo na bibetelo mindule ya Davidi, mpe Banganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango.
27 I rozkazał Ezechyjasz, aby ofiarowali całopalenia na ołtarzu; a gdy się zaczęło całopalenie, poczęło się śpiewanie Panu, i trąbienie, i granie na instrumentach Dawida, króla Izraelskiego.
Ezekiasi apesaki mitindo ete babonza mbeka ya kotumba na etumbelo; mpe tango babandaki kobonza mbeka ya kotumba, babandaki mpe koyemba mpo na kokumisa Yawe na bakelelo mpe bibetelo mindule ya Davidi, mokonzi ya Isalaele.
28 Tedy wszystko zgromadzenie kłaniało się, a śpiewacy śpiewali, i trębacze trąbili; co wszystko trwało, póki się nie dokończyło całopalenie.
Lisanga mobimba egumbamaki wana; bayembi bazalaki koyemba, mpe babeti kelelo bazalaki kobeta yango; nyonso ekobaki kino tango basilisaki kobonza mbeka ya kotumba.
29 A gdy się skończyło całopalenie, poklęknęli król i wszyscy, którzy z nim byli, i modlili się.
Tango basilisaki kobonza mbeka ya kotumba, mokonzi mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bakitisaki bilongi na bango mpe bagumbamaki kino na se.
30 Tedy rozkazał król Ezechyjasz i książęta Lewitom, aby chwalili Pana słowy Dawidowemi, i Asafa, widzącego; chwalili z weselem wielkiem, a kłaniając się modlili się.
Mokonzi Ezekiasi elongo na bakambi na ye bapesaki mitindo na Balevi ete bakumisa Yawe na banzembo ya Davidi mpe ya mosakoli Azafi. Boye, bayembaki banzembo ya kokumisa na esengo, bagumbaki mito na bango mpe bagumbamaki kino na se.
31 Zatem rzekł Ezechyjasz, mówiąc: Terazeście poświęcili ręce wasze Panu; przystąpcież, a przywiedźcie ofiary spokojne, i ofiary chwały do domu Pańskiego. Przetoż przywiodło ono zgromadzenie ofiary spokojne i ofiary chwały, i każdy ochotnego serca przywiódł ofiary na całopalenie.
Ezekiasi alobaki: — Awa bomibulisi sik’oyo mpo na Yawe, bopusana, bomema na Tempelo ya Yawe bambeka mpe makabo ya kozongisa matondi. Lisanga ememaki bambeka mpe makabo ya kozongisa matondi, mpe bato ya motema ya kokaba bamemaki bambeka ya kotumba.
32 I była liczba ofiar na całopalenie, które przywiodło zgromadzenie, wołów siedmdziesiąt, baranów sto, baranków dwieście, wszystko to na całopalenie Panu.
Tala motango ya bambeka ya kotumba oyo lisanga ebonzaki: bangombe ya mibali tuku sambo, bameme ya mibali nkama moko, bana meme nkama mibale: nyonso lokola bambeka ya kotumba mpo na Yawe.
33 Innych też rzeczy poświęconych było: wołów sześć set, i owiec trzy tysiące,
Babulisaki lisusu lokola bambeka bangombe nkama motoba, bameme mpe bantaba nkoto misato.
34 Lecz kapłanów mało było, tak, iż nie mogli nadążyć odzierać ze skóry wszystkich ofiar na całopalenie: przetoż im pomagali Lewitowie, bracia ich, póki nie dokończyli onej pracy, i póki się nie poświęcili drudzy kapłani; albowiem Lewitowie byli och otniejsi, aby się poświęcili, niż kapłani.
Kasi lokola Banganga-Nzambe bazalaki mingi te mpo na kokata na biteni bambeka nyonso ya kotumba, bandeko na bango, Balevi, basungaki bango kino mosala nyonso esilaki mpe kino Banganga-Nzambe mosusu bamibulisaki; pamba te Balevi balekaki Banganga-Nzambe na makanisi ya komibulisa.
35 Nadto i całopalenia było bardzo wiele z tłustościami spokojnych ofiar, i z mokremi ofiarami na całopalenie. A tak wygotowana była służba domu Pańskiego.
Longola bambeka ya kotumba oyo ezalaki mingi, esengelaki lisusu kotumba mafuta ya bambeka ya boyokani mpe kosopa bambeka ya masanga mpo na bambeka ya kotumba. Ezali boye nde babongisaki lisusu misala ya Tempelo ya Yawe.
36 I weselił się Ezechyjasz i wszystek lud z tego, co Bóg ludowi przygotował; bo się ta rzecz była z prędka stała.
Ezekiasi mpe bato nyonso basepelaki na ndenge Nzambe akokisaki makambo mpo na bato na Ye, pamba te nyonso esalemaki na lombangu.

< II Kronik 29 >