< Rzymian 15 >

1 Zatem my, utwierdzeni w wierze, mamy obowiązek wspierać słabych w ich zmaganiach, nie zaś myśleć tylko o sobie.
Biso oyo tolenda na kondima, tosengeli kondima bolembu ya bato oyo balenda te na kondima mpe koboya komisepelisa kaka biso moko.
2 Każdy powinien dbać o dobro innych i wzmacniać ich duchowo.
Tika ete moto nyonso kati na biso aluka kosepelisa moninga na ye mpo na bolamu mpe bolendisami na ye!
3 Przecież i Chrystus nie dbał tylko o siebie. Czytamy bowiem: „Zniewagi tych, którzy Ciebie znieważają, spadły również na Mnie”.
Pamba te ezala Klisto, alukaki te komisepelisa Ye moko; kasi alobaki, kolanda ndenge ekomama, « mafinga ya bato oyo bafingaki yo ekweyaki epai na ngai. »
4 To, co od dawna zawarte jest w Piśmie, zostało zapisane również ze względu na nas, abyśmy ucząc się cierpliwości i czerpiąc zachętę z Pisma, wzmacniali nadzieję na przyszłość.
Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.
5 Niech więc Bóg—źródło cierpliwości i zachęty—pomoże wam traktować siebie nawzajem tak, jak to robił Chrystus.
Tika ete Nzambe oyo apesaka bato molende mpe mpiko apesa bino makanisi moko, bamoko elongo na bamosusu, kolanda mokano ya Yesu-Klisto,
6 Wtedy wszyscy jednomyślnie będziemy wielbić Boga—Ojca naszego Pana, Jezusa Chrystusa.
mpo ete bopesa nkembo na Nzambe, Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na makanisi moko mpe na monoko moko.
7 Okazujcie sobie akceptację, tak jak Chrystus okazał ją wam, oddając przez to chwałę Bogu.
Yango wana, boyambanaka, bamoko na bamosusu, ndenge Klisto ayambaki bino mpo na nkembo na Nzambe.
8 On przyszedł do Izraela jako sługa, aby potwierdzić, że Bóg jest wierny i dotrzymuje obietnic danych przodkom.
Pamba te nazali koloba na bino solo: Klisto akomaki Mosali ya Bayuda mpo na kokokisa bilaka oyo Nzambe apesaki epai ya bakoko na bango mpe kolakisa ete Nzambe azali Moyengebene.
9 Przyszedł również po to, aby poganie wielbili Boga za okazaną im miłość. Pismo mówi bowiem: „Z tego powodu poganie będą Cię wielbić i śpiewać pieśni na cześć Twojego imienia”.
Ayaki mpe mpo ete Bapagano bapesa Nzambe nkembo mpo na mawa na Ye, kolanda ndenge ekomama: « Yango wana nakokumisa Yo kati na Bapagano, mpe nakoyemba nzembo mpo na lokumu ya Kombo na Yo. »
10 W innym zaś miejscu napisano: „Radujcie się poganie razem z Jego narodem”,
Alobaki lisusu: « Bapagano, bosepela elongo na bato na Ye. »
11 a także: „Chwalcie Pana, wszystkie narody, uwielbiajcie Go wszystkie ludy”.
Mpe lisusu: « Bino bato ya bikolo nyonso, bokumisa Nkolo! Tika ete bato ya mabota nyonso bakumisa Ye! »
12 Prorok Izajasz powiedział: „Przyjdzie potomek Jessego, który będzie królem nad poganami. W Nim poganie pokładać będą nadzieję”.
Ezayi mpe alobaki: « Moto moko akobima wuta na libota ya Izayi, akotelema mpo na kokonza bikolo, mpe Bapagano bakotiela Ye elikya. »
13 Niech więc Bóg, który obdarza ludzi nadzieją, napełnia radością i pokojem wszystkich was, którzy Mu wierzycie. Niech daruje wam również nadzieję płynącą z mocy Ducha Świętego.
Tika ete Nzambe oyo apesaka elikya atondisa bino na esengo nyonso mpe na kimia nyonso kati na kondima, mpo ete botonda na elikya na nzela ya nguya ya Molimo Mosantu.
14 Przyjaciele, jestem przekonany, że macie w sobie życzliwość dla innych. Macie też niezbędną wiedzę i możecie pomagać sobie nawzajem.
Bandeko na ngai, nandimisami solo ete botondi na boboto, na boyebi nyonso mpe na makoki ya kolendisana, bamoko na bamosusu.
15 Nie wahałem się jednak zwrócić waszej uwagi na tych kilka spraw, bo wiem, że wystarczy tylko wam o tym przypomnieć. Dzięki Bożej łasce
Nzokande, mpo na kolamusa makanisi na bino, nakomelaki bino, na molende nyonso, ndambo ya makambo kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai
16 jestem bowiem sługą Jezusa Chrystusa posłanym do pogan, aby głosić im dobrą nowinę i aby Duch Święty przemienił ich w wonną ofiarę dla Boga.
ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.
17 Jestem dumny z tego, czego dokonał przeze mnie Jezus Chrystus w tej Bożej służbie
Yango wana namikumisaka kati na Yesu-Klisto, na mosala oyo nasalaka mpo na Nzambe.
18 i nie ośmielę się mówić o czymkolwiek innym. Pragnę tylko opowiadać o tym, czego Bóg dokonał przeze mnie, prowadząc pogan do posłuszeństwa Mu. A działał On przez moje słowa i czyny
Pamba te soki nakoki koloba, nakoloba kaka mpo na makambo oyo Klisto asalaki na nzela na ngai, mpo na komema Bapagano na kotosa Nzambe. Asalaki yango na nzela ya makambo oyo nalobaki mpe nasalaki
19 oraz przez cudowne znaki dokonywane mocą Ducha Świętego. W ten sposób rozniosłem dobrą nowinę o Chrystusie od Jerozolimy aż po Ilirię.
na nzela ya nguya Molimo na Nzambe, oyo emonisami kati na bikamwa mpe bilembo. Boye, wuta na Yelusalemi, na bazingazinga nyonso kino na Iliri, nasakolaki Sango Malamu ya Klisto na mobimba na yango.
20 A zawsze zależało mi na tym, aby głosić Chrystusa tam, gdzie wieść o Nim jeszcze nie dotarła. Nie chciałem bowiem wchodzić na teren czyjejś służby,
Pamba te nazwaki mokano ya koteya Sango Malamu na bisika oyo Kombo ya Klisto eyebanaki nanu te, mpo ete natonga na likolo ya moboko ya moto mosusu te,
21 ale pragnąłem działać według słów Pisma: „Zobaczą Go i poznają ci, którzy Go nigdy nie widzieli ani nigdy o Nim nie słyszeli”.
kasi kolanda ndenge ekomama: « Bato oyo babetela bango nanu lisolo te na tina na Ye bakomona, mpe ba-oyo bayoka nanu sango na Ye te bakososola. »
22 Teraz wiecie już, dlaczego jeszcze nigdy was nie odwiedziłem.
Yango nde ezalaki mbala mingi kokanga ngai nzela ya koya epai na bino.
23 Ale skończyłem już tutaj moją pracę i nareszcie, po tak wielu latach, gotów jestem do was przyjechać.
Kasi sik’oyo, nazali lisusu na esika te ya kosala mosala kati na etuka oyo; bongo lokola wuta kala, nazalaka na posa makasi ya koya epai na bino,
24 Wybieram się bowiem do Hiszpanii i chciałbym po drodze was zobaczyć. Mam też nadzieję, że gdy się wami nacieszę, wyprawicie mnie w dalszą podróż.
nazali kosala mabongisi ya kokokisa yango tango nakokende na Espane. Nazali na elikya ete, wana nakolekela epai na bino, nakomona bino mpe nakozwa lisungi na bino mpo na kokende kuna, sima na ngai kosepela kovanda elongo na bino ata na mwa tango moke.
25 Teraz udaję się do Jerozolimy z pomocą materialną dla wierzących.
Nzokande sik’oyo, nazali kokende na Yelusalemi mpo na komemela basantu lisungi.
26 Kościoły Macedonii i Grecji postanowiły bowiem wesprzeć tamtejszych wierzących, którzy są w potrzebie.
Pamba te Mangomba ya Masedwane mpe ya Akayi ezwaki mokano ya kosangisa biloko mpo na kosunga babola oyo bazali kati na basantu ya Yelusalemi.
27 Zapragnęły tego, bo mają wobec nich dług wdzięczności: skoro jako poganie mają udział w ich dobrach duchowych, powinni zadbać o ich potrzeby materialne.
Solo, bango moko nde bazwaki mokano ya kosala bongo mpo ete ezalaki lokola niongo epai na bango. Pamba te soki Bayuda bakabolaki makabo ya molimo elongo na bato ya bikolo ya bapaya, bango mpe basengeli kokabola biloko na bango elongo na Bayuda.
28 Gdy tylko przekażę ich dar i doprowadzę sprawę do końca, odwiedzę was w drodze do Hiszpanii.
Soki nasilisi mosala oyo mpe napesi bango lisungi yango, nakolekela epai na bino tango nakokende na Espane.
29 A jestem przekonany, że przyjadę do was z błogosławieństwem Chrystusa.
Nayebi ete tango nakoya epai na bino, nakoya na mapamboli mingi ya Klisto.
30 Bardzo was jednak proszę—ze względu na naszego Pana, Jezusa Chrystusa, i na miłość Ducha Świętego—abyście udzielili mi pomocy modląc się za mnie do Boga.
Kasi nabondeli bino bandeko, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe ya bolingo ya Molimo: Bobundaka elongo na ngai kati na mabondeli oyo bosalaka epai ya Nzambe na tina na ngai
31 Proście Go, aby uchronił mnie przed wrogami w Judei i aby wierzący w Jerozolimie życzliwie przyjęli ofiarowaną im pomoc.
mpo ete nakangolama na maboko ya bato oyo bandimaka te kati na Yuda, mpe mpo ete basantu ya Yelusalemi bayamba malamu lisungi oyo nakomemela bango.
32 Módlcie się również o to, abym—zgodnie z wolą Pana—przybył do was z radością w sercu i abyśmy mogli nawzajem się pokrzepić.
Na bongo nde nakolonga kokoma epai na bino na esengo; mpe soki Nzambe akolinga, nakopema mwa moke elongo na bino.
33 Niech Bóg, który obdarza ludzi pokojem, będzie z wami wszystkimi. Amen!
Tika ete Nzambe ya kimia azala elongo na bino nyonso! Amen!

< Rzymian 15 >