< مزامیر 45 >

برای رهبر سرایندگان: در مایۀ «سوسنها». قصیدۀ پسران قورَح. ترانۀ عاشقانه. در حالی که این سرود را برای پادشاه می‌سرایم، کلماتی زیبا فکرم را پر می‌سازند. همچون قلمی در دست شاعری توانا، زبانم آماده سرودن است. 1
Nzembo ya bolingo oyo bana ya Kore bayembaki. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na lindanda oyo babengaka Lisi. Motema na ngai etondi na maloba kitoko. Namilobeli: Nakotatola misala na ngai mpo na mokonzi. Tika ete lolemo na ngai ezala lokola ekomeli ya mokomi ya mayele.
تو از همهٔ انسانها زیباتری؛ از لبانت نعمت و فیض می‌چکد. خداوند تو را تا ابد متبارک ساخته است. 2
Oleki bato nyonso na kitoko, mpe bibebu na Yo ebimisaka ngolu; yango wana Nzambe apambola Yo mpo na libela.
ای دلاور، شمشیر جلال و جبروتت را بر کمر خویش ببند و شکوهمندانه بر اسب خویش سوار شو 3
Elombe ya bitumba, kanga mopanga na loketo na Yo! Lata lokumu mpe kongenga.
تا از حقیقت و عدالت و تواضع دفاع کنی. قدرت بازوی تو پیروزی بزرگی را نصیب تو می‌گرداند. 4
Kati na kongenga na Yo, zala molongi, mata na shar na Yo, telema mpo na solo, mpo na komikitisa, mpe mpo na bosembo; tika ete loboko na Yo ya mobali esala misala minene.
تیرهای تیز تو به قلب دشمنانت فرو می‌روند؛ و قومها در برابر تو سقوط می‌کنند. 5
Tika ete makonga na Yo ya minu etobola mitema ya banguna ya mokonzi; tika ete bikolo ekweya na se ya matambe na Yo.
ای خدا، سلطنت تو تا ابد برقرار است؛ اساس حکومت تو، بر عدل و راستی است. 6
Nzambe, Kiti ya Bokonzi na Yo ekowumela seko na seko; lingenda ya bokonzi na Yo ezali mpo na bosembo.
عدالت را دوست داری و از شرارت بیزاری؛ بنابراین، خدا، یعنی خدای تو، تو را بیش از هر کس دیگر به روغن شادمانی مسح کرده است. 7
Olingaka bosembo mpe oyinaka mabe; yango wana, oh Nzambe, Nzambe na Yo apakoli Yo mafuta ya esengo, asepeli na Yo koleka baninga na Yo.
همهٔ لباسهایت به بوی خوش مُر و عود و سلیخه آمیخته است؛ در کاخ عاج تو، نوای موسیقی گوشهایت را نوازش می‌دهد. 8
Bilamba na Yo nyonso ezali kolumba solo kitoko ya malasi ya mire, ya aloe mpe ya kaneli; wuta na bandako minene oyo ebongisama na pembe ya nzoko, mandanda ezali kosepelisa Yo.
ندیمه‌های دربارت، شاهزادگانند؛ در سمت راست تو، ملکه با لباس مزین به طلای خالص، ایستاده است. 9
Bana basi ya bakonzi bazali kati na basi ya lokumu; mwasi ya mokonzi azali na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, alati biloko ya wolo ya Ofiri.
ای دختر، به نصیحت من گوش کن. قوم و خویش و زادگاه خود را فراموش کن 10
Mwana na ngai ya mwasi, tala mpe yoka; bosana bato na yo mpe ndako ya tata na yo.
تا پادشاه شیفتهٔ زیبایی تو شود. او را اطاعت کن، زیرا او سَروَر توست. 11
Mokonzi asepeli na kitoko na yo; lokola azali nkolo na yo, gumbama liboso na ye.
اهالی سرزمین صور با هدایا نزد تو خواهند آمد و ثروتمندان قوم تو طالب رضامندی تو خواهند بود. 12
Tiri, mboka kitoko, bato oyo baleki na bozwi kati na bato bakomemela yo bakado mpo ete olinga bango.
عروسِ پادشاه را نگاه کنید! او در درون کاخش چه زیباست! لباسهایش زربافت می‌باشد. 13
Mwana mwasi ya mokonzi azali kongenga na kitoko kati na ndako ya mokonzi, alati elamba batonga wolo.
او را با لباس نقشدارش نزد پادشاه می‌آورند؛ ندیمه‌هایش نیز از پی او می‌آیند. 14
Alati bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, mpe bamemi ye epai ya mokonzi. Bamemi mpe balingami na ye epai na yo, bilenge basi oyo batambolaka elongo na ye.
آنان با خوشی و شادمانی به درون کاخ پادشاه هدایت می‌شوند. 15
Bamemi bango na nsayi mpe na esengo; bakoti na ndako ya mokonzi.
ای پادشاه، تو صاحب پسران بسیار خواهی شد و آنها نیز مانند اجدادت تاج شاهی را بر سر خواهند نهاد، و تو ایشان را در سراسر جهان به حکمرانی خواهی گماشت. 16
Bana na yo ya mibali bakozwa esika ya bakoko na bango; okotia bango bakambi kati na mokili mobimba.
نام تو را در تمام نسلها شهرت خواهم داد، و همهٔ مردم تا ابد سپاسگزار تو خواهند بود. 17
Nakosala ete bikeke nyonso ebosana kombo na yo te. Boye bikolo nyonso ekosanzola Yo tango nyonso, seko na seko.

< مزامیر 45 >