< لاویان 17 >

خداوند به موسی فرمود: 1
Yawe alobaki na Moyize:
«این دستورها را به هارون و پسرانش و به تمام بنی‌اسرائیل بده. این است آنچه خداوند فرموده است: 2
« Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele, mpe loba na bango: ‹ Tala maloba oyo Yawe alobi:
هر اسرائیلی که گاو یا گوسفند یا بزی را در جایی دیگر غیر از داخل یا خارج اردوگاه ذبح کند، 3
‘Moto nyonso kati na bana ya Isalaele, oyo akokata kingo ya ngombe, ya meme to ya ntaba, ezala kati na molako to na libanda ya molako;
بجای اینکه آن را کنار در خیمۀ ملاقات بیاورد تا به عنوان هدیه به خداوند تقدیم کند، آن شخص خون ریخته و مجرم است و باید از میان قوم خود منقطع شود. 4
mpe amemi yango te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango lokola likabo epai na Yawe liboso ya Mongombo ya Yawe, makila na yango ekotangama na moto ya moto yango. Lokola asopi makila, bakolongola ye kati na bato na ye.
هدف از این قانون این است که قوم اسرائیل دیگر در صحرا قربانی نکنند. قوم باید قربانیهای خود را دم در خیمۀ ملاقات پیش کاهن بیاورند و آنها را به عنوان قربانی سلامتی به خداوند تقدیم کنند. 5
Boye, na esika ete bana ya Isalaele bamemaka bambeka na bango na bilanga, bakomema yango mpo na Yawe epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani lokola mbeka ya boyokani epai na Yawe.
سپس کاهن خون آنها را بر مذبح خداوند که دم در خیمۀ ملاقات است بپاشد و چربی آنها را همچون عطر خوشبویی که مورد پسند خداوند است بسوزاند. 6
Nganga-Nzambe akobwaka makila na etumbelo ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe akotumba mafuta na yango lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
قوم اسرائیل دیگر نباید در صحرا برای ارواح شریر قربانی کنند و به خداوند خیانت ورزند. این برای شما قانونی است همیشگی که باید نسل اندر نسل بجا آورده شود. 7
Bana ya Isalaele bakobonza lisusu te bambeka na bango epai banzambe ya bikeko ya bantaba ya mibali, oyo basambelaka. Oyo ekozala malako ya libela mpo na bango mpe mpo na milongo oyo ekoya.’ ›
«پس به آنها بگو: هرگاه یک اسرائیلی یا غریبی که در میان قوم ساکن است قربانی سوختنی یا قربانی‌های دیگر تقدیم کند، 8
Loba na bango: ‹ Moto nyonso ya Isalaele to mopaya nyonso oyo azali kati na bango, oyo akobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu,
اما آن را در جایی غیر از دم در خیمۀ ملاقات برای خداوند قربانی کند، آن شخص باید از میان قوم منقطع شود. 9
na kozanga komema yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango epai ya Yawe, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.
«هر کس خون بخورد، چه اسرائیلی باشد، چه غریبی که در میان شما ساکن است، روی خود را از او برگردانده او را از میان قوم منقطع خواهم کرد، 10
Nakobalukela mpe nakolongola kati na bato na ye, moto nyonso oyo akolia makila, azala moto ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na bango;
زیرا جان هر موجودی در خون اوست و من خون را به شما داده‌ام تا برای کفارهٔ جانهای خود، آن را بر روی مذبح بپاشید. خون است که برای جان کفاره می‌کند. 11
pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila. Napesi bino yango mpo ete bosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na bomoi na bino, na etumbelo. Lokola bomoi ya moto ezali kati na makila, yango wana makila esalaka mosala ya bolimbisi masumu.
به همین دلیل است که به قوم اسرائیل حکم می‌کنم که نه خودشان خون بخورند و نه غریبی که در میان ایشان ساکن است. 12
Boye, nalobaki na bana ya Isalaele: ‘Moto moko te mpe mopaya moko te kati na bino akoki kolia makila.’
هر کس به شکار برود، خواه اسرائیلی باشد خواه غریبی که در میان شماست و حیوان یا پرندهٔ حلال گوشتی را شکار کند، باید خونش را بریزد و روی آن را با خاک بپوشاند، 13
Moto nyonso kati na bana ya Isalaele to mopaya oyo avandi kati na bango, oyo akokende bokila mpe akokanga nyama ya zamba to ndeke oyo baliaka, asengeli kosopa makila na yango mpe kozipa yango na mabele, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango.
زیرا جان هر موجودی در خون اوست. به همین دلیل است که به قوم اسرائیل گفتم که هرگز خون نخورند، زیرا حیات هر موجود زنده‌ای در خون آن است. پس هر کس خون بخورد باید از میان قوم اسرائیل منقطع شود. 14
Yango wana, nalobaki na bana ya Isalaele: ‘Bokoki kolia makila ya ekelamu ata moko te, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango. Moto oyo akolia yango, bakolongola ye kati na bato.’
«هر اسرائیلی یا غریبی که گوشت حیوان مرده یا دریده شده‌ای را بخورد، باید لباس خود را بشوید و غسل کند. او بعد از غروب طاهر خواهد بود. 15
Moto nyonso, azala mwana mboka to mopaya, oyo akolia mosuni ya nyama oyo ekufi yango moko to oyo babomi na nyama ya zamba, akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi. Akozala mbindo kino na pokwa, sima na yango akokoma peto.
ولی اگر لباسهایش را نشوید و غسل نکند مجرم خواهد بود.» 16
Kasi soki asukoli bilamba mpe nzoto na ye te, akomema ngambo. › »

< لاویان 17 >