< اشعیا 55 >
خداوند میفرماید: «ای همهٔ تشنگان، نزد آبها بیایید؛ ای همهٔ شما که پول ندارید، بیایید نان بخرید و بخورید! بیایید شیر و شراب را بدون پول بخرید و بنوشید! | 1 |
« Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya, boya na esika oyo mayi ezali; ezala bino oyo bozali na mbongo te, boya kosomba mpe kolia; boya kosomba vino mpe miliki: ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te!
چرا پول خود را خرج چیزی میکنید که خوردنی نیست؟ چرا دسترنج خود را صرف چیزی میکنید که سیرتان نمیکند؟ به من گوش دهید و از من اطاعت کنید تا بهترین خوراک را بخورید و از آن لذت ببرید. | 2 |
Mpo na nini bozali kobebisa mbongo mpo na bilei oyo etongaka nzoto te, mpe kobimisa motoki mpo na bilei oyo etondisaka te? Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko, mpe bokosepela na biloko ya elengi.
«ای قوم من، با گوشهای باز و شنوا نزد من بیایید تا زنده بمانید. من با شما عهدی جاودانی میبندم و برکاتی را که به داوود پادشاه وعده دادهام به شما میدهم. | 3 |
Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, boyoka mpe bokozala na bomoi; nakosala boyokani ya libela elongo na bino, boyokani oyo nalakaki Davidi, na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.
همانگونه که او سرزمینها را تسخیر کرد و قدرت مرا ظاهر ساخت، | 4 |
Tala, nakomisaki ye motatoli na Ngai na miso ya bato ya bikolo ebele, mokambi mpe motambolisi ya bato.
شما نیز قومهای بیگانه را فراخواهید خواند و آنها آمده، مطیع شما خواهند شد. من که یهوه خدای مقدّس اسرائیل هستم این کار را برای خودم خواهم کرد و به شما عزت و افتخار خواهم بخشید.» | 5 |
Solo, okobenga bikolo oyo oyebi te, mpe bikolo oyo eyebi yo te ekoya na lombangu epai na yo mpo na Yawe, Nzambe na yo, mpo na Mosantu ya Isalaele, pamba te alatisi yo nkembo. »
خداوند را مادامی که یافت میشود بطلبید، و مادامی که نزدیک است او را بخوانید. | 6 |
Boluka Yawe wana akoki nanu komonana, bobelela Ye wana azali nanu pene.
ای گناهکاران، از کارها و فکرهای فاسد خود دست بکشید و به سوی خداوند بازگشت کنید، زیرا او بسیار بخشنده است و بر شما رحم خواهد کرد. | 7 |
Tika ete moto mabe atika banzela na ye, mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye; tika ete azonga epai na Yawe mpo ete ayokela ye mawa, tika ete azonga epai ya Nzambe na biso, pamba te alimbisaka kaka.
خداوند میفرماید: «فکرهای من فکرهای شما نیست، و راههای من هم راههای شما نیست. | 8 |
« Makanisi na Ngai ezali makanisi na bino te, mpe banzela na Ngai ezali banzela na bino te, » elobi Yawe.
به همان اندازه که آسمان بلندتر از زمین است، راههای من نیز از راههای شما و فکرهای من از فکرهای شما بلندتر و برتر است. | 9 |
« Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele, ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali likolo koleka banzela na bino, mpe makanisi na Ngai ezali likolo koleka makanisi na bino.
«کلام من مانند برف و باران است. همانگونه که برف و باران از آسمان میبارند و زمین را سیراب و بارور میسازند و به کشاورز بذر و به گرسنه نان میبخشند، | 10 |
Ndenge mvula mpe mvula ya pembe enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo soki epolisi mabele te, soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te, soki epesi nkona te na moloni mpe bilei te na moto oyo aliaka,
کلام من نیز هنگامی که از دهانم بیرون میآید بیثمر نمیماند، بلکه مقصود مرا عملی میسازد و آنچه را اراده کردهام انجام میدهد. | 11 |
ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka: ezongaka pamba te epai na Ngai, soki esali nanu te mokano na Ngai, mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango.
«ای قوم من، شما با شادی از بابِل بیرون خواهید آمد و با آرامش آنجا را ترک خواهید گفت. کوهها و تپههای اطراف شما با شادی سرود خواهند خواند و درختان صحرا برای شما دست خواهند زد! | 12 |
Bokobima na esengo, mpe bakotambolisa bino na kimia; bangomba milayi mpe bangomba mikuse ekoyemba nzembo ya elonga liboso na bino, mpe banzete nyonso ya zamba ekobeta maboko.
به جای خار و خس، درختان سبز و خوشبویی چون صنوبر و آس خواهند رویید. این معجزه، یادبودی جاودانی خواهد بود از آنچه من انجام دادهام.» | 13 |
Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube, nzete ya mirite ekobota na esika ya basende; ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, elembo ya libela na libela, oyo ekotikala kobebisama te. »