< پیدایش 8 >
اما خدا، نوح و حیوانات درون کشتی را فراموش نکرده بود. او بادی بر سطح آبها وزانید و سیلاب کمکم کاهش یافت. | 1 |
Nzambe akanisaki Noa mpe banyama nyonso oyo ezalaki elongo na ye kati na masuwa, atindaki mopepe na mokili mpe mayi ekitaki.
آبهای زیرزمینی از فوران بازایستادند و باران قطع شد. | 2 |
Bitima ya se mpe maninisa ya likolo ekangamaki mpe mvula etikaki konoka.
آب رفتهرفته از روی زمین کم شد. پس از صد و پنجاه روز، | 3 |
Mayi ekomaki kolongwa moke-moke likolo ya mabele, mpe sima na mikolo nkama moko na tuku mitano, mayi ekitaki.
در روز هفدهم از ماه هفتم، کشتی روی کوههای آرارات قرار گرفت. | 4 |
Na mokolo ya zomi na sambo ya sanza ya sambo, masuwa esemaki likolo ya bangomba Ararati.
دو ماه و نیم بعد، در حالی که آب همچنان پائین میرفت، قلۀ کوهها نمایان شد. | 5 |
Mayi ezalaki kokoba kokita kino na sanza ya zomi. Na mokolo ya liboso ya sanza yango, basonge ya bangomba emonanaki.
پس از گذشت چهل روز، نوح پنجرهای را که برای کشتی ساخته بود، گشود | 6 |
Sima na mikolo tuku minei, Noa afungolaki lininisa ya masuwa oyo asalaki
و کلاغی رها کرد. کلاغ به این سو و آن سو پرواز میکرد تا آن که زمین خشک شد. | 7 |
mpe abimisaki yanganga. Yanganga yango ezalaki kokende mpe kozonga kino tango mayi ekawukaki na mokili.
پس از آن، کبوتری رها کرد تا ببیند آیا کبوتر میتواند زمین خشکی برای نشستن پیدا کند. | 8 |
Mpe lisusu, Noa abimisaki ebenga mpo na kotala soki mayi ekawuki na mokili.
اما کبوتر جایی را نیافت، زیرا هنوز آب بر سطح زمین بود. وقتی کبوتر برگشت، نوح دست خود را دراز کرد و کبوتر را گرفت و به داخل کشتی برد. | 9 |
Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia matambe na yango te, pamba te mayi ezalaki na etando nyonso ya mokili. Boye, ezongaki na masuwa epai ya Noa. Noa abimisaki loboko, azwaki ebenga mpe akotisaki yango kati na masuwa.
نوح هفت روز دیگر صبر کرد و بار دیگر همان کبوتر را رها نمود. | 10 |
Azelaki mikolo sambo mpe abimisaki lisusu ebenga libanda ya masuwa.
این بار، هنگام غروب آفتاب، کبوتر در حالی که برگ زیتون تازهای به منقار داشت، نزد نوح بازگشت. پس نوح فهمید که در بیشتر نقاط، آب فرو نشسته است. | 11 |
Tango ebenga ezongaki epai na ye na pokwa, ememaki lokasa ya olive ya mobesu na monoko na yango. Boye, Noa asosolaki ete mayi ekiti na mokili.
یک هفته بعد، نوح باز همان کبوتر را رها کرد، ولی این بار کبوتر باز نگشت. | 12 |
Azelaki lisusu mikolo sambo mosusu, mpe abimisaki ebenga. Kasi ebenga ezongaki lisusu te.
در ششصد و یکمین سال از زندگی نوح، در اولین روز ماه اول، آب از روی زمین خشک شد. آنگاه نوح پوشش کشتی را برداشت و به بیرون نگریست و دید که سطح زمین خشک شده است. | 13 |
Na mokolo ya liboso na sanza ya liboso, tango Noa akokisaki mibu nkama motoba na moko ya mbotama, mayi ekawukaki na mokili; Noa afungolaki masuwa na likolo na yango mpe amonaki ete mabele ekawuki.
در روز بیست و هفتم از ماه دوم، سرانجام همه جا خشک شد. | 14 |
Na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya mibale, mabele ekawukaki penza.
در این هنگام خدا به نوح فرمود: | 15 |
Boye, Nzambe alobaki na Noa:
«اینک زمان آن رسیده که همه از کشتی خارج شوید. | 16 |
« Bima na masuwa elongo na mwasi na yo, mpe bana na yo ya mibali elongo na basi na bango.
تمام حیوانات، پرندگان و خزندگان را رها کن تا تولید مثل کنند و بر روی زمین زیاد شوند.» | 17 |
Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo: bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. »
پس نوح با همسر و پسران و عروسانش از کشتی بیرون آمد. | 18 |
Boye, Noa abimaki libanda elongo na bana na ye ya mibali, mwasi na ye mpe basi ya bana na ye.
و تمام حیوانات و خزندگان و پرندگان نیز دستهدسته از کشتی خارج شدند. | 19 |
Banyama nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na mokili, ebimaki na masuwa na molongo kolanda lolenge na yango.
آنگاه نوح مذبحی برای خداوند ساخت و از هر حیوان و پرندهٔ حلال گوشت بر آن قربانی کرد. | 20 |
Noa atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe azwaki ndambo ya banyama mpe bandeke ezanga mbindo, abonzelaki yango Yawe lokola mbeka ya kotumba.
خداوند از این عمل نوح خشنود گردید و با خود گفت: «من بار دیگر زمین را به خاطر انسان که دلش از کودکی به طرف گناه متمایل است، لعنت نخواهم کرد و اینچنین تمام موجودات زنده را از بین نخواهم برد. | 21 |
Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki: « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala.
تا زمانی که جهان باقی است، کشت و زرع، سرما و گرما، زمستان و تابستان، و روز و شب همچنان برقرار خواهد بود.» | 22 |
Na tango nyonso oyo mokili ekozala, tango ya kolona mpe tango ya kobuka, tango ya malili mpe tango ya molunge, tango ya mvula mpe tango ya elanga, tango ya moyi mpe tango ya butu, ekozanga te. »