< تثنیه 17 >
هرگز گاو یا گوسفند مریض و معیوب، برای خداوند، خدایتان قربانی نکنید. خداوند از این کار متنفر است. | 1 |
Okobonza te epai na Yawe, Nzambe na yo, ngombe to meme oyo ezali na mbeba to oyo ezali mabe, pamba te yango ezali likambo ya nkele liboso ya Yawe, Nzambe na yo.
اگر بشنوید مرد یا زنی در یکی از شهرهای سرزمینتان از عهد یهوه خدایتان تخلف نموده، بت یا خورشید و ماه و ستارگان را که خداوند پرستش آنها را اکیداً قدغن کرده، عبادت میکند، | 2 |
Soki kati na moko ya bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo; emonani na mobali to mwasi oyo asali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na yo, wana abuki boyokani elongo na Ye
mpe akei kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango: moyi, sanza to minzoto nyonso ya likolo, nzokande natindaki bango bongo te;
اول خوب تحقیق کنید و بعد که معلوم شد چنین گناهی در اسرائیل به وقوع پیوسته است، | 4 |
bongo bamemeli yo sango ya ndenge wana, yekola yango malamu. Soki emonani solo ete likambo ya nkele esalemi kati na Isalaele;
آنگاه آن مرد یا زن را به بیرون شهر ببرید و سنگسارش کنید تا بمیرد. | 5 |
kamata mobali to mwasi oyo asali likambo wana ya nkele, mema ye na ekuke ya engumba na yo mpe bamba ye mabanga kino akokufa.
ولی هرگز شخصی را بنا به شهادت یک گواه به قتل نرسانید؛ حداقل باید دو یا سه شاهد وجود داشته باشند. | 6 |
Ezali kaka na litatoli ya bato mibale to misato nde okoki koboma moto, kasi na litatoli ya moto moko te.
اول، شاهدان باید سنگها را پرتاب کنند و سپس تمام مردم. به این طریق، این بدی را از میان خود پاک خواهید ساخت. | 7 |
Maboko ya motatoli nde ekozala maboko ya liboso ya koboma moto yango, mpe na sima, maboko ya bato nyonso. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na yo.
اگر واقعهای در میان شما اتفاق بیفتد که قضاوت راجع به آن برای شما سخت باشد چه قتل باشد، چه ضرب و جرح، و چه دعوا، در این صورت باید آن مرافعه را به محلی که خداوند، خدایتان تعیین میکند | 8 |
Soki makambo oyo eleki yo makasi mpo na kosambisa ekomi na bisambiselo na yo, makambo lokola koboma bato, kowelana, kozokisa bato, mema yango na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona.
نزد کاهنان نسل لاوی و قاضی وقت ببرید تا ایشان در این مورد قضاوت کنند. | 9 |
Okokende epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe epai ya mosambisi oyo azali kosala mosala na tango wana. Okotalisa bango likambo yango mpe bango nde bakokata likambo.
هر چه آنها در مکانی که خداوند تعیین کرده است بگویند باید بدون چون و چرا اجرا گردد. مواظب باشید که از احکام و دستورهای ایشان سرپیچی نکنید. | 10 |
Bongo yo okosala kolanda mikano oyo bango bakopesa yo na esika oyo Yawe akopona. Sala keba ete osala makambo nyonso oyo bakotinda yo.
Okosala kolanda mobeko oyo bakoteya yo mpe bikateli oyo bakopesa yo. Kokende libanda te ya bikateli oyo bakopesa yo.
اگر محکوم از قبول حکم قاضی یا کاهن که خادم یهوه خدایتان است، خودداری کند مجازات او مرگ است. اسرائیل را باید از وجود چنین گناهکارانی پاک نمود. | 12 |
Moto oyo akosala lolendo mpe akoboya kotosa Nganga-Nzambe to mosambisi oyo atelemi mpo kosala mosala na esika oyo Yawe aponaki mpo na ye, basengeli koboma ye. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na Isalaele.
آنگاه همهٔ مردم از این مجازات باخبر شده، خواهند ترسید و جرأت نخواهند کرد با رأی دادگاه مخالفت کنند. | 13 |
Bato nyonso bakoyoka likambo yango, bakokoma na somo mpe bakosala lisusu lolendo te.
هرگاه در سرزمینی که یهوه خدایتان آن را به شما خواهد داد، ساکن شده، به این فکر بیفتید که «ما هم باید مثل قومهای دیگری که اطراف ما هستند یک پادشاه داشته باشیم»، | 14 |
Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo; tango okozwa yango mpe okovanda kati na yango, tango mosusu okoki koloba: « Tika ete toluka mokonzi oyo akokonza biso ndenge ezali na bikolo nyonso oyo ezingeli biso, »
باید مردی را به پادشاهی برگزینید که خداوند، خدایتان انتخاب میکند. او باید اسرائیلی باشد و نه بیگانه. | 15 |
sala keba ete opona kaka mokonzi oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Asengeli kowuta kati na bandeko na bino. Kotia mopaya te oyo azali ndeko na bino te kati na Isalaele mpo na kokonza bino.
او نباید به فکر جمع کردن اسب باشد و افرادش را به مصر بفرستد تا از آنجا برایش اسب بیاورند، چون خداوند به شما گفته است: «هرگز بار دیگر به مصر باز نگردید.» | 16 |
Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino: « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. »
او نباید زنان زیادی برای خود بگیرد مبادا دلش از خداوند دور شود؛ همچنین نباید برای خود ثروت بیندوزد. | 17 |
Asengeli te kozala na basi ebele noki te motema na ye ekopengwa. Asengeli te kozala na palata mpe wolo ebele koleka.
وقتی او بر تخت پادشاهی نشست، باید نسخهای از قوانین خدا را که بهوسیلۀ کاهنان لاوی نگهداری میشود، برای خود تهیه کند. | 18 |
Tango mokonzi yango akovanda na kiti na ye ya bokonzi, akozwa buku ya Mobeko epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe akokoma makambo oyo ezali na buku yango mpo na ye moko.
او باید این رونوشت قوانین را نزد خود نگه دارد و در تمام روزهای عمرش آن را مطالعه کند تا یاد بگیرد خداوند، خدایش را احترام کند و دستورها و قوانین او را اطاعت نماید. | 19 |
Akozala na buku yango tango nyonso mpe akotanga yango mikolo nyonso ya bomoi na ye mpo ete ayekola kokumisa Yawe, Nzambe na ye, mpe asalela malamu maloba nyonso ya Mobeko oyo mpe bikateli na yango;
این کار او باعث خواهد شد خود را از دیگران برتر نداند و از هیچیک از اوامر خداوند انحراف نورزد. بدین ترتیب سلطنت او طولانی خواهد بود و پس از او نیز پسرانش، نسلهای زیادی بر اسرائیل سلطنت خواهند کرد. | 20 |
mpo ete atombola te na lolendo liboso ya bandeko na ye to abima te libanda ya mibeko na yango. Boye, ye elongo na bakitani na ye bakowumela tango molayi na bokonzi kati na Isalaele.