< اول سموئیل 19 >

شائول به پسر خود یوناتان و همهٔ افرادش گفت که قصد دارد داوود را بکشد. اما یوناتان به خاطر محبتی که به داوود داشت او را از قصد پدرش آگاه ساخت و گفت: «فردا صبح مواظب خودت باش. خودت را در صحرا پنهان کن. 1
Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi.
2
Jonatan ayebisaki Davidi: « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna.
من از پدرم می‌خواهم تا با من به صحرا بیاید. در آنجا راجع به تو با او صحبت می‌کنم و هر چه او بگوید به تو خواهم گفت.» 3
Ngai nakobima mpe nakozala elongo na tata na ngai kati na zamba epai wapi yo okozala. Nakoloba na tina na yo epai ya tata na ngai, nakoluka koyeba makambo ndenge ezali mpe nakoyebisa yo. »
صبح روز بعد که یوناتان و پدرش با هم گفتگو می‌کردند، یوناتان از داوود تعریف کرد و خواهش نمود که به وی آسیبی نرساند و گفت: «او هرگز به تو آزاری نرسانده است بلکه همیشه به تو خوبی کرده است. 4
Jonatan alobaki malamu na tina na Davidi epai ya tata na ye, Saulo: « Tika ete mokonzi asala mabe te na mosali na ye, Davidi, pamba te asali yo mabe te. Yo nde kutu moto ozwi lisungi monene na makambo oyo ye asali.
آیا فراموش کرده‌ای که او برای مبارزه با جُلیات، جان خود را به خطر انداخت و خداوند پیروزی بزرگی نصیب اسرائیل کرد؟ تو از این امر خوشحال بودی. حال چرا می‌خواهی دست خود را به خون بی‌گناهی که آزارش به تو نرسیده، آلوده سازی؟» 5
Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te? »
شائول نظر یوناتان را پذیرفت و قسم خورده، گفت: «به خداوند زنده قسم که او را نخواهم کشت.» 6
Saulo ayokaki Jonatan mpe alapaki ndayi boye: « Na Kombo na Yawe, bakoboma Davidi te. »
پس یوناتان، داوود را خواند و همه چیز را برای او تعریف کرد. بعد او را نزد پدرش برد و او مثل سابق نزد شائول ماند. 7
Bongo Jonatan abengaki Davidi mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo basololaki na tata na ye. Jonatan amemaki Davidi epai ya Saulo, mpe Davidi asalelaki Saulo lokola na ebandeli.
طولی نکشید که دوباره جنگ درگرفت و داوود با سربازان خود به فلسطینی‌ها حمله برد و بسیاری را کشت و بقیه را فراری داد. 8
Lokola bitumba ezongelaki, Davidi abimaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia mpe alongaki bango na elonga monene, mpe bato ya Filisitia bakimaki liboso na ye.
روزی هنگامی که شائول نیزه به دست در خانه نشسته بود، روحی پلید از جانب خداوند بر او آمد. در حالی که داوود مشغول نواختن چنگ بود، 9
Kasi molimo moko ya mabe kowuta na Yawe ekitelaki Saulo, wana avandaki kati na ndako na ye mpe asimbaki likonga na loboko na ye. Lokola Davidi azalaki kobeta lindanda,
شائول نیزه‌ای را که در دست داشت به طرف داوود پرتاب کرد تا او را بکشد. اما داوود خود را کنار کشید و نیزه به دیوار فرو رفت. داوود فرار کرد و خود را از دست او نجات داد. 10
Saulo alukaki koboma ye na nzela ya likonga na ye. Kasi Davidi akimaki ye, mpe likonga ekotaki na mir. Na butu wana, Davidi alongaki kokima mpe abikaki.
شائول سربازانی فرستاد تا مراقب خانهٔ داوود باشند و صبح که او بیرون می‌آید او را بکشند. میکال زن داوود به او خبر داده، گفت: «اگر امشب فرار نکنی فردا صبح کشته می‌شوی.» 11
Saulo atindaki mibali kozonga na ndako ya Davidi mpo na kokengela ye mpe koboma ye na tongo. Kasi mwasi na ye, Mikali, ayebisaki ye: « Soki okimi te na pokwa ya lelo mpo na kobatela bomoi na yo, bakoboma yo lobi! »
پس داوود به کمک میکال از پنجره فرار کرد. 12
Boye Mikali akitisaki Davidi na nzela ya lininisa, mpe Davidi akimaki mpe abikaki.
سپس میکال بُتی خانگی گرفته، در رختخواب گذاشت و بالشی از پشم بز زیر سرش نهاد و آن را با لحاف پوشاند. 13
Bongo Mikali azwaki nzambe ya ekeko oyo ezalaki na lolenge ya moto; alalisaki yango na mbeto, afinikaki yango elamba mpe atiaki yango bapwale ya bantaba na moto.
وقتی سربازان آمدند تا داوود را دستگیر کنند و پیش شائول ببرند، میکال به آنها گفت که داوود مریض است و نمی‌تواند از رختخوابش بیرون بیاید. 14
Tango Saulo atindaki bato kokanga Davidi, Mikali alobaki: « Azali kobela. »
ولی شائول دوباره سربازان را فرستاد تا او را با رختخوابش بیاورند تا او را بکشند. 15
Saulo azongisaki bato mpo ete batala Davidi mpe alobaki na bango: « Bomemela ngai ye na mbeto na ye mpo ete naboma ye. »
وقتی سربازان آمدند تا داوود را ببرند، دیدند در رختخواب یک بُت خانگی با بالشی از پشم بُز در جای سرش است! 16
Kasi tango mibali bakotaki, bamonaki, na likolo ya mbeto, nzambe ya ekeko oyo ezalaki lokola moto mpe ezalaki na bapwale ya bantaba na moto na yango.
شائول به دخترش میکال گفت: «چرا مرا فریب دادی و گذاشتی دشمنم از چنگم بگریزد؟» میکال جواب داد: «مجبور بودم این کار را بکنم، چون او تهدید کرد که اگر کمکش نکنم مرا می‌کشد.» 17
Saulo alobaki na Mikali: — Mpo na nini oyokisi ngai soni mpe okimisi monguna na ngai, mpe sik’oyo abiki? Mikali alobaki na Saulo: — Davidi alobaki na ngai: « Tika ngai nakima, noki te nakoboma yo. »
به این ترتیب، داوود فرار کرد و به رامه پیش سموئیل رفت. وقتی به آنجا رسید، هر چه شائول به وی کرده بود، برای سموئیل تعریف کرد. سموئیل داوود را با خود به نایوت برد و با هم در آنجا ماندند. 18
Tango Davidi akimaki mpe amibikisaki, akendeki epai ya Samuele, na Rama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Bongo ye mpe Samuele bakendeki kovanda na Nayoti, pene ya Rama.
به شائول خبر دادند که داوود در نایوت رامه است، 19
Sango ekomaki epai ya Saulo: « Davidi azali na Nayoti ya Rama. »
پس او مأمورانی فرستاد تا داوود را دستگیر کنند. اما مأموران وقتی رسیدند گروهی از انبیا را دیدند که به رهبری سموئیل نبوّت می‌کردند. آنگاه روح خدا بر آنها نیز آمد و ایشان هم شروع به نبوّت کردن نمودند. 20
Saulo atindaki bato kokende kokanga Davidi. Kasi tango bamonaki lisanga ya basakoli kosakola mpe Samuele atelemi wana lokola mokambi na bango, Molimo na Nzambe akitelaki bato oyo Saulo atindaki, mpe bakomaki bango mpe kosakola.
وقتی شائول شنید چه اتفاقی افتاده است، سربازان دیگری فرستاد، ولی آنها نیز نبوّت کردند. شائول برای بار سوم سربازانی فرستاد و آنها نیز نبوّت کردند. 21
Sango ekomaki epai ya Saulo, mpe ye atindaki bato mosusu; kasi bango mpe basakolaki. Saulo atindaki bato mosusu na mbala ya misato, kasi bango mpe basakolaki.
سرانجام خود شائول به رامه رفت و چون به سر چاه بزرگی که نزد سیخوه است رسید، پرسید: «سموئیل و داوود کجا هستند؟» به او گفتند که در نایوت هستند. 22
Sima, ye moko Saulo akendeki na Rama mpe akomaki na libulu monene ya mayi, na Seku. Atunaki: — Samuele mpe Davidi bazali wapi? Bazongiselaki ye: — Bazali na Nayoti ya Rama.
اما در بین راه نایوت، روح خدا بر شائول آمد و او نیز تا نایوت نبوّت کرد! 23
Boye Saulo akendeki na Nayoti ya Rama. Kasi ye mpe, wana azalaki kokoba nzela na ye, Molimo na Nzambe akitelaki ye, mpe akomaki kosakola kino akomaki na Nayoti ya Rama.
او جامهٔ خود را چاک زده، تمام آن روز تا شب برهنه افتاد و در حضور سموئیل نبوّت می‌کرد. وقتی مردم این را شنیدند گفتند: «آیا شائول هم نبی شده است؟» 24
Ye mpe alongolaki bilamba na ye mpe asakolaki liboso ya Samuele; akweyaki mpe atikalaki bolumbu mokolo yango mobimba mpe butu mobimba. Yango wana bato batunaka: « Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli? »

< اول سموئیل 19 >