< اول تواریخ 6 >

پسران لاوی اینها بودند: جرشون، قهات و مراری. 1
Bana mibali ya Levi: Gerishoni, Keati mpe Merari.
پسران قهات اینها بودند: عمرام، یصهار، حبرون و عزی‌ئیل. 2
Bana mibali ya Keati: Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
هارون، موسی و مریم فرزندان عمرام بودند. هارون چهار پسر داشت به نامهای: ناداب، ابیهو، العازار و ایتامار. 3
Bana ya Amirami: Aron, Moyize mpe Miriami. Bana mibali ya Aron: Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
نسل العازار به ترتیب اینها بودند: فینحاس، ابیشوع، 4
Eleazari abotaki Pineasi; Pineasi abotaki Abishuwa;
بقی، عزی، 5
Abishuwa abotaki Buki; Buki abotaki Uzi;
زرحیا، مرایوت، 6
Uzi abotaki Zerakia; Zerakia abotaki Merayoti;
امریا، اخیطوب، 7
Merayoti abotaki Amaria; Amaria abotaki Ayitubi;
صادوق، اخیمعص، 8
Ayitubi abotaki Tsadoki; Tsadoki abotaki Ayimaatsi;
عزریا، یوحانان، 9
Ayimaatsi abotaki Azaria; Azaria abotaki Yoanani;
عزریا. عزریا کاهن خانهٔ خدا بود خانه‌ای که به دست سلیمان در اورشلیم بنا شد. 10
Yoanani abotaki Azaria oyo azalaki Nganga-Nzambe kati na Tempelo oyo Salomo atongaki na Yelusalemi.
امریا، اخیطوب، 11
Azaria abotaki Amaria; Amaria abotaki Ayitubi;
صادوق، شلوم، 12
Ayitubi abotaki Tsadoki, mpe Tsadoki abotaki Shalumi;
حلقیا، عزریا، سرایا و 13
Shalumi abotaki Ilikia; Ilikia abotaki Azaria;
یهوصادق. وقتی خداوند مردم یهودا و اورشلیم را به دست نِبوکَدنِصَّر اسیر کرد، یهوصادق هم جزو اسرا بود. 14
Azaria abotaki Seraya; Seraya abotaki Yeotsadaki.
15
Yeotsadaki akendeki na bowumbu tango Yawe akabaki Yelusalemi mpe Yuda na maboko ya Nabukodonozori.
چنانکه قبلاً گفته شد، جرشون، قهات و مراری پسران لاوی بودند. 16
Bana mibali ya Levi: Gerishoni, Keati mpe Merari.
لبنی و شمعی پسران جرشون بودند. 17
Bana mibali ya Gerishoni: Libini mpe Shimei.
پسران قهات، عمرام، یصهار، حبرون، عزی‌ئیل بودند. 18
Bana mibali ya Keati: Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
محلی و موشی پسران مراری بودند. 19
Bana mibali ya Merari: Maali mpe Mushi. Tala bakitani ya Levi kolanda batata na bango:
نسل جرشون به ترتیب اینها بودند: لبنی، یحت، زمه، 20
Mpo na Gerishoni: Gerishoni abotaki Libini; Libini abotaki Yaati; Yaati abotaki Zima;
یوآخ، عدو، زارح و یاترای. 21
Zima abotaki Yoa; Yoa abotaki Ido; Ido abotaki Zera; Zera abotaki Yeatirayi.
نسل قهات به ترتیب اینها بودند: عمیناداب، قورح، اسیر، 22
Mpo na Keati: Keati abotaki Aminadabi; Aminadabi abotaki Kore; Kore abotaki Asiri;
القانه، ابی‌آساف، اسیر، 23
Asiri abotaki Elikana; Elikana abotaki Ebiazafi; Ebiazafi abotaki Asiri;
تحت، اوری‌ئیل، عزیا و شائول. 24
Asiri abotaki Taati; Taati abotaki Urieli; Urieli abotaki Uzia; Uzia abotaki Saulo.
القانه دو پسر داشت: عماسای و اخیموت. 25
Bana mibali ya Elikana: Amasayi, Ayimoti.
نسل اخیموت به ترتیب اینها بودند: القانه، صوفای، نحت، 26
Elikana abotaki Tsofayi; Tsofayi abotaki Naati;
الی‌آب، یروحام، القانه و سموئیل. 27
Naati abotaki Eliabi; Eliabi abotaki Yeroami; Yeroami abotaki Elikana, mpe Elikana abotaki Samuele.
یوئیل پسر ارشد سموئیل و ابیا پسر دوم او بود. 28
Bana mibali ya Samuele: Joeli, mwana ya liboso; mpe Abiya, mwana ya mibale.
نسل مراری به ترتیب اینها بودند: محلی، لبنی، شمعی، عزه، شمعی، هجیا و عسایا. 29
Bakitani ya Merari kolanda batata na bango: Merari abotaki Maali; Maali abotaki Libini; Libini abotaki Shimei; Shimei abotaki Uza;
30
Uza abotaki Shimea; Shimea abotaki Agiya; Agiya abotaki Asaya.
داوود پادشاه پس از آنکه صندوق عهد را در عبادتگاه قرار داد، افرادی را انتخاب کرد تا مسئول موسیقی عبادتگاه باشند. 31
Tala Balevi oyo Davidi apesaki mokumba ya kotambolisa banzembo kati na Tempelo ya Yawe, wuta tango Sanduku ya Yawe ezwaki kuna esika ya bopemi.
پیش از آنکه سلیمان خانهٔ خداوند را در شهر اورشلیم بنا کند، این افراد به ترتیب در خیمهٔ ملاقات این خدمت را انجام می‌دادند. 32
Balevi oyo basalaki mosala na bango na nzela ya banzembo liboso ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, kino tango Salomo atongaki Tempelo ya Yawe na Yelusalemi, kolanda mibeko oyo bapesaki bango.
اینها بودند مردمانی که همراه پسرانشان خدمت می‌کردند: هیمان رهبر گروه از طایفهٔ قهات بود. نسب نامهٔ او که از پدرش یوئیل به جدش یعقوب می‌رسید عبارت بود از: هیمان، یوئیل، سموئیل، 33
Tala bato oyo bazalaki kosala mosala yango, elongo na bana na bango ya mibali: Kati na bana mibali ya Keati: Moyembi Emani, mwana mobali ya Joeli, mwana mobali ya Samuele,
القانه، یروحام، الی‌ئیل، توح، 34
mwana mobali ya Elikana, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Elieli, mwana mobali ya Towa,
صوف، القانه، مهت، عماسای، 35
mwana mobali ya Tsufi, mwana mobali ya Elikana, mwana mobali ya Maalati, mwana mobali ya Amasayi,
القانه، یوئیل، عزریا، صفنیا، 36
mwana mobali ya Elikana, mwana mobali ya Joeli, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Sofoni,
تحت، اسیر، ابی‌آساف، قورح، 37
mwana mobali ya Taati, mwana mobali ya Asiri, mwana mobali ya Ebiazafi, mwana mobali ya Kore,
یصهار، قهات، لاوی و یعقوب. 38
mwana mobali ya Yitseari, mwana mobali ya Keati, mwana mobali ya Levi, mwana mobali ya Isalaele.
آساف خویشاوند هیمان، دستیار او بود و در طرف راست او می‌ایستاد. نسب نامهٔ آساف که از پدرش برکیا به جدش لاوی می‌رسید عبارت بود از: آساف، برکیا، شمعی، 39
Na ngambo ya loboko ya mobali ya Emani, Azafi nde azalaki kotelema wana mpe azalaki libota moko na Emani. Azafi, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Shimea,
میکائیل، بعسیا، ملکیا، 40
mwana mobali ya Mikaeli, mwana mobali ya Baaseya, mwana mobali ya Malikiya,
اتنی، زارح، عدایا، 41
mwana mobali ya Etini, mwana mobali ya Zera, mwana mobali ya Adaya,
ایتان، زمه، شمعی، 42
mwana mobali ya Etani, mwana mobali ya Zima, mwana mobali ya Shimei,
یحت، جرشون، لاوی. 43
mwana mobali ya Yaati, mwana mobali ya Gerishoni, mwana mobali ya Levi.
ایتان دستیار دیگر هیمان از طایفهٔ مراری بود و در طرف چپ او می‌ایستاد. نسب نامهٔ او که از قیشی به جدش لاوی می‌رسید عبارت بود از: ایتان، قیشی، عبدی، ملوک، 44
Na ngambo ya loboko ya mwasi, bandeko na bango, bana mibali ya Merari nde bazalaki kotelema wana na bokambami ya Etani, mwana mobali ya Kishi, mwana mobali ya Abidi, mwana mobali ya Maluki,
حشبیا، اَمَصیا، حلقیا، 45
mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Amatsia, mwana mobali ya Ilikia,
امصی، بانی، شامر، 46
mwana mobali Amitsi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Shemeri,
محلی، موشی، مراری و لاوی. 47
mwana mobali ya Maali, mwana mobali ya Mushi, mwana mobali ya Merari, mwana mobali ya Levi.
سایر خدمات خیمهٔ عبادت به عهدهٔ لاویان دیگر بود. 48
Bandeko na bango ya mibali, bana mosusu ya Levi, baponamaki mpo na kosala misala mosusu liboso ya Mongombo, kati na Esika ya bule ya Nzambe.
ولی خدمات زیر به عهدهٔ هارون و نسل او بود: تقدیم هدایای سوختنی، سوزاندن بخور، تمام وظایف مربوط به قدس‌الاقداس و تقدیم قربانیها برای کفارهٔ گناهان بنی‌اسرائیل. آنها تمام این خدمات را طبق دستورهای موسی خدمتگزار خدا انجام می‌دادند. 49
Kasi Aron mpe bana na ye ya mibali bapesamelaki mokumba ya kotumba mbeka na likolo ya etumbelo ya nyama mpe etumbelo ya malasi. Bazalaki kosala misala nyonso oyo etali Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele kolanda mitindo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, apesaki.
نسل هارون اینها بودند: العازار، فینحاس، ابیشوع، 50
Tala bakitani ya Aron: Aron abotaki Eleazari, Eleazari abotaki Pineasi, Pineasi abotaki Abishuwa,
بقی، عزی، زرحیا، 51
Abishuwa abotaki Buki, Buki abotaki Uzi, Uzi abotaki Zerakia,
مرایوت، امریا، اخیطوب، 52
Zerakia abotaki Merayoti, Merayoti abotaki Amaria, Amaria abotaki Ayitubi,
صادوق و اخیمعص. 53
Ayitubi abotaki Tsadoki, mpe Tsadoki abotaki Ayimaatsi.
طایفهٔ قهات که از نسل هارون بودند، نخستین گروهی بودند که قرعه به نامشان درآمد و شهر حبرون در سرزمین یهودا با چراگاههای اطرافش به ایشان داده شد. 54
Tala bamboka oyo epesamaki na libota ya Aron kati na etuka ya Keati kolanda bandelo ya mabele na bango; pamba te bato ya Keati nde bazalaki bato ya liboso ya kozwa libula ya mabele na nzela ya Zeke:
55
engumba ya Ebron, kati na mokili ya Yuda, elongo na bamboka na yango ya zingazinga.
(مزارع و روستاهای اطراف آن قبلاً به کالیب پسر یفنه به ملکیت داده شده بود.) 56
Kasi bilanga mpe bamboka oyo ezingelaki engumba, epesamaki na Kalebi, mwana mobali ya Yefune.
علاوه بر شهر حبرون که از شهرهای پناهگاه بود، این شهرها نیز با چراگاههای اطرافش به نسل هارون داده شد: لبنه، یتیر، اشتموع، حیلین، دبیر، عاشان و بیت‌شمس. 57
Boye tala bingumba oyo bapesaki na bana mibali ya Aron lokola bingumba ya kokimela: Ebron mpe bamboka na yango ya mike, Libina mpe bamboka na yango ya mike; Yatiri, Eshitemoa mpe bamboka na yango ya mike;
58
Ileni mpe bamboka na yango ya mike; Debiri mpe bamboka na yango ya mike;
59
Ashani mpe bamboka na yango ya mike, Beti-Shemeshi mpe bamboka na yango ya mike.
از طرف قبیلهٔ بنیامین نیز شهرهای جبع، علمت و عناتوت با چراگاههای اطرافشان به ایشان داده شد. 60
Kati na etuka ya Benjame, bapesaki bango lokola bingumba ya kokimela: Geba mpe bamboka na yango ya mike, Alemeti mpe Anatoti elongo na bamboka na yango ya mike. Bingumba nyonso oyo epesamelaki kati na bituka na bango ezalaki zomi na misato.
همچنین برای بقیهٔ طایفهٔ قهات ده شهر در سرزمین غربی قبیلهٔ منسی به قید قرعه تعیین شد. 61
Bana mosusu ya Keati bazwaki na nzela ya zeke bingumba zomi kati na etuka ya Efrayimi, ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
خاندانهای طایفهٔ جرشون سیزده شهر به قید قرعه از قبیله‌های یساکار، اشیر، نفتالی و نصف قبیله منسی در باشان دریافت نمودند. 62
Bana ya Gerishoni, kolanda etuka na bango, bazwaki bingumba zomi na misato kati na libota ya Isakari, ya Aseri, ya Nefitali mpe kati na libota ya Manase oyo ezalaki na Bashani.
از طرف قبایل رئوبین، جاد و زبولون دوازده شهر به قید قرعه به خاندانهای مراری داده شد. 63
Bana ya Merari, kolanda bituka na bango, bazwaki na nzela ya zeke, bingumba zomi na mibale kati na libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Zabuloni.
به این ترتیب بنی‌اسرائیل این شهرها را با چراگاههای اطرافشان به لاویان دادند. 64
Boye bana ya Isalaele bapesaki epai ya bana ya Levi, bingumba wana mpe bamboka na yango ya mike.
شهرهای اهدایی قبیلهٔ یهودا، شمعون و بنیامین نیز به قید قرعه به ایشان داده شد. 65
Bapesaki bango bingumba wana na nzela ya zeke: balongolaki ndambo ya bingumba yango kati na mabota ya Yuda, ya Simeoni mpe ya Benjame; bongo bakomaki kobenga yango na bakombo ya mabota wana.
قبیلهٔ افرایم این شهرها و چراگاههای اطراف آنها را به خاندانهای طایفهٔ قهات داد: شکیم (یکی از شهرهای پناهگاه که در کوهستان افرایم واقع بود)، جازر، یقمعام، بیت‌حورون، ایلون و جت‌رمون. 66
Bituka mosusu ya bana ya Keati bazwaki bingumba ya kokimela kati na libota ya Efrayimi.
67
Bapesaki bango lokola engumba ya kokimela: Sishemi mpe bamboka na yango ya mike, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, Gezeri mpe bamboka na yango ya mike,
68
Yokimeami mpe bamboka na yango ya mike, Beti-Oroni mpe bamboka na yango ya mike,
69
Ayaloni mpe bamboka na yango ya mike, Gati-Rimoni mpe bamboka na yango ya mike.
از سرزمین غربی قبیلهٔ منسی، دو شهر عانیر و بلعام با چراگاههای اطراف آنها به خاندانهای دیگر قهات داده شد. 70
Mpe kati na etuka ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki: Aneri mpe bamboka na yango ya mike, Bileami mpe bamboka na yango ya mike. Bingumba nyonso oyo elongo na bamboka na yango ya mike epesamaki epai ya bituka mosusu ya bana ya Keati.
شهرهای زیر با چراگاههای اطرافشان به خاندانهای طایفهٔ جرشون داده شد: از طرف سرزمین شرقی قبیلهٔ منسی: شهرهای جولان در زمین باشان و عشتاروت؛ 71
Bakitani ya Gerishoni bazwaki: Kati na etuka ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki bingumba oyo: Golani kati na Bashani mpe bamboka na yango ya mike, Ashitaroti mpe bamboka na yango ya mike.
از قبیلهٔ یساکار: قادش، دابره، 72
Kati na libota ya Isakari, bazwaki: Kedeshi mpe bamboka na yango ya mike, Dabirati mpe bamboka na yango ya mike,
راموت، عانیم؛ 73
Ramoti mpe bamboka na yango ya mike, Anemi mpe bamboka na yango ya mike.
از قبیلهٔ اشیر: مش‌آل، عبدون، 74
Kati na libota ya Aseri, bazwaki: Mashali mpe bamboka na yango ya mike, Abidoni mpe bamboka na yango ya mike,
حقوق، رحوب؛ 75
Ukoki mpe bamboka na yango ya mike, Reobi mpe bamboka na yango ya mike.
از قبیلهٔ نفتالی: قادش در جلیل، حمون و قریتایم. 76
Kati na libota ya Nefitali, bazwaki: Kedeshi kati na Galile mpe bamboka na yango ya mike, Amoni mpe bamboka na yango ya mike, Kiriatayimi mpe bamboka na yango ya mike.
شهرهای زیر با چراگاههای اطرافشان به خاندانهای طایفهٔ مراری داده شد: از قبیلهٔ زبولون: رمونو و تابور؛ از قبیلهٔ رئوبین در شرق رود اردن مقابل شهر اریحا: باصر در بیابان، یهصه، قدیموت و میفعت؛ از قبیلهٔ جاد: راموت در ناحیهٔ جلعاد، محنایم، حشبون و یعزیر. 77
Bana mosusu ya Merari bazwaki bingumba oyo: kati na libota ya Zabuloni: Rimono mpe bamboka na yango ya mike, Tabori mpe bamboka na yango ya mike.
78
Kati na libota ya Ribeni, kuna na ngambo ya este ya Yordani, pembeni ya Jeriko, bazwaki bingumba oyo: Betseri, kati na esobe, mpe bamboka na yango ya mike; Yakatsi mpe bamboka na yango ya mike,
79
Kedemoshi mpe bamboka na yango ya mike, Mefati mpe bamboka na yango ya mike.
80
Kati na libota ya Gadi, bazwaki: Ramoti kati na Galadi mpe bamboka na yango ya mike, Maanayimi mpe bamboka na yango ya mike,
81
Eshiboni mpe bamboka na yango ya mike, Yaezeri mpe bamboka na yango ya mike.

< اول تواریخ 6 >