< Salmenes 20 >
1 Til songmeisteren; ein salme av David. Herren bønhøyre deg på trengselsdagen, namnet åt Jakobs Gud berge deg!
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Tika ete Yawe ayanola yo na tango ya pasi; tika ete Nzambe ya Jakobi azala ndako batonga makasi mpo na kobatela yo.
2 Gjev han må senda deg hjelp frå heilagdomen og stydja deg frå Sion!
Tika ete asunga yo wuta na Esika na Ye ya bule mpe apesa yo makasi wuta na Siona.
3 Gjev han må minnast alle dine grjonoffer og finna ditt brennoffer godt! (Sela)
Tika ete akanisa makabo na yo nyonso mpe andima mbeka na yo ya kotumba.
4 Han gjeve deg etter ditt hjarta og fullføre alle dine råder!
Tika ete akokisa posa ya motema na yo mpe mabongisi na yo nyonso.
5 Me vil fagna oss ved di frelsa og i vår Guds namn lyfta sigermerket. Herren uppfylle alle dine bøner!
Tokoganga na esengo mpo na lobiko na Yo mpe tokotombola bendele na Kombo ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe akokisa bisengeli na Yo nyonso.
6 No veit eg at Herren frelser den han salva; han svarar honom frå sin heilage himmel med frelsande storverk av si høgre hand.
Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye, ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola, na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.
7 Desse prisar vogner, og hine prisar hestar, men me prisar namnet åt Herren, vår Gud.
Bamoko batiaka elikya na bango kati na bashar, bamosusu, kati na bampunda; kasi biso totiaka elikya na biso kati na Kombo na Yawe, Nzambe na biso.
8 Dei sig i kne og fell, men me stend og held oss uppe.
Bango, bafukamaka mpe bakweyaka; kasi biso, tozalaka kaka ya kotelema mpe totikalaka ngwi.
9 Herre, frels kongen! Han svare oss den dag me ropar!
Yawe, bikisa mokonzi! Yanola biso tango tozali kobelela.