< Salmenes 123 >
1 Ein song til høgtidsferderne. Til deg lyfter eg augo mine, du som sit i himmelen.
Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Natomboli miso na ngai epai na Yo, Yawe, oyo ovandi na Kiti na Yo ya Bokonzi kati na Lola.
2 Sjå, som augo til tenarar skodar på handi åt herrarne sine, som augo til tenestgjenta på handi åt frua si, soleis skodar våre augo upp til Herren, vår Gud, til dess han vert oss nådig.
Ndenge miso ya bawumbu etalaka nkolo na bango, mpe miso ya mwasi mosali etalaka nkolo na ye ya mwasi, ndenge wana mpe miso na biso ezali kotala Yawe, Nzambe na biso, kino asalela biso ngolu.
3 Ver oss nådig, Herre, ver oss nådig! for me er ovleg metta med vanvyrdnad.
Yawe, salela biso ngolu, yokela biso mawa! Pamba te tolembi kotiolama!
4 Ovleg metta er vår sjæl med spott ifrå dei kaute, med vanvyrdnad frå valdsmenner.
Tolembi penza kotiolama na bato ya lolendo mpe ya lofundu!