< Nahum 2 >

1 Ein folkeøydar fer upp imot deg. Vakta vollarne! Haldt utkik på vegen! Umgyrd lenderne, samla all di kraft!
Tala, mobebisi azali koya kosala yo mabe! Batela malamu bandako na yo batonga makasi, kengela nzela na yo, bongama mpo na bitumba mpe sangisa bato na yo.
2 For Herren vil reisa upp att stordomen åt Jakob liksom stordomen åt Israel, sidan ransmenner so hev øydt deim og tynt vintrei deira.
Yawe akozongisa lisusu nkembo ya Jakobi mpe ya Isalaele, atako babebisaki mpe bapanzaki mokili na bango, mpe atako babebisaki bilanga na bango ya vino.
3 Skjoldarne åt kjemporne hans er raudlita, stridsmennerne er klædde i skarlak, vognerne i eld og stål når han herbur deim, og spjot vert svinga.
Banguba mpe bilamba ya basoda na bango ezali ya langi ya motane; bibende ya bashar na bango ezali kongenga na mokolo oyo babongisi mpo na bitumba, mpe makonga basala na nzete ekomi kotambola bipai na bipai.
4 På vegarne rasar vognerne fram. Dei andferst på torgi. Dei er å sjå til som logar, som eldingar fer dei fram.
Bashar ezali kokota na elulu na nzela, ezali kokende mpe kozonga na bisika oyo bato ebele bakutanaka; ezali komonana lokola koni oyo ezali kopela moto, ezali kotambola na bangambo nyonso lokola mikalikali.
5 Han kjem i hug storfolket sitt, dei snåvar der dei gjeng, dei styrmer til bymuren, men skjoldtaket er reist.
Abengi basoda na ye nyonso ya mpiko. nzokande, na nzela na bango, bazali kotepatepa, bazali kokende na lombangu pene ya mir.
6 Elve-portarne vert opna, og kongsgarden sig saman.
Bikuke ya ebale efungwami, mpe ndako na ye ya bokonzi ebukani.
7 Ja, domen stend fast: ho vert nækt, dragsa burt. Ternorne hennar græt som duvor, dei slær seg for bringa.
Ekatami ete engumba wana ekokende na bowumbu mpe bakomema yango mosika penza; basali na yango ya basi bakolela lokola bibenga mpe bakomibeta batolo likolo ya pasi.
8 I all si tid var Nineve lik ein dam, rik av vatn, men no flyr dei burt. Stogga! Stogga! - Nei, ingen snur seg.
Na kala, engumba Ninive ezalaki lokola liziba ya mayi. Kasi tala yango lelo oyo: etoboki mpe ekomi kobimisa mayi! Bazali kobelela: « Botelema! Botelema! » Kasi ata moto moko te azongi lisusu kuna.
9 Rana no sylv, rana no gull! Her tryt det ikkje på skattar, på nøgdi av allskyns dyrverdige ting.
Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi, pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka mpe etonda na biloko ya motuya.
10 Tomt, tomleik, tøming! - Hjartestøkk, kneskjelv og verk i alle mjødmar, og alle andlit skifter liter.
Bakoteli yango, bapanzi yango, babotoli na makasi biloko na yango ya talo! Mitema ebukani, mabolongo ekomi kolenga, mpe banzoto etondi na somo.
11 Kvar er no løvehiet, etar-staden åt ungløvorne, der løva og løvemori gjekk, og løve-ungen, og ingen skræmde deim?
Wapi sik’oyo libulu epai wapi bankosi ezalaki kobokola bana na yango? Wapi sik’oyo libulu epai wapi nkosi ya mwasi elongo na bana na yango ezalaki kotambola na somo ata moke te?
12 Kvar er løva som rana so mykje som ungarne vilde hava, og drap åt løvemøderne, ja, fyllte upp holorne sine med ran og hii sine med det sundrivne?
Nkosi ebomi banyama ebele mpo ete epesa yango lokola bilei epai ya bana na yango, ekangi nyama ya kolia mpo na mwasi na yango, bongo etondisi libulu na yango na banyama oyo ebomi mpe na misuni.
13 Sjå, eg skal venda mot deg, segjer Herren, allhers drott. Vognerne dine skal eg lata ganga upp i røyk, og dine unge løvor skal sverdet øyda. Eg skal rydja ditt rov ut frå jordi. Og ingen skal meir høyra røysti åt dine sendemenner.
« Nakotombokela yo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga; « nakozikisa bashar na yo na moto, mpe mopanga ekoboma bana ya nkosi na yo. Nakobotola yo misuni nyonso awa na se; boye mongongo ya batindami na yo ekotikala koyokana lisusu te. »

< Nahum 2 >