< Amos 9 >
1 Ved alteret såg eg at Herren stod. Han sagde: Støyt til stolpen, so gåtterne skrell, lat det ramla nedyver kvar ein haus. Eg let deim som att er falla for sverd, ingen skal koma seg av, berga seg skal ikkje ein.
Namonaki Yawe atelemi pene ya etumbelo, mpe alobaki: « Buka makonzi ya Tempelo mpo ete ndako mobimba eningana mpe ekweyela bato nyonso na mito. Bato oyo bakotikala, nakoboma bango na mopanga. Moko te akokima, moko te akobika.
2 Bryt dei seg inn i helheim, mi hand tek deim derifrå ut, stig dei til himmelen upp, derifrå driv eg deim ned. (Sheol )
Soki bakimi na se ya mabele, na mboka ya bakufi, loboko na Ngai ekobimisa bango kuna; soki bakimi na Lola, nakokitisa bango na se. (Sheol )
3 Um dei gøymer seg burt på Karmels topp, eg finn deim og hentar deim heim. Um frå augo mine dei løyner seg av på havsens botn, derifrå byd eg ormen fram, og han skal deim bita.
Soki babombami na songe ya ngomba Karimeli, nakokanga bango mpe nakokitisa bango na se; soki babombami Ngai na se ya ebale monene, nakopesa mitindo na nyoka ete eswa bango kuna.
4 Um dei ver burtførde fangar under fiendehand, der skal eg bjoda sverd at det skal deim slå og augo mitt på deim skal sjå ilt og aldri mildt.
Ezala banguna na bango bamemi bango na bowumbu, nakopesa mitindo na mopanga ete eboma bango kuna. Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosala bango mabe, kasi bolamu te.
5 Herren, Allhers-Herren, han rører jordi so ho brånar, og heile mannheimen syrgjer, når all jordi stig som Nilen og fell som Egyptarelvi.
Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, asimbi mabele, mabele eninganaka, mpe bavandi na yango nyonso bakomaka na matanga, mokili mobimba etelemaka lokola ebale Nili mpe ekawukaka lokola mayi ya Ejipito.
6 Han hev i himlom sine høgsalar bygt, yver jordi reist sin kvelv. Han kallar vatnet or hav og auser det ned yver jord. Herren er hans namn.
Yawe atonga ndako na Ye kati na Lola mpe atia miboko na yango na mabele; abengaka mayi ya ebale monene mpe asopaka yango na etando ya mabele. Kombo na Ye ezali: Yawe.
7 Er de meir for meg enn kusitarne, de Israels born? segjer Herren. Hev eg ikkje ført Israel frå Egypt, filistaran’ frå Kaftor, og syraran’ frå Kir?
Bino bana ya Isalaele, boni, bokokani te na bato ya mokili ya Kushi? » elobi Yawe. « Boni, nabimisaki te Isalaele wuta na Ejipito, bato ya Filisitia wuta na Kreti, bato ya Siri wuta na Kiri?
8 Sjå augo til Herren, Herren ser ned på dette syndsens rike: Eg øyder deim burt frå mannaheim; men ikkje heilt eg øydar Jakobs hus, segjer Herren.
Solo, miso ya Nkolo Yawe ezali kotala bokonzi ya masumu; nakobebisa mpe nakolongola yango na mabele. Nzokande, nakobebisa te libota mobimba ya Jakobi, » elobi Yawe.
9 For sjå, eg sender ut bod: Eg Israels hus millom folki skjek, liksom du ristar eit såld, og ikkje eit korn på bakken fell.
« Pamba te nakopesa mitindo mpe nakoningisa libota ya Isalaele kati na bikolo nyonso ndenge bayungolaka ble; bongo ata mbuma moko te ya moke ekokweya na se.
10 Men for sverd skal døy kvar syndarar i mitt folk som kved: «Aldri oss skal ulukka koma og slå.»
Bato nyonso ya masumu kati na bato na Ngai bakokufa na mopanga, ba-oyo nyonso balobaka: ‹ Pasi ekotikala te kozwa to kokomela biso! ›
11 På dagen den vil eg reisa upp att Davids nedfalne hytta og sprungorne tetta og att-stødor lyfta, byggja upp som i fordoms tid,
Na mokolo wana, nakotonga lisusu ndako ya Davidi oyo ekweya, nakobamba madusu na yango, nakotelemisa lisusu bamir na yango oyo ebukana mpe nakotonga yango lisusu ndenge ezalaka kala,
12 for at dei skal erva det som av Edom er att, og alle dei folk som kallast med mitt namn, segjer Herren som fullfører dette.
mpo ete bakoka kozwa ndambo ya mokili ya Edomi oyo etikalaki, mpe ya bikolo nyonso oyo babengamaka na Kombo na Ngai, » elobi Yawe oyo asalaka makambo wana nyonso.
13 Ja, dagar dei koma skal, segjer Herren, då pløgjaren skurdmannen når; den som vindruvor tred, ser mannen som sår, på fjellom dryp det med saft, etter bakkom bekkjerne renn.
« Mikolo ezali koya, » elobi Yawe, « mikolo oyo mosali bilanga akobuka bambuma na yango noki, mpe moloni elanga ya vino akokamola vino noki. Vino ya sika ekobota na bangomba milayi mpe ekosopana na bangomba mikuse nyonso.
14 Og eg lagnaden snur for mitt folk Israel. Dei skal øydegardar byggja og bu der sjølv, dei skal vinberg planta og drikka deira vin, de skal stella seg hagar og eta deira frukt.
Nakozongisa Isalaele, bato na Ngai, oyo bakendeki na bowumbu, mpe bakotonga lisusu bingumba oyo ebebisamaki mpe bakovanda kati na yango. Bakolona banzete ya vino mpe bakomela vino na yango, bakolona bilanga mpe bakolia bambuma na yango.
15 Eg let deim bu i sitt land, og dei skal ikkje meir rivast upp frå sin heim, som eg deim gav, segjer Herren, din Gud.
Nakolona bango na mabele na bango moko, mpe bakotikala kopikola bango lisusu te na mabele oyo napesaki bango, » elobi Yawe, Nzambe na yo.