< Amos 4 >
1 Det skal høyra på dette ordet, de Basans kyr, som er på Samariafjellet, de som piner dei små og dei arme mun slå, som segjer til dykkar herrar: «Lat oss få so me kann drikka!»
Bino bangombe ya basi ya Bashani, boyoka maloba oyo; bozali lokola ngomba ya Samari, bino bato oyo bonyokolaka babola, bomonisaka bato bakelela pasi mpe bolobaka na mibali na bino: « Bomemela biso masanga mpo tomela. »
2 Herren, Herren, svor ved sin heilagdom: Sjå, dagar det koma skal yver dykk då med hakar dei hentar dykk fram og resten med krokar dreg upp.
Nkolo Yawe alapi ndayi mpo na bosantu na Ye: « Solo, na mikolo ekoya, bakomema bino mpe bana na bino na bandobo;
3 Gjenom sprunger i muren fer det, ei um senn, og kastar gudarne burt, segjer Herren.
bokobimela na madusu kati na mir, moko na moko na lidusu oyo ezali liboso na ye, mpe bakobengana bino kino na ngomba Erimoni, » elobi Yawe.
4 Kom til Betel og gjer synd, til Gilgal og synda enn meir; kvar morgon slagtoffer ber fram, kvar tridje dagen tiend,
« Bokende na Beteli mpe bosala masumu, bokende na Giligali mpe bosala lisusu masumu koleka. Bobonza bambeka na bino tongo nyonso, mpe eteni na bino ya zomi sima na mokolo ya misato.
5 Til takkoffer syra brød brenn, lys ut at de fri-offer gjer. For slikt mun de lika, de Israels born, segjer Herren, Herren.
Botumba farine oyo batia levire lokola likabo ya kozongisa matondi, mpe bobeta tolo mpo na makabo na bino, oyo bokati kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko. Bino bana ya Isalaele, bolobela yango na mongongo makasi, pamba te bolingaka nde kosala bongo, elobi Nkolo Yawe.
6 Det var eg som let dykk i kvar ein by vanta maten i munn, brødløysa gav eg i kvar ein heim. Og De vende’kje um til meg, segjer Herren.
Nabomaki bino nzala kati na bingumba na bino nyonso, napimelaki bino bilei kati na bamboka na bino nyonso; kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
7 Det var eg som heldt regnet attende tri månader fyre skurden. Eg gav regn til den eine byen, den andre byen fekk ingen ting. Den eine åkren fekk regn, og den åkren som ikkje fekk regn, han turka burt.
« Napimelaki bino lisusu mvula, basanza misato mobimba liboso ete tango oyo babukaka bambuma ekoma. Natindaki mvula na engumba moko mpe nakangaki yango na engumba mosusu. Elanga moko enokelaki mvula, kasi mosusu ezangelaki yango mpe ekawukaki.
8 Og tvo, tri byar gjekk til ein by til ein vatsdrykk å få, og dei fekk ikkje nok. Men de vende’kje um til meg, segjer Herren.
Bato bazalaki kotambola-tambola longwa na engumba moko kino na engumba mosusu mpo na koluka mayi, kasi bazwaki mayi oyo ekokelaki baposa na bango te; atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
9 Kornet eg slo med sotbrand og rust, og hagarne mange og vinbergi og fike- og oljetrei. Deim åt grashoppen upp. Men de vende’kje um til meg, segjer Herren.
« Mbala mingi, nazalaki kobwakela bilanga na bino bokono, banzete na bino ya ble mpe ya vino ekomaki kokawuka; bongo mabanki ekomaki kolia banzete na bino ya figi mpe ya olive. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
10 Eg sende sotti på dykk liksom i Egypt. Eg drap dykkar gutar med sverd. Hestarn’ vart herfang. Eg let dykk illtev frå valen i nasarne få. Men de vende’kje um til meg, segjer Herren.
« Natindaki, kati na bino, bokono oyo ebomaka, ndenge nasalaki kati na Ejipito; nabomaki bilenge mibali na bino na mopanga mpe nasalaki ete babotola bampunda na bino; mpe natondisaki bazolo na bino na solo ya bibembe oyo ekufaki na molako na bino. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
11 Eg gjorde ein omstøyt ibland dykk, som då Gud støytte ned Sodoma og Gomorra. Og de vart som ein brand berga or eld. Men de vende’kje um til meg, segjer Herren.
« Nabebisaki bino ndenge nabebisaki Sodome mpe Gomore; bozalaki lokola koni ya moto oyo babimisi na moto. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.
12 Difor gjer eg med deg, Israel, so. Sidan eg gjerne vil gjera so med deg, bu deg til å møta din Gud, Israel.
« Yango wana, Isalaele, tala makambo oyo nakosala yo! Mpe lokola nakosala yo bongo, Isalaele, mibongisa mpo na kokutana na Nzambe na yo. »
13 For sjå: Han som lagar fjelli og skaper vinden, og ein mann sine tankar fortel, og myrker bryt til morgonljos, han som stig på jordheims haugar - Herren, allhers drott, er namnet hans.
Pamba te Ye oyo asalaki bangomba, oyo akelaki mipepe, oyo alakisaka makanisi na Ye epai na moto, oyo abongolaka pole molili, oyo atambolaka likolo ya bangomba ya mokili, Kombo na Ye ezali: Yawe, Nzambe Mokonzi ya mampinga.