< KwabaseRoma 3 >
1 Pho-ke yibuphi ubungcono bomJuda, kumbe luyini usizo lokusoka?
Boye, kozala Moyuda ezali na litomba nini? Kokatama ngenga ezali na tina nini?
2 Kukhulu ngendlela yonke; ngoba kuqala-ke ukuthi baphathiswe amazwi kaNkulunkulu.
Solo, ezali penza na litomba monene kati na makambo nyonso. Pamba te Maloba ya Nzambe epesamaki liboso epai na bango.
3 Ngoba kuyini uba abanye bengakholwanga? Ukungakholwa kwabo kuzakwenza ize ukholo lukaNkulunkulu yini?
Soki Bayuda mosusu bazangaki kondima, boni, bozangi na bango kondima ekolongola bosembo ya Nzambe?
4 Phinde! Kodwa uNkulunkulu kabe leqiniso, kodwa wonke umuntu abe ngumqambimanga, njengokulotshiweyo ukuthi: Ukuze uthiwe ulungile emazwini akho, unqobe ekwahlulelweni kwakho.
Soki moke te! Nzambe azali solo, mpe bato nyonso bazali bakosi kolanda ndenge ekomama: « Mpo ete bamona yo sembo na maloba na yo, mpe okobanda kolongaka tango bakobanda kosambisaka yo. »
5 Kodwa uba ukungalungi kwethu kubonakalisa ukulunga kukaNkulunkulu, sizakuthini? Kambe uNkulunkulu kalunganga yini owehlisela ulaka? (Ngikhuluma njengomuntu.)
Kasi soki mabe na biso ezali kotalisa polele bosembo ya Nzambe, toloba nini? Nzambe azali mabe tango akitiselaka biso kanda na Ye? Nazali kaka kokanisa lokola moto.
6 Phinde! Uba kungenjalo uNkulunkulu uzawahlulela njani umhlaba?
Te, ezali bongo te! Soki ezalaki bongo, ndenge nini Nzambe akokaki kosambisa mokili?
7 Ngoba uba iqiniso likaNkulunkulu landisile kakhulu edumeni lwakhe ngamanga ami, ngisagwetshelwani mina futhi njengesoni?
To soki lokuta na ngai etalisi polele bosolo ya Nzambe mpe etomboli nkembo na Ye, mpo na nini nazwa lisusu etumbu lokola moto ya masumu?
8 Njalo kungenjengalokhu sigconwa, lanjengoba abanye bathi thina sithi: Kasenze izinto ezimbi ukuze kuvele okuhle? Abakulahlwa kwabo kuba ngokokulunga.
Mpe mpo na nini toloba te: « Tika ete tosala mabe mpo ete bolamu ebima kati na mabe » ndenge bato oyo batongaka biso bakosaka ete toteyaka bongo. Bato wana basengeli kozwa etumbu oyo ekoki na mabe na bango.
9 Pho-ke? Singcono yini? Hatshi bo! Ngoba sesiwacalile mandulo amaJuda kanye lamaGriki ukuthi wonke angaphansi kwesono,
Boye, toloba nini? Biso Bayuda toleki bato mosusu? Te, soki moke te! Pamba te tosilaki kotalisa ete bato nyonso, ezala Bayuda to Bapagano, bango nyonso bazali na se ya bokonzi ya lisumu.
10 njengokulotshiweyo ukuthi: Kakho olungileyo, kakho loyedwa;
Kolanda ndenge ekomama: « Moto ya sembo azali te, ata moko te;
11 kakho oqedisisayo, kakho odinga uNkulunkulu;
moto ya mayele azali te; ata moto moko te alukaka Nzambe.
12 bonke baphambukile, kabasizi lutho bonkana; kakho owenza okuhle, kakho ngitsho loyedwa;
Bango nyonso babunga nzela, bango nyonso bamibebisa; moko te asalaka bolamu, ata moko te.
13 umphimbo wabo ulingcwaba elivulekileyo; bakhohlisa ngenlimi zabo; ubuhlungu bephimpi bungaphansi kwendebe zabo;
Minoko na bango ezali lokola bakunda ya kofungwama, lolemo na bango esalaka mosala ya kokosa, bibebu na bango ezali na ngenge ya etupa.
14 omlomo wabo ugcwele ukuqalekisa lokubaba;
Minoko na bango etonda na makambo ya bololo mpe na bilakeli mabe.
15 inyawo zabo ziphangisela ukuchitha igazi;
Makolo na bango epotaka mbangu mpo na kosopa makila.
16 incithakalo losizi kusendleleni zabo,
Na bisika nyonso oyo balekelaka, batikaka kaka libebi mpe pasi;
17 njalo indlela yokuthula kabayazanga;
bayebi nzela ya kimia te.
18 ukwesaba uNkulunkulu kakukho phambi kwamehlo abo.
Kotosa Nzambe ezali na tina ata moke te na miso na bango. »
19 Njalo siyazi ukuthi konke okutshoyo umlayo, ukukhuluma kubo abangaphansi komlayo, ukuze yonke imilomo ivinjwe, lokuthi umhlaba wonke ube lecala kuNkulunkulu;
Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.
20 ngoba emisebenzini yomlayo kakulanyama ezalungisiswa phambi kwakhe; ngoba ngomlayo kulokwazi isono.
Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.
21 Kodwa khathesi-ke sekubonakalisiwe ukulunga kukaNkulunkulu ngaphandle komlayo, okufakazelwa ngumlayo labaprofethi;
Kasi sik’oyo, na kozanga kosalela Mobeko, Nzambe atalisi polele ndenge nini akomisaka bato sembo liboso na Ye, ndenge Mobeko mpe Basakoli batatola yango.
22 ngitsho ukulunga kukaNkulunkulu ngokholo lukaJesu Kristu kubo bonke laphezu kwabo bonke abakholwayo; ngoba kawukho umehluko;
Bato nyonso oyo bandimaka, Nzambe akomisaka bango bato ya sembo na nzela ya kondima Yesu-Klisto. Bokeseni ezali te kati na Bayuda mpe Bapagano,
23 ngoba bonke bonile basilele enkazimulweni kaNkulunkulu,
pamba te bato nyonso basali masumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe;
24 balungisiswa ngesihle ngomusa wakhe ngohlengo olukuKristu Jesu;
mpe bato nyonso bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Yesu-Klisto.
25 uNkulunkulu ammisayo ukuthi abe yinhlawulo yokuthula, ngokholo egazini lakhe, ukuze kube yisibonakaliso sokulunga kwakhe, ngokuyekelwa kwezono ezenziwa ngaphambili, ekubekezeleni kukaNkulunkulu;
Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango.
26 ukuze kube yisibonakaliso sokulunga kwakhe kulesisikhathi, ukuze abe ngolungileyo lokuthi uyamlungisisa ongowokholo lukaJesu.
Nzambe asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye na tango oyo, mpo ete Ye moko azala Sembo mpe atanga lokola moto ya sembo, moto oyo azali kondimela Yesu.
27 Ngakho kungaphi ukuzincoma? Kuvalelwe phandle. Ngomthetho bani? Wemisebenzi yini? Hatshi bo, kodwa ngomthetho wokholo.
Boye, tina nini komikumisa? Tina ezali te! Na mobeko nini? Na mobeko ya misala? Te, kasi na nzela ya kondima.
28 Ngakho siphetha ngokuthi umuntu ulungisiswe ngokholo, ngaphandle kwemisebenzi yomlayo.
Pamba te tososoli ete moto atangamaka lokola moto ya sembo na nzela kaka ya kondima, kasi na nzela ya kotosa Mobeko te.
29 Kambe unguNkulunkulu wamaJuda kuphela? Njalo kayisuye lowabezizwe yini? Yebo lowabezizwe;
Boni, Nzambe azali kaka Nzambe ya Bayuda? Azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya te? Solo, azali mpe Nzambe ya bato ya bikolo ya bapaya.
30 lokhu uNkulunkulu emunye, ozalungisisa ukusoka ekholweni, lokungasoki ngokholo.
Pamba te Nzambe azali kaka moko; Ye nde akomisaka, na nzela ya kondima na bango, bato oyo bakatisa ngenga mpe bato oyo bakatisa ngenga te, bato ya sembo.
31 Ngakho siyawenza umlayo ube yize ngokholo yini? Phinde! Kodwa siyawuqinisa umlayo.
Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima? Soki moke te! Tozali kutu kolendisa yango.