< नीतिसूत्रे 4 >

1 मुलांनो, वडिलांचे शिक्षण ऐका, आणि सुज्ञान समजण्यासाठी त्याकडे लक्ष द्या.
Bana na ngai, boyokaka mateya ya tata, bozalaka na bokebi mpo ete bozwa mayele.
2 मी तुम्हास चांगला सल्ला देतो; माझी शिकवण कधीही विसरु नका.
Pamba te nazali kopesa bino mateya ya malamu; bobwaka mateya na ngai te.
3 जेव्हा मी माझ्या वडिलाचा मुलगा होतो, माझ्या आईच्या दृष्टीने सुकुमार व एकुलता एक होतो,
Ngai mpe nazalaki mwana malamu na miso ya tata na ngai, boye mama na ngai alingaki ngai makasi lokola mwana oyo abotama kaka ye moko.
4 त्यांनी मला शिकवले आणि मला म्हणाले, “तुझे मन माझी वचने घट्ट धरून ठेवो; माझ्या आज्ञा पाळ आणि जिवंत राहा.
Tata na ngai azalaki koteya mpe koloba na ngai boye: « Tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai, bomba mibeko na ngai mpe okozala na bomoi,
5 ज्ञान आणि सुज्ञता संपादन कर; माझे शब्द विसरु नकोस आणि माझ्या मुखातले शब्द नाकारू नकोस;
zwa bwanya, zwa mayele, kobosana yango te, kopesa mokongo te na maloba ya monoko na ngai,
6 ज्ञानाचा त्याग करू नकोस ते तुझे राखण करील; त्याच्यावर प्रीती कर आणि ते तुझे रक्षण करील.
kosundola bwanya te, mpe yango ekobatela yo, linga yango mpe ekobomba yo.
7 ज्ञान हे सर्वात महत्वाची गोष्ट आहे म्हणून ज्ञान संपादन कर, आणि आपले सर्वस्व खर्चून सुज्ञता मिळव.
Tala ebandeli ya bwanya: Zwa bwanya, pesa biloko nyonso oyo ozali na yango mpo ete ozwa mayele.
8 ज्ञान हृदयात जतन करून ठेव आणि ते तुला उंचावेल, जेव्हा तू त्यास आलिंगन देशील तर ते तुझा सन्मान करील.
Simba yango makasi, mpe ekotombola yo; yamba yango, mpe ekopesa yo lokumu.
9 ते तुझ्या शिरावर सन्मानाचे वेष्टन देईल; ते तुला सुंदर मुकुट देईल.”
Ekolatisa yo ekoti ya lokumu na moto, ekopesa yo motole ya nkembo. »
10 १० माझ्या मुला, ऐक आणि माझ्या वचनाकडे लक्ष दे, आणि तुझ्या आयुष्याची वर्षे पुष्कळ होतील.
Mwana na ngai, yoka mpe yamba maloba na ngai, mpe mibu ya bomoi na yo ekobakisama.
11 ११ मी तुला ज्ञानाचा मार्ग दाखविला आहे; मी तुला सरळ मार्गाने घेऊन जात आहे.
Nazali kolakisa yo nzela ya bwanya, nazali kotambolisa yo na nzela ya alima.
12 १२ जेव्हा तू चालशील, तेव्हा तुझ्या मार्गात कोणीही उभा राहणार नाही. आणि जर तू धावशील, तर तू अडखळणार नाहीस.
Mpo ete makolo na yo ezala na mikakatano te tango okotambola; mpe soki okimi mbangu, okokweya te.
13 १३ शिस्त घट्ट धरून ठेव, ती सोडून देऊ नको; ते सांभाळून ठेव, कारण ते तुझे जीवन आहे.
Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo, kobwaka yango te, batela yango malamu mpo ete ezali bomoi na yo.
14 १४ दुष्टांचे मार्ग आचरणात आणू नको, आणि जे वाईट करतात त्यांच्या मार्गाने चालू नको.
Kokotaka te na nzela ya bato ya mobulu mpe kotambolaka te na nzela ya bato mabe.
15 १५ ते टाळ, त्याजवळ जाऊ नकोस; त्यापासून मागे फीर आणि दुसऱ्या मार्गाने जा.
Longwa kati na bango, kolekela wana te, kosala mpe maseki kuna te, kasi kende na yo na nzela mosusu.
16 १६ कारण त्यांनी वाईट केल्याशिवाय त्यांना चैन पडत नाही आणि कोणाला अडखळून पाडल्याशिवाय त्यांना झोप लागत नाही.
Pamba te balalaka pongi te soki basali nanu moto mabe te, mpe pongi ekimaka bango soki babomi moto te;
17 १७ कारण ते दुष्टाईने मिळवलेली भाकर खातात आणि हिंसेचे मद्य पितात.
baliaka lipa na nzela ya mabe mpe bamelaka vino na nzela ya mobulu.
18 १८ परंतु योग्य करणाऱ्याचा मार्ग जो उदयाच्या प्रकाशासारखा आहे; मध्यान्हापर्यंत अधिकाधिक प्रकाशणाऱ्यासारखा आहे.
Nzokande, nzela ya bato ya sembo ezali lokola pole ya tongo makasi, oyo kongenga na yango eyaka malembe-malembe kino tango moyi ekobima makasi.
19 १९ पण दुष्टाचे मार्ग अंधकारासारखे आहेत, ते कशाशी अडखळले हे त्यांना समजत नाही.
Nzela ya bato ya mobulu ezali lokola molili, bayebaka te eloko nini ekokweyisa bango.
20 २० माझ्या मुला, माझ्या वचनाकडे लक्ष दे. माझे सांगणे ऐक.
Mwana na ngai, zala na bokebi na maloba na ngai, pesa litoyi na yo na mateya na ngai.
21 २१ ती तुझ्या डोळ्यापासून जाऊ देऊ नकोस; ती तुझ्या अंतःकरणात ठेव.
Tika ete ezala te mosika ya miso na yo! Batela yango malamu kati na motema na yo,
22 २२ कारण ज्यांना माझी वचने सापडतात त्यांस ती जीवन देतात, आणि त्यांच्या सर्व देहाला आरोग्य देतात.
pamba te ezali bomoi mpo na bato oyo bazwaka yango, mpe epesaka nzoto kolongono.
23 २३ तुझे अंतःकरण सुरक्षित ठेव आणि सर्व दक्षतेने त्याचे संरक्षण कर, कारण त्यातूनच जीवनाचा झरा वाहतो.
Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso, pamba te makambo nyonso oyo tosalaka, wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.
24 २४ वाकडे बोलणे तुझ्यापासून दूर ठेव, आणि दूषित बोलणे सोडून दे.
Longola lokuta na monoko na yo, mpe longola mabe na bibebu na yo.
25 २५ तुझे डोळे नीट समोर पाहोत, आणि तुझ्या पापण्या तुझ्यापुढे सरळ राहोत.
Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso, mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.
26 २६ तुझ्या पावलांसाठी सपाट वाट कर; मग तुझे सर्व मार्ग सुरक्षित होतील.
Bongisa nzela oyo makolo na yo ekolekela, mpe tambola kaka na nzela oyo oyebi malamu.
27 २७ तू उजवीकडे किंवा डावीकडे दूर वळू नको; तू आपला पाय वाईटापासून राख.
Kotengama te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, longola makolo na yo na mabe.

< नीतिसूत्रे 4 >