< Salamo 30 >
1 Honjoneko irehe ry Iehovà, ami’ty nañongaha’o ahy, vaho tsy napo’o hitohàke amako o rafelahikoo.
Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo. Yawe, nanetoli Yo, pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.
2 Ry Iehovà, Andrianañahareko, nitoreovako le jinanga’o;
Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yo mpo na kosenga lisungi, mpe obikisaki ngai na bokono.
3 Ry Iehovà, naonjo’o boak’ an-tsikeokeok’ ao ty fiaiko; nahatam-beloñe ahy irehe tsy hizotsoako mb’an-koboñe ao. (Sheol )
Yawe, obimisaki ngai na mboka ya bakufi, obatelaki bomoi na ngai mosika na bato oyo bazali kokita na libulu. (Sheol )
4 Sabò t’Iehovà, ry ondaty noro’eo, andriaño i tahina’e masiñey.
Boyemba banzembo mpo na lokumu ya Yawe, bino babulami na Ye; bokumisa Kombo na Ye ya bule.
5 Amy te aniany avao ty haviñera’e, pak’an-kaveloñe heneke ty fañosiha’e; mete mahaporea’ ty maraindray ty firovetañe, fe ho tendreke maraiñe ty firebehañe.
Pamba te kanda makasi na Ye ewumelaka mpo na mwa tango moke, kasi ngolu na Ye ewumelaka seko na seko; kolela ekoki kowumela kino na pokwa, kasi kosepela ekokota na tongo.
6 Le hoe iraho, te niraorao: tsim-bia hasiotse.
Tango nazalaki na kimia, nalobaki: « Nakotikala kokweya te. »
7 Ry Iehovà, ty fañisoha’o ro nampijadoña’o i vohikoy; ie naeta’o ty lahara’o le nimarimarike.
Yawe, tango osalelaki ngai ngolu, olendisaki ngomba na ngai; kasi tango obombelaki ngai elongi, nabungisaki elikya.
8 Ihe ry Iehovà ty nikoihako, naho i Talè ty nihalaliako;
Yawe, nabelelaki Yo; nabelelaki Yawe mpo na kosenga lisungi:
9 Ino ty tombo’e amo liokoo, t’ie higodoñe mb’an-koboñe ao? Hibango Azo hao o debokeo? Ho talilie’e hao ty figahiña’o?
« Litomba nini ezali soki nakufi, soki nakiti na libulu? Boni, putulu ekokumisa Yo? Boni, ekosakola boyengebene na Yo?
10 Janjiño ry Iehovà, le tretrezo iraho, ry Iehovà, vaho imbao!
Yawe, yoka ngai mpe salela ngai ngolu; Yawe, zala lisungi na ngai. »
11 Nafote’o ho tsinjake o fandalakoo; hinalo’o amako o gonikoo, vaho sinaro’o hafaleañe,
Obongoli kolela na ngai, okomisi yango mabina; olongoli mokumba na ngai mpe olatisi ngai esengo,
12 Soa te hisabo Azo ty engeko le tsy hitsiñe; Ry Iehovà, Andrianañahareko, handriañeko nainai’e.
mpo ete molimo na ngai ekumisa Yo na banzembo, kasi navanda nye te. Yawe, Nzambe na ngai, nakokumisa Yo libela na libela.