< Deotoronomia 22 >
1 Naho zoe’o mandifike ty añombe ndra añondrin-dongo’o, ko amoea’o fa ampolio amy longo’oy.
Soki omoni meme to ngombe ya ndeko na yo ezali koyengayenga, kotala yango pamba te, kasi kanga yango mpe zongisa yango epai ya nkolo na yango.
2 Aa naho tsy marine azo i longo’oy hera alik’ama’o, le endeso moly hey i harey naho tano ama’o ampara’ t’ie paia’ i longo’oy, vaho ampolio ama’e.
Soki ndeko yango avandaka pembeni na yo te to oyebi ye te, mema yango na ndako na yo mpe bomba yango kino akoya koluka yango, bongo okozongisela ye yango.
3 Izay ty hanoa’o i borìke’ey, naho izay ty hanoa’o i sarimbo’ey, vaho izay ty hanoa’o ze hene fanañan-dongo’o nimotso fa niisa’o. Ko itsidaredareañe.
Okosala ndenge moko soki omoni ane ya ndeko na yo to kazaka na ye to eloko mosusu oyo ye abungisi. Kotala yango na pamba te.
4 Naho isa’o mikorovok’ an-dalañe eo ty borìken-dongo’o ndra ty añombe’e, ko amoea’o, f’ie tsy mete tsy hañimb’ aze hampitroatse izay.
Soki omoni ane ya ndeko na yo to ngombe na ye ekweyi na nzela, kotala yango na pamba te; osalisa ndeko na yo mpo na kotelemisa yango.
5 Asoao tsy ho sikinen’ ampela ty fisikinan-dahilahy, ndra añombean-dahilahy ty saron’ ampela, fa tiva am’ Iehovà Andrianañahare’o ty manao izay.
Mwasi akoki kolata bilamba ya mibali te to mpe mobali akoki te kolata bilamba ya basi, pamba te Yawe, Nzambe na bino, ayinaka moto nyonso oyo asalaka makambo ya ndenge wana.
6 Naho zoe’o an-dalañe eo ty trañom-boroñe ke ambone hatae ey he an-tane eo, rekets’ ana’e ndra atoly vaho mamana o atoli’eo ndra o ana’eo ty rene’e le ko mandrambe ty rene’e rekets’ o ana’eo.
Soki omoni zala ya ndeke pembeni ya nzela, ezala likolo ya nzete to na mabele, mpe mama ya ndeke evandeli bana to maki, kozwa te mama elongo na bana.
7 Mete angala’o ty ana’e, fa avotsoro i rene’e, soa te ho tahie’e vaho ho lava haveloñe.
Osengeli kozwa bana, kasi kotika mama ete ekende mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi molayi.
8 Naho mañoreñ’ anjomba irehe le andranjio ana-kijoly hiarikatoke ty tafo’e tsy mone hanan-tahin-dio ty anjomba’o te mideboñe boak’ an-tafo’e ey t’indaty.
Tango okotonga ndako ya sika, kozanga te kotonga mir ya mokuse zingazinga ya motondo mpo ete omema ngambo ya makila te na ndako na yo soki moto akweyi likolo ya motondo.
9 Ko mitongy tabiry maro karaza’e amy tetem-balobo’oy; tsy mone ho tiva ty haliforan-tabiry nambolè’o naho ty havokara’ i tetekey.
Kolona te lolenge mibale ya nkona na elanga na yo ya vino; noki te nyonso ekokoma bule: oyo okolona mpe bambuma ya elanga na yo ya vino.
10 Ko aharo-baoñe an-dasarý ty añombe naho ty borìke.
Okoki kosangisa te na libaya moko, ngombe mpe ane mpo na kobalola mabele.
11 Ko misikin-damba natrao-pitenoñe volonañondry naho lamba-leny.
Okoki kolata te bilamba oyo basala na bapwale ya meme mpe na lino.
12 Androroto fole telo an-kotsok’ èfa’ i lamba fisaro’oy.
Okotia basinga na basonge minei ya elamba oyo okolata.
13 Naho mañenga valy t’indaty, le ie iolora’e ro heje’e,
Soki mobali abali mwasi mpe, sima na kosangisa na ye nzoto, asepeli na ye lisusu te,
14 naho manambaitambaiñe aze vaho mandoto ty añara’e ami’ty hoe: Nañenga ty ampela tia iraho le ie niharineako, nioniñe te tsy somondrara.
alobi ete ezaleli ya mwasi yango ezali mabe, bongo apanzi ye sango ya mabe na koloba: « Nabalaki mwasi oyo, kasi tango nasangisi na ye nzoto, namoni ete ayebaki nzoto ya mibali, »
15 Le hinday ty vente’ ty nahasomondrara aze mb’ amo roandriañe an-dalambeio ty rae naho i rene’ i somondraray,
wana tata mpe mama ya mwana mwasi, basengeli kolakisa epai na bampaka, na bikuke ya engumba, bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na bango ya mwasi ayebaki nzoto nanu ya mibali te.
16 le hanao ty hoe amo roandriañeo ty rae’e i somondraray: Natoloko am’ ondaty tia ty anako ho vali’e, fa heje’e,
Tata ya mwana mwasi akoloba na bampaka: « Nabalisaki mwana na ngai ya mwasi na mobali oyo, kasi asepeli na ye lisusu te;
17 mbore anaintsaiña’e ami’ty hoe, Tsy nitreako t’ie somondrara. Fe intoy o famentean-kasomondraran’ anakoo; Le halafi’ iareo añatrefa’ o roandria’ i rovaio i lambay,
amoni ete ezaleli ya mwana na ngai ya mwasi ezali malamu te, yango wana alobi: ‹ Mwana mwasi oyo ayebaki nzoto ya mibali. › Kasi tala bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na ngai ya mwasi ayebaki nanu nzoto ya mibali te. » Boye baboti ya mwana mwasi bakofungola elamba liboso ya bampaka ya engumba,
18 le ho rambese’ o roandriañeo indatiy vaho handilo aze.
mpe bampaka ya engumba bakozwa mobali yango mpe bakopesa ye etumbu:
19 Ho sazè’ iereo volafoty zato sekele le hatolo’ iereo an-drae’ i somondraray ty ami’ty nanolora’ ondaty tia añaran-draty i somondrara ana’ Israeley. Mbe ho valie’e avao vaho tsy hanan-jo hañary aze indatiy ampara’ te modo o andro’eo.
bakofutisa ye lomande ya mbongo ya bibende ya palata, nkama moko, mpe bakopesa yango epai ya tata ya mwana mwasi, pamba te mobali oyo asambwisi elenge mwasi ya Isalaele oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe akokoba kozala mwasi na ye: akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.
20 Aa naho mone to i sisý zay te tsy rendreke ty maha-tsinahavani-lahy i ampelay,
Kasi soki makambo oyo bafundeli ye ezali ya solo, mpe ezali ata na elamba moko te oyo ezali kotalisa ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te,
21 le hasese an-dalam-bein-drae’e eo i ampelay, vaho ho retsahe’ ondati’ i rova’eio vato am-para-pivetraha’e, ami’ty hakeo nanoe’e e Israele ao, ie nanao hakarapiloañe añ’anjomban-drae’e ao. Izay ty hamongora’o ama’o o hatserehañeo.
esengeli bamema ye libanda ya ndako ya tata na ye, mpe kuna bato ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa: asalaki likambo ya soni kati na Isalaele na kosalaka kindumba tango azalaki na ndako ya tata na ye. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
22 Naho vinamba niolotse ami’ty rakemba vali’ ondaty t’indaty, le tsy mete tsy songa havetrake i rakembay naho i lahilahy nifandia-tihy ama’ey, hamongora’o am’ Israele ao i halò-tsereke zay.
Soki bakangi mobali azali kosangisa nzoto na mwasi ya mobali mosusu, bango nyonso mibale basengeli kokufa. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na Isalaele.
23 Naho tendreke somondrara nifofoe’ ondaty an-drova ao t’indaty vaho mifandia tihy ama’e,
Soki kati na engumba mobali moko akutani na elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te bongo asangisi na ye nzoto, nzokande elenge mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye,
24 le tsy mahay tsy hasese’o mb’an-dalambei’ i rovay mb’eo ie roe vaho handretsaham-bato hikenkañe—i somondraray amy te tsy nikai-drombak’ an-drova ao, naho indatiy, amy te narè’e ty vali’ ondaty. Tsy mete tsy mongore’o ty haloloañe ama’o ao.
bokomema bango mibale na ekuke ya engumba wana mpe kobamba bango mabanga kino bakokufa. Bokoboma mwana mwasi, pamba te azalaki kati na engumba kasi agangaki te mpo ete baya kosunga ye; bokoboma mobali, pamba te asangisaki nzoto na makasi na mwasi ya mobali mosusu. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino.
25 F’ie an-kivok’ añe te zoe’ t’indaty ty somondrara nifofoe’ ondaty vaho mamahotse aze, le indaty nifandia-tihy ama’ey avao ty havetrake.
Soki mobali akoti na zamba na mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe asangisi na ye nzoto na makasi, nzokande mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, kaka mobali oyo asali likambo wana nde asengeli kokufa.
26 Ko anoañ’ inoñ’ inoñe amy somondraray fa tsy anañan-kakeo mañeva fate, fa manahake t’indaty mitroatse mañoho-doza aman-dongo’e, izay o tsaraeñeo,
Bokosala likambo moko te epai ya mwana mwasi, pamba te asali lisumu moko te oyo ekoki komema ye na kufa. Likambo oyo ekokani na moto oyo abundisi moninga na ye mpe abomi ye.
27 amy te nizoe’ indatiy an-kalok’ añe i somondraray; nikaikaike i somondrara nifofoeñey, fe tsy teo ty handrombake.
Pamba te mobali wana akutanaki na mwasi wana na zamba, mpe mwana mwasi wana akokaki koganga na ndenge nyonso alingi, kasi moto moko te akokaki komonana kuna mpo na kosunga ye.
28 Aa naho tendreke somondrara tsy nifofoeñe t’indaty le azi’e naho vahora’e vaho vamba iereo;
Soki mobali akutani na elenge mwasi, oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali te na mobali oyo alingi kobala ye, asangisi na ye nzoto na makasi, mpe bomoni bango;
29 le tsy mahay tsy mañondroke drala volafoty limampolo aman-drae’e indaty namahots’ azey, le ho vali’e i ampelay kanao narè’e; tsy mahazo mañary aze re ampara-pigadoña’ o andro’eo.
mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi: akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye.
30 Ao tsy ho rambese’ ondaty ty valin-drae’e, hamotera’e ty zon-drae’e.
Mwana mobali moko te akoki kobala mwasi ya tata na ye, noki te akosambwisa mbeto ya tata na ye.