< मत्ती 15 >

1 तब यरूशलेम सी कुछ फरीसी अऊर धर्मशास्त्री यीशु को जवर आय क कहन लग्यो,
Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye:
2 “तोरो चेला बुजूर्गों की परम्परावों ख कहाली टालय हंय, कि हाथ धोयो बिना रोटी खावय हंय?”
— Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso? Pamba te basukolaka maboko na bango te liboso ya kolia.
3 यीशु न उन्ख उत्तर दियो, “तुम भी अपनी परम्परावों को वजह कहाली परमेश्वर की आज्ञा टालय हय?”
Yesu azongiselaki bango: — Bongo bino, mpo na nini botosaka te mibeko ya Nzambe, kasi botosaka kaka bokoko na bino?
4 कहालीकि परमेश्वर न कह्यो हय, “अपनो बाप अऊर माय को आदर करजो, अऊर जो कोयी बाप यां माय ख बुरो कहेंन, ऊ मार डाल्यो जाय।”
Solo, Nzambe alobaki: « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »
5 पर तुम कह्य हय कि यदि कोयी अपनो बाप यां माय सी कहे, “जो कुछ तोख मोरो सी फायदा मिल सकत होतो, ऊ परमेश्वर ख दान कर दियो,”
Kasi bino, bolobaka: « Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye: ‹ Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nabonzi yango lokola likabo epai ya Nzambe, ›
6 त ऊ अपनो बाप को आदर नहीं करय, यो तरह तुम न अपनी परम्परा को वजह परमेश्वर को वचन ख टाल दियो।
abuki te mobeko ya kopesa tata na ye mpe mama na ye lokumu. » Ezali ndenge wana penza nde bozali kokomisa pamba Liloba na Nzambe mpo na kotombola bokoko na bino!
7 हे कपटियों, यशायाह न तुम्हरो बारे म या भविष्यवानी ठीकच करी हय:
Bato ya bilongi mibale! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino:
8 “हि लोग होठों सी त मोरो आदर करय हंय, पर उन्को मन मोरो सी दूर रह्य हय।
« Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai;
9 अऊर हि बेकार म मोरी भक्ति करय हंय, कहालीकि उन्की शिक्षा त केवल आदमियों को सिखायो हुयो नियम शास्त्र हंय।”
basambelaka Ngai kaka na pamba, mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »
10 तब ओन भीड़ ख अपनो जवर बुलाय क उन्को सी कह्यो, “सुनो, अऊर समझो:
Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango: — Boyoka mpe bososola makambo oyo:
11 जो मुंह म जावय हय, ऊ आदमी ख अशुद्ध नहीं करय, पर जो मुंह सी निकलय हय, उच आदमी ख अशुद्ध करय हय।”
eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.
12 तब चेलावों न आय क यीशु सी कह्यो, “का तय जानय हय कि फरीसियों न यो वचन सुन क ठोकर खायो?”
Bongo bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye: — Boni, oyebi te ete maloba oyo olobi ebetisi Bafarizeo mabaku?
13 ओन उत्तर दियो, “हर एक रोप जो मोरो स्वर्गीय पिता न नहीं लगायो, ऊ उखाड़्यो जायेंन।
Yesu azongisaki: — Nkona nyonso oyo Tata na Ngai ya Likolo alonaki te ekopikolama.
14 उन्ख जान देवो; हि अन्धा रस्ता दिखावन वालो आय अऊर अन्धा यदि अन्धो आदमी ख रस्ता दिखाये, त दोयीच गड्डा म गिर जायेंन।”
Botika bango; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.
15 यो सुन क पतरस न ओको सी कह्यो, “यो दृष्टान्त हम्ख समझाय दे।”
Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu: — Limbolela biso lisese oyo.
16 यीशु न कह्यो, “का तुम भी अब तक नासमझ हय?
Yesu atunaki bango: — Bino mpe, boni, bozwi nanu bososoli te?
17 का तुम नहीं जानय कि जो कुछ मुंह म जावय हय, ऊ पेट म पड़य हय, अऊर शरीर सी निकल जावय हय?
Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo?
18 पर जो कुछ मुंह सी निकलय हय, ऊ मन सी निकलय हय, अऊर उच आदमी ख अशुद्ध करय हय।
Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.
19 कहालीकि बुरो बिचार, हत्या, परस्त्रीगमन, व्यभिचार, चोरी, झूठी गवाही अऊर निन्दा यो मन सीच निकलय हय।
Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.
20 योच आय जो आदमी ख अशुद्ध करय हंय, पर बिना हाथ धोयो जेवन करनो आदमी ख अशुद्ध नहीं करय।”
Ezali makambo wana nde ekomisaka moto mbindo; kasi kozanga kosukola maboko liboso ya kolia ekomisaka moto mbindo te.
21 यीशु उत सी निकल क, सूर अऊर सैदा को प्रदेश को तरफ चली गयो।
Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni.
22 अऊर देखो, ऊ प्रदेश की एक कनानी बाई निकल क आयी, अऊर जोर की आवाज सी कहन लगी, “हे प्रभु! दाऊद की सन्तान, मोरो पर दया कर! मोरी बेटी ख दुष्ट आत्मा सताय रही हय।”
Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga: — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.
23 पर ओन ओख कुछ भी उत्तर नहीं दियो। चेलावों न ओको जवर आय क बिनती करन लग्यो, “येख भेज दे, कहालीकि वा चिल्लाती हमरो पीछू आय रही हय।”
Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye: — Bengana ye; azali kotiela biso makelele!
24 पर यीशु न उत्तर दियो, “इस्राएल को घराना की खोयी हुयी मेंढीं ख छोड़ मय कोयी को जवर नहीं भेज्यो गयो।”
Yesu azongisaki: — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele!
25 पर वा आयी, अऊर यीशु ख प्रनाम कर क् कहन लगी, “हे प्रभु, मोरी मदद कर!”
Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki: — Nkolo, sunga ngai!
26 यीशु न उत्तर दियो, “बच्चा की रोटी ले क कुत्ता को आगु डालनो ठीक नहाय।”
Yesu azongisaki: — Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa!
27 यो बात पर बाई न कह्यो, “सच हय प्रभु, पर कुत्ता भी ऊ जुठो खावय हंय, जो उन्को मालिक की मेज सी गिरय हंय।”
Mwasi yango alobaki: — Nkolo, ezali penza ya solo; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango!
28 येको पर यीशु न ओख उत्तर दियो, “हे बाई, तोरो विश्वास बड़ो हय। जसो तय चाहवय हय, तोरो लायी वसोच हो।” अऊर ओकी बेटी उच घड़ी सी चंगी भय गयी।
Bongo Yesu alobaki na ye: — Mwasi, kondima na yo ezali monene! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo! Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
29 यीशु उत सी गलील को झील को जवर आयो, अऊर उत पहाड़ी पर चढ़ क बैठ गयो।
Yesu alongwaki wana mpe akendeki na ebale ya Galile; amataki likolo ya ngomba mpe avandaki kuna.
30 तब भीड़ की भीड़ ओको जवर आयी। हि अपनो संग बहुत लंगड़ा, अन्धा, मुक्का, टुण्डा अऊर दूसरों बहुत सो ख ओको जवर लायो, अऊर उन्ख ओको पाय पर डाल दियो, अऊर ओन उन्ख चंगो कर दियो।
Bato ebele bayaki epai na Ye; bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bakufi miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko mpe bato mosusu ebele. Batiaki bango na makolo ya Yesu, mpe Yesu abikisaki bango.
31 जब लोगों न देख्यो कि मुक्का बोलय, अऊर टुण्डा चंगो होवय, अऊर लंगड़ा चलय, अऊर अन्धा देखय हंय त अचम्भा कर क् इस्राएल को परमेश्वर की बड़ायी करी।
Mpe bato bakamwaki mingi tango bamonaki ete bababa bakomi koloba, bato oyo bakufa makolo to maboko babiki, bato oyo batambolaka tengu-tengu bakomi kotambola malamu mpe bakufi miso bakomi komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isalaele.
32 यीशु न अपनो चेलावों ख बुलाय क कह्यो, “मोख यो भीड़ पर तरस आवय हय, कहालीकि हि तीन दिन सी मोरो संग हंय अऊर उन्को जवर कयीच खान को नहाय। मय उन्ख भूखो भेजनो नहीं चाहऊ, कहीं असो नहीं होय कि रस्ता म थक क रह्य जाये।”
Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki: — Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.
33 चेलावों न यीशु सी कह्यो, “हम्ख यो जंगल म कित सी इतनी रोटी मिलेंन कि हम इतनी बड़ी भीड़ ख सन्तुष्ट करबो?”
Bayekoli na Ye bazongisaki: — Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye?
34 यीशु न उन्को सी पुच्छ्यो, “तुम्हरो जवर कितनी रोटी हंय?” उन्न कह्यो, “सात, अऊर थोड़ी सी छोटी मच्छी।”
Yesu atunaki bango: — Bozali na mapa boni? Bayekoli bazongisaki: — Tozali na mapa sambo mpe ndambo ya bambisi ya mike-mike.
35 तब यीशु न लोगों ख जमीन पर बैठन की आज्ञा दियो।
Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele.
36 अऊर उन सात रोटी अऊर मच्छी ख लियो, अऊर धन्यवाद कर क् तोड़्यो, अऊर अपनो चेलावों ख देतो गयो, अऊर चेलावों न लोगों ख।
Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato.
37 तब सब खाय क सन्तुष्ट भय गयो अऊर चेलावों न बच्यो हुयो टुकड़ा सी भरयो हुयो सात टोकनी उठायी।
Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo.
38 जितनो न खायो, उन्म बाईयों अऊर बच्चां को अलावा चार हजार आदमी होतो।
Motango ya bato oyo baliaki ezalaki nkoto minei, longola basi mpe bana.
39 तब उन भीड़ ख बिदा कर क् डोंगा पर चढ़ गयो, अऊर मगदन क्षेत्र म आयो।
Sima na Yesu kozongisa bato, amataki kati na bwato mpe akendeki na etuka ya Magadani.

< मत्ती 15 >