< Sofoni 1 >
1 Na tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, azalaki mokonzi ya mokili ya Yuda, Yawe alobaki na Sofoni, mwana mobali ya Kushi, mwana mobali ya Gedalia, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Ezekiasi:
當猶大王亞們的兒子約西亞在位的時候,耶和華的話臨到希西家的玄孫,亞瑪利雅的曾孫,基大利的孫子,古示的兒子西番雅。
2 « Nakosilisa kobebisa biloko nyonso oyo ezali kati na mokili, » elobi Yawe,
耶和華說: 我必從地上除滅萬類。
3 « solo, nakoboma ezala bato to banyama, ezala bandeke ya likolo to bambisi ya ebale; nakolongola, na mokili, bato mabe mpe biloko oyo ebetisaka bato mabaku » elobi Yawe.
我必除滅人和牲畜, 與空中的鳥、海裏的魚, 以及絆腳石和惡人; 我必將人從地上剪除。 這是耶和華說的。
4 « Nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa mokili ya Yuda mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi etumbu; nakosilisa koboma, na esika oyo, nyonso oyo etikali, ya losambo ya nzambe Bala elongo na bakombo ya banganga-nzambe ya bapagano, oyo basalelaka banzambe ya bikeko:
我必伸手攻擊猶大 和耶路撒冷的一切居民, 也必從這地方剪除所剩下的巴力, 並基瑪林的名和祭司,
5 bato nyonso oyo bafukamaka na likolo ya bandako mpo na kosambela mampinga ya likolo, bato nyonso oyo bagumbamaka na kolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe na kombo na nzambe Moloki,
與那些在房頂上敬拜天上萬象的, 並那些敬拜耶和華指着他起誓, 又指着瑪勒堪起誓的,
6 bato nyonso oyo bapesaka Yawe mokongo, oyo balukaka Ye te mpe batunaka Ye te.
與那些轉去不跟從耶和華的, 和不尋求耶和華也不訪問他的。
7 Bovanda kimia liboso ya Nkolo Yawe, pamba te mokolo ya Yawe ekomi pene! Yawe abongisi mbeka, abulisi babengami na Ye.
你要在主耶和華面前靜默無聲, 因為耶和華的日子快到。 耶和華已經預備祭物, 將他的客分別為聖。
8 Na mokolo ya mbeka ya Yawe, nakopesa etumbu epai ya bakambi, epai ya bana mibali ya mokonzi mpe epai ya bato nyonso oyo balataka bilamba ya bapaya.
到了我-耶和華獻祭的日子, 必懲罰首領和王子, 並一切穿外邦衣服的。
9 Na mokolo wana, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bapumbwaka ekotelo ya tempelo, bato oyo batondisaka tempelo ya banzambe na bango ya bikeko na makambo ya kanza mpe na lokuta.
到那日,我必懲罰一切跳過門檻、 將強暴和詭詐得來之物充滿主人房屋的。
10 Na mokolo wana, » elobi Yawe, « koganga makasi ekoyokana wuta na Ekuke ya Bambisi, kolela ekoyokana wuta na Mboka ya sika mpe lokito monene wuta na bangomba mikuse.
耶和華說:當那日, 從魚門必發出悲哀的聲音, 從二城發出哀號的聲音, 從山間發出大破裂的響聲。
11 Bino bavandi ya etuka Makiteshi, bolela, pamba te bato nyonso ya mombongo bakokufa, mpe bato nyonso oyo batekaka palata bakobebisama!
瑪革提施的居民哪,你們要哀號, 因為迦南的商民都滅亡了! 凡搬運銀子的都被剪除。
12 Na tango wana, nakoluka engumba Yelusalemi na nzela ya mwinda, nakopesa etumbu epai ya bato nyonso oyo bamimonaka ete bakoka mpe bamilobelaka: ‹ Yawe asalaka na Ye eloko te, ezala ya malamu to ya mabe. ›
那時,我必用燈巡查耶路撒冷; 我必懲罰那些如酒在渣滓上澄清的; 他們心裏說: 耶和華必不降福,也不降禍。
13 Bakobotola bango bomengo na makasi mpe bakobuka bandako na bango; bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te; bakosala bilanga ya vino, kasi bakotikala komela vino na yango te. »
他們的財寶必成為掠物; 他們的房屋必變為荒場。 他們必建造房屋,卻不得住在其內; 栽種葡萄園,卻不得喝所出的酒。
14 Mokolo monene ya Yawe ekomi pene, solo ekomi pene mpe ezali koya noki penza. Boyoka! Makelele ya mokolo na Yawe ekozala bololo; ezala basoda ya mpiko, bakoganga mpo na koluka lisungi.
耶和華的大日臨近, 臨近而且甚快, 乃是耶和華日子的風聲; 勇士必痛痛地哭號。
15 Mokolo yango ekozala mokolo ya kanda makasi, mokolo ya pasi mpe ya somo, mokolo ya komitungisa mpe ya kobebisama, mokolo ya butu mpe ya molili makasi, mokolo ya mapata mpe mapata ya mwindo,
那日是忿怒的日子, 是急難困苦的日子, 是荒廢淒涼的日子, 是黑暗幽冥、密雲烏黑的日子,
16 mokolo ya kobeta bakelelo mpe ya makelele ya bitumba mpo na kobundisa bingumba batonga makasi mpe bandako milayi oyo batonga makasi.
是吹角吶喊的日子, 要攻擊堅固城和高大的城樓。
17 Nakotindela bato pasi ya makasi: bakokoma kotambola lokola bato balangwe masanga, pamba te basalaki masumu liboso ya Yawe; bakopanza makila na bango lokola putulu mpe bakobwaka misopo na bango lokola salite.
我必使災禍臨到人身上, 使他們行走如同瞎眼的, 因為得罪了我。 他們的血必倒出如灰塵; 他們的肉必拋棄如糞土。
18 Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili.
當耶和華發怒的日子, 他們的金銀不能救他們; 他的忿怒如火必燒滅全地, 毀滅這地的一切居民,而且大大毀滅。