< Sofoni 3 >

1 Mawa na engumba ya batomboki, engumba ya makambo ya mbindo, mpe engumba oyo enyokolaka bato!
הוי מראה ונגאלה--העיר היונה
2 Etosaka moto te, endimaka pamela te, etiaka elikya na Yawe te, epusanaka pene ya Nzambe na yango te.
לא שמעה בקול לא לקחה מוסר ביהוה לא בטחה אל אלהיה לא קרבה
3 Bakalaka na yango bazali lokola bankosi oyo ezali koganga; bakambi na yango bazali lokola bambwa ya zamba oyo esalaka bokila na pokwa, bongo etikaka ata eloko moko te na tongo.
שריה בקרבה אריות שאגים שפטיה זאבי ערב לא גרמו לבקר
4 Basakoli na yango bazali bato ya lolendo mpe ya lokuta. Banganga-Nzambe na yango babebisaka Esika ya bule mpe batosaka mibeko te.
נביאיה פחזים אנשי בגדות כהניה חללו קדש חמסו תורה
5 Kati na engumba yango, Yawe azali sembo, asalaka mabe te; mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo. Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te amonaka likambo ya soni te.
יהוה צדיק בקרבה לא יעשה עולה בבקר בבקר משפטו יתן לאור לא נעדר ולא יודע עול בשת
6 Nabomi bato ya bikolo mosusu, bandako na bango ya makasi ebebisami. Nasali ete babalabala na bango etikala lisusu na bato te mpo ete moto moko te alekela lisusu wana. Bingumba na bango ebebisami, ata moto moko te atikali lisusu kuna.
הכרתי גוים נשמו פנותם--החרבתי חוצותם מבלי עובר נצדו עריהם מבלי איש מאין יושב
7 Namilobelaki boye na tina na engumba oyo: « Solo, okobanga Ngai mpe okondima pamela na Ngai! » Boye bandako na yango ekobukana lisusu te, mpe nakotindela yango lisusu etumbu moko te. Kasi atako bongo, bakobaki kaka kosala misala na bango ya mabe.
אמרתי אך תיראי אותי תקחי מוסר ולא יכרת מעונה כל אשר פקדתי עליה אכן השכימו השחיתו כל עלילותם
8 Yango wana, « bozela Ngai, » elobi Yawe, « bozela Ngai na mokolo oyo nakoya mpo na kosamba elongo na bino; nazwaki mokano ya kosangisa bato ya bikolo nyonso mpe ya mikili nyonso mpo na kosopela bango kanda na Ngai, makasi nyonso penza ya kanda na Ngai: mokili mobimba ekozika na moto ya nguya ya kanda na Ngai.
לכן חכו לי נאם יהוה ליום קומי לעד כי משפטי לאסף גוים לקבצי ממלכות לשפך עליהם זעמי כל חרון אפי--כי באש קנאתי תאכל כל הארץ
9 Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka mpo na kobelela Kombo ya Yawe mpe kosalela Ye na motema mobimba.
כי אז אהפך אל עמים שפה ברורה לקרא כלם בשם יהוה לעבדו שכם אחד
10 Longwa na likolo ya bibale ya Kushi, bato na Ngai, oyo bagumbamelaka Ngai; bato na Ngai, oyo bapalangana bipai na bipai, bakomemela Ngai makabo.
מעבר לנהרי כוש--עתרי בת פוצי יובלון מנחתי
11 Na mokolo wana, oh bato na Ngai, bokoyokisama lisusu soni te mpo na mabe nyonso oyo bosalaki Ngai, pamba te nakolongola bato oyo bamimatisaka na lolendo kati na bino. Boye bokomitombola lisusu te na lolendo na ngomba na Ngai ya bule.
ביום ההוא לא תבושי מכל עלילתיך אשר פשעת בי כי אז אסיר מקרבך עליזי גאותך ולא תוספי לגבהה עוד בהר קדשי
12 Kasi kati na bino, nakotika bato oyo bakelela, bato oyo batambolaka na komikitisa, bato oyo bakozwa ebombamelo kati na Kombo na Yawe.
והשארתי בקרבך עם עני ודל וחסו בשם יהוה
13 Batikali ya Isalaele bakosala lisusu mabe te, bakokosa lisusu te to lokuta ekozala lisusu te kati na minoko na bango. Bakolia mpe bakolala na kimia, mpe moto moko te akobangisa bango lisusu.
שארית ישראל לא יעשו עולה ולא ידברו כזב ולא ימצא בפיהם לשון תרמית כי המה ירעו ורבצו ואין מחריד
14 Siona, mboka kitoko, yemba nzembo! Isalaele, ganga makasi! Yelusalemi, mboka kitoko, sepela; mpe tika ete motema na yo etonda na esengo!
רני בת ציון--הריעו ישראל שמחי ועלזי בכל לב בת ירושלם
15 Yawe alongoli etumbu na yo mpe akimisi banguna na yo. Yawe, Mokonzi ya Isalaele, azali elongo na yo; kobanga lisusu pasi moko te.
הסיר יהוה משפטיך פנה איבך מלך ישראל יהוה בקרבך לא תיראי רע עוד
16 Na mokolo wana, bakoloba na Yelusalemi: ‹ Oh Siona, kobanga te! Tika ete maboko na yo elemba te!
ביום ההוא יאמר לירושלם אל תיראי ציון אל ירפו ידיך
17 Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo, azali Elombe Mobikisi. Akosepela na yo makasi mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye; akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo. ›
יהוה אלהיך בקרבך גבור יושיע ישיש עליך בשמחה יחריש באהבתו--יגיל עליך ברנה
18 Lokola na mikolo ya bafeti oyo ekatama, nakolongola pasi kati na yo mpo ete ozala lisusu na soni te.
נוגי ממועד אספתי ממך היו--משאת עליה חרפה
19 Na tango wana, nakobeta bato nyonso oyo banyokolaki yo, nakosunga moto oyo atambolaka tengu-tengu mpe nakosangisa bato oyo bapanzana bipai na bipai. Nakopesa bango lokumu mpe nakosala ete sango na bango epanzana na mikili nyonso epai wapi basambwisaki bango.
הנני עשה את כל מעניך בעת ההיא והושעתי את הצלעה והנדחה אקבץ ושמתים לתהלה ולשם בכל הארץ בשתם
20 Na tango wana, nakosangisa bino, nakozongisa bino na mokili na bino. Nakopesa bino lokumu mpe nakosala ete sango na bino epanzana kati na bato ya bikolo nyonso ya mokili tango, na miso na bino, nakozongisa bato na bino, oyo bakendeki na bowumbu, » elobi Yawe.
בעת ההיא אביא אתכם ובעת קבצי אתכם כי אתן אתכם לשם ולתהלה בכל עמי הארץ בשובי את שבותיכם לעיניכם אמר יהוה

< Sofoni 3 >