< Sofoni 2 >

1 Oh ekolo oyo eyokaka soni te, bosangana nanu bino nyonso mpe bokanisa malamu
沒有廉恥的民族,在他們尚未像糠枇一樣被吹散之前,
2 liboso ete mokolo oyo ekatama mpo na kosambisama ekoka, liboso ete mokolo yango eleka lokola matiti ya loso oyo mopepe ememi, mpe liboso ete kanda mpe kotomboka ya Yawe ekomela bino!
在上主的怒火尚未來到你們身上,在上主憤怒的日子尚未來到你們身上以前,你們聚首檢討吧!
3 Boluka Yawe, bino bato nyonso ya komikitisa kati na mokili, bino oyo bokokisaka mitindo na Ye! Boluka kotambola na bosembo mpe na komikitisa! Tango mosusu bokobika na mokolo ya kanda ya Yawe.
地上所有遵守衪法律的卑微人! 你們應求上主,你們要尋求公義,要尋求謙和,也許你們在上主憤怒的日子,能藏身免禍。
4 Bakosundola engumba Gaza, bongo engumba Ashikeloni ekobebisama; bakobengana bato ya engumba Asidodi na makasi mpe bakopikola engumba Ekroni.
因為茄薩將被拋棄,阿市刻隆必被剷除。
5 Mawa na bino bavandi ya etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, bino bato ya Kereti! Pamba te Liloba na Yawe etelemeli bino: « Kanana, mokili ya bato ya Filisitia, nakobebisa yo, mpe moto ata moko te akotikala kati na yo. »
禍哉! 沿海地帶的居民,革勒提民族! 看,這是木攻擊你們的話:培肋舍特地! 我要貶抑你,把你毀滅得再無固民!
6 Etuka oyo ezali pembeni ya ebale monene, epai wapi bato ya Kreti bavandaka, ekokoma esika ya babateli bibwele mpe lopango ya kobokola bibwele.
沿海地帶必將成為牧的牧場,羊群的羊棧。
7 Ekokoma etuka ya batikali ya libota ya Yuda; bakokuta kuna bisika ya kobokola bibwele na bango. Pokwa nyonso, bakolala na bandako ya Ashikeloni, pamba te Yawe, Nzambe na bango, akobatela bango, akobongisa lisusu bomoi ya bato na bango, oyo bakowuta na bowumbu.
沿海地帶必將歸於猶大家的遺民;他們將沿著海濱放羊,晚上歇息在阿市刻隆的棧房,因為上主他們的天主必看顧他們,轉變他們的境遇。
8 « Nayokaki bato ya Moabi kofinga bato na Ngai mpe ndenge bato ya Amoni bazalaki kotiola mpe koluka kobotola mabele na bango.
我聽到了摩阿布的辱罵,阿孟子民火詆詬;他們辱罵了我的百姓,欺凌了我的領域。
9 Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »
為此,我指著我的生命起誓──萬軍的上主,以色列天主火斷語:摩阿布必要像索多瑪,哈孟子民必要像哈摩辣,變為荊棘叢、監堆、荒野,直到永遠。我百姓的遺民要劫掠他們,我民族的殘餘,要佔領他們的產業。
10 Wana nde lifuti oyo bakozwa mpo na lolendo na bango, pamba te bafingaki mpe batiolaki bato ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.
這事要臨到他們身上,是由於他們的的傲慢,因為他們辱罵欺凌了萬軍的上主的百姓。
11 Yawe akoyokisa bango somo tango akobebisa banzambe ya bikeko nyonso ya mabele. Bato ya bikolo nyonso bakogumbamela Ye na bisika nyonso, moto na moto na esika oyo akozala kati na mokili na ye.
上主必要威嚴地顯示給他們,因為衪要消滅地上的一切神衹;那時異邦各笆島嶼,各從自己的地方朝拜衪。
12 Bino mpe bato ya Kushi bokokufa na mopanga na ngai.
連你們雇士人,也要為我的刀劍所刺透。
13 Akosembola loboko na Ye mpo na kobundisa etuka ya nor, akobebisa Asiri akobebisa penza Ninive mobimba mpe akokawusa yango lokola esobe.
衪還要向北方伸出自己的手,為消滅亞述,使尼尼微化為荒地,像杪漠一樣乾旱。
14 Ekokoma esika oyo bitonga mpe banyama ya ndenge na ndenge ekokoma kolala. Esulungutu mpe kombekombe ekokoma kolekisa butu na yango na basonge ya bandako na yango. Kolela na yango ekoyokana kino na maninisa, libebi na libebi nde ekomonana na bikotelo ya bandako, mpe mabaya ya banzete ya sedele ekotikala polele.
牲畜和窪地所有的走獸必要臥息息其中,鵜鴣和鵁鶄也棲宿在她的柱頭間,鴟梟在窗上啼叫,烏鴉停門檻上,因為人剝去了她以香柏做的裝飾:
15 Tala ndenge ekosuka, engumba oyo ya bisengo, oyo ezalaki na kimia koleka mpe ezalaki komilobela: « Ezali nde ngai, mosusu azali te soki ngai te. » Ndenge nini engumba oyo ebebisami, ndenge nini ekomi penza ndako ya banyama! Bato nyonso oyo bakolekela wana bakobeta piololo mpe koningisa mito.
這就是那享樂安居,心想「只有我,沒有別人」的城市! 她如何竟成了荒野,成了野獸的棲所! 凡由她那裏經過的人,莫不嗤笑搖手。

< Sofoni 2 >