< Zakari 9 >

1 Liloba na Yawe. Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki, ekowumela na engumba Damasi, pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaele ezali kotalela Yawe.
ヱホバの言詞の重負ハデラクの地に臨むダマスコはその止る所なりヱホバ世の人を眷みイスラエルの一切の支派を眷みたまへばなり
2 Tala, ekowumela lisusu likolo ya engumba Amati, na mondelo oyo ekabola yango na engumba Damasi, na engumba Tiri mpe Sidoni, atako baleki mayele.
之に界するハマテも然りツロ、シドンも亦はなはだ怜悧ければ同じく然るべし
3 Engumba Tiri emitongeli yango moko ndako makasi, emibombeli palata ebele lokola putulu mpe wolo ebele lokola potopoto ya balabala.
ツロは自己のために城郭を構へ銀を塵のごとくに積み金を街衢の土のごとくに積めり
4 Kasi Nkolo akobotola yango, akosukisa nguya na yango na ebale monene mpe ekozika na moto.
視よ主これを攻取り海にて之が力を打ほろぼしたまふべし是は火にて焚うせん
5 Engumba Ashikeloni ekomona yango mpe ekokoma kolenga; engumba Gaza ekokoma na somo makasi, ndenge moko mpe engumba Ekroni; pamba te elikya na yango ekosila. Engumba Gaza ekozangela mokonzi na yango mpe engumba Asikaloni ekotikala lisusu na bato te.
アシケロンこれを見て懼れガザもこれを見て太く慄ふエクロンもその望む所の者辱しめらるるに因て亦然りガザには王絶えアシケロンには住者なきに至らん
6 Bana makangu bakoya kovanda na engumba Asidodi, mpe nakosilisa lolendo ya bato ya Filisitia.
アシドドにはまた雑種の民すまん我ペリシテ人が誇る所の者を絶べし
7 Nakolongola makila na minoko na bango, mpe bilei ya mbindo na minu na bango; kasi ba-oyo bakotikala bakokoma bato ya Nzambe na biso mpe bakambi ya Yuda; mpe bato ya engumba Ekroni bakokoma lokola bato ya Yebusi.
我これが口より血を取除き之が齒の間より憎むべき物を取除かん是も遺りて我儕の神に歸しユダの牧伯のごとくに成べしまたエクロンはヱブス人のごとくになるべし
8 Nakobundela ndako na Ngai liboso ya mampinga ya basoda ya nguya; monyokoli moko te akoya lisusu komonisa bato na Ngai pasi, pamba te Ngai moko nde nazali kokengela sik’oyo.
我わが家のために陣を張て敵軍に當り之をして往來すること無らしめん虐遇者かさねて逼ること無るべし我いま我目をもて親ら見ればなり
9 Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi! Yelusalemi, mboka kitoko, ganga penza na esengo! Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, azali sembo mpe molongi, atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi.
シオンの女よ大に喜べヱルサレムの女よ呼はれ視よ汝の王汝に來る彼は正義して拯救を賜り柔和にして驢馬に乗る即ち牝驢馬の子なる駒に乗るなり
10 Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, longwa na ebale kino na basuka ya mabele.
我エフライムより車を絶ちヱルサレムより馬を絶ん戰爭弓も絶るべし彼國々の民に平和を諭さん其政治は海より海に及び河より地の極におよぶべし
11 Mpo na yo, likolo ya makila ya boyokani na Ngai elongo na yo, nakobimisa bakangami na yo na libulu oyo ezanga mayi.
汝についてはまた汝の契約の血のために我かの水なき坑より汝の被俘人を放ち出さん
12 Bozonga na ndako na bino, oyo batonga makasi, bino bakangami oyo botondi na elikya, pamba te nazali koloba na bino sik’oyo: « Nakozongisela bino mbala mibale biloko oyo bobungisaki. »
望を懷く被俘人よ汝等城に歸れ我今日もなほ告て言ふ我かならず倍して汝等に賚ふべし
13 Pamba te nabendi tolotolo na Ngai, oyo ezali Yuda, natie yango likonga na Ngai ya moke oyo ezali Efrayimi. Siona, nakotelemisa bana na yo ya mibali mpo ete batelemela bana mibali ya Yavani mpe nakokomisa yo lokola mopanga ya elombe.
我ユダを張て弓となしエフライムを矢となして之につがへんシオンよ我汝の人々を振起してギリシヤの人々を攻しめ汝をして大丈夫の劍のごとくならしむべし
14 Yawe akomimonisa epai na bango, mpe tolotolo na Ye ekobima lokola mokalikali. Nkolo Yawe akobeta kelelo mpe akotambola kati na mopepe makasi.
ヱホバこれが上に顯れてその箭を電光のごとくに射いだしたまはん主ヱホバ喇叭を吹ならし南の暴風に乗て出來まさん
15 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela bango. Bakolia mpe bakobuka mabanga ya ebambelo mabanga, bakomela mpe bakosala makelele lokola bato balangwe masanga, bakotonda lokola kopo ya makila oyo basopaka na basonge ya etumbelo.
萬軍のヱホバ彼らを護りたまはん彼等は食ふことを爲し投石器の石を踏つけん彼等は飮ことを爲し酒に醉るごとくに聲を擧ん其これに盈さるることは血を盛る鉢のごとく祭壇の隅のごとくなるべし
16 Na mokolo wana, Yawe, Nzambe na bango, akobikisa bango ndenge mobateli bibwele abikisaka bameme na ye. Bakongenga makasi kati na mabele na Ye lokola mabanga ya talo.
彼らの神ヱホバ當日に彼らを救ひその民を羊のごとくに救ひたまはん彼等は冠冕の玉のごとくになりて其地に輝くべし
17 Bakozala bato ya esengo, bakokoma kitoko makasi. Ble ekopesa bilenge mibali makasi mpe vino ya sika ekopesa bilenge basi makasi.
その福祉は如何計ぞや其美麗は如何計ぞや穀物は童男を長ぜしめ新酒は童女を長ぜしむ

< Zakari 9 >