< Zakari 8 >

1 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai:
ויהי דבר יהוה צבאות לאמר׃
2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Siona, mpo ete nalingaka yango makasi na motema na Ngai. › »
כה אמר יהוה צבאות קנאתי לציון קנאה גדולה וחמה גדולה קנאתי לה׃
3 Tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakozonga na Siona mpe nakovanda kati na Yelusalemi. Boye, Yelusalemi ekobengama Engumba ya bosolo; mpe ngomba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ekobengama Ngomba ya bule. »
כה אמר יהוה שבתי אל ציון ושכנתי בתוך ירושלם ונקראה ירושלם עיר האמת והר יהוה צבאות הר הקדש׃
4 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Mibange ya mibali mpe ya basi bakotonda lisusu na babalabala ya Yelusalemi, moto na moto na nzete na ye na loboko mpo na kimobange.
כה אמר יהוה צבאות עד ישבו זקנים וזקנות ברחבות ירושלם ואיש משענתו בידו מרב ימים׃
5 Babalabala ya engumba ekotonda lisusu na bilenge mibali mpe basi oyo bakokoma kosakana kuna. »
ורחבות העיר ימלאו ילדים וילדות משחקים ברחבתיה׃
6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
כה אמר יהוה צבאות כי יפלא בעיני שארית העם הזה בימים ההם גם בעיני יפלא נאם יהוה צבאות׃
7 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Nakobikisa bato na Ngai, longwa na mokili ya este kino na mokili ya weste.
כה אמר יהוה צבאות הנני מושיע את עמי מארץ מזרח ומארץ מבוא השמש׃
8 Nakozongisa bango mpo ete bavanda na Yelusalemi; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango na boyengebene mpe na bosembo. »
והבאתי אתם ושכנו בתוך ירושלם והיו לי לעם ואני אהיה להם לאלהים באמת ובצדקה׃
9 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bino ba-oyo, na mikolo oyo, bozali koyoka maloba kaka oyo basakoli balobaki, lokola bazalaki awa na tango miboko ya Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaki kotongama, boyika mpiko mpe bolendisa maboko na bino mpo na kotonga Tempelo oyo ya Yawe.
כה אמר יהוה צבאות תחזקנה ידיכם השמעים בימים האלה את הדברים האלה מפי הנביאים אשר ביום יסד בית יהוה צבאות ההיכל להבנות׃
10 Pamba te, liboso ya tango wana, bato bazalaki kozwa lifuti ya malonga te na misala na bango, mpe banyama ezalaki kopesa ata litomba moko te; moto moko te azalaki kokende na mosala na ye na kimia likolo ya kobanga banguna, pamba te nasalaki ete moto moko na moko atelemela moninga na ye.
כי לפני הימים ההם שכר האדם לא נהיה ושכר הבהמה איננה וליוצא ולבא אין שלום מן הצר ואשלח את כל האדם איש ברעהו׃
11 Kasi sik’oyo, nakosala lisusu te, na ndambo ya bato oyo batikali, makambo oyo nasalaki na tango ya kala, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
ועתה לא כימים הראשנים אני לשארית העם הזה נאם יהוה צבאות׃
12 « Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo.
כי זרע השלום הגפן תתן פריה והארץ תתן את יבולה והשמים יתנו טלם והנחלתי את שארית העם הזה את כל אלה׃
13 Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele, bobanga ata eloko moko te, boyika kaka mpiko; pamba te ndenge bokomaki bikolo elakelama mabe kati na bikolo mosusu, ndenge wana mpe nakobikisa bino, mpe bokozala lipamboli. »
והיה כאשר הייתם קללה בגוים בית יהודה ובית ישראל כן אושיע אתכם והייתם ברכה אל תיראו תחזקנה ידיכם׃
14 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Ndenge kaka nazwaki mokano ya kotindela bino pasi mpe ya koyokela bino mawa te tango batata na bino batumbolaki kanda na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga,
כי כה אמר יהוה צבאות כאשר זממתי להרע לכם בהקציף אבתיכם אתי אמר יהוה צבאות ולא נחמתי׃
15 « ndenge wana mpe nazwi mokano sik’oyo ya komonisa lisusu bolamu na Yelusalemi mpe na Yuda. Bozala na bobangi te.
כן שבתי זממתי בימים האלה להיטיב את ירושלם ואת בית יהודה אל תיראו׃
16 Tala makambo oyo bosengeli kosala: Tika ete moko na moko kati na bino alobaka solo na moninga na ye; bosambisaka na bosolo mpe bokataka makambo na bosembo kati na bisambiselo na bino,
אלה הדברים אשר תעשו דברו אמת איש את רעהו אמת ומשפט שלום שפטו בשעריכם׃
17 bosalaka mabongisi ya komonisa baninga na bino pasi te, bolingaka te kolapa ndayi ya lokuta; pamba te makambo wana nyonso, nayina yango makasi, » elobi Yawe.
ואיש את רעת רעהו אל תחשבו בלבבכם ושבעת שקר אל תאהבו כי את כל אלה אשר שנאתי נאם יהוה׃
18 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai:
ויהי דבר יהוה צבאות אלי לאמר׃
19 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: Mikolo ya kokila bilei ya sanza ya minei, ya mitano, ya sambo mpe ya zomi ekokoma mikolo ya esengo mpe ya kosepela, ekokoma bafeti ya nkembo mpe ya esengo mpo na libota ya Yuda. Kasi bolinga solo mpe kimia. »
כה אמר יהוה צבאות צום הרביעי וצום החמישי וצום השביעי וצום העשירי יהיה לבית יהודה לששון ולשמחה ולמעדים טובים והאמת והשלום אהבו׃
20 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bato ya bikolo ebele mpe bavandi ya bingumba ya ndenge na ndenge bakoya lisusu;
כה אמר יהוה צבאות עד אשר יבאו עמים וישבי ערים רבות׃
21 bamoko bakowuta na engumba moko mpo na kokende na engumba mosusu mpe bakoloba: ‹ Tokende kobondela Yawe mpe koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga! › Bongo bamosusu bakozongisela bango: ‹ Ngai mpe nakokende! ›
והלכו ישבי אחת אל אחת לאמר נלכה הלוך לחלות את פני יהוה ולבקש את יהוה צבאות אלכה גם אני׃
22 Boye bato ebele mpe bikolo ya nguya bakoya na Yelusalemi mpo na koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bakobondela Ye. »
ובאו עמים רבים וגוים עצומים לבקש את יהוה צבאות בירושלם ולחלות את פני יהוה׃
23 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba: ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › »
כה אמר יהוה צבאות בימים ההמה אשר יחזיקו עשרה אנשים מכל לשנות הגוים והחזיקו בכנף איש יהודי לאמר נלכה עמכם כי שמענו אלהים עמכם׃

< Zakari 8 >