< Zakari 7 >

1 Na mobu ya minei ya mokonzi ya Dariusi, na mokolo ya minei ya sanza ya libwa, sanza ya kisilevi, Yawe alobaki na Zakari.
La quatrième année du roi Darius, la parole de Yahweh fut adressée à Zacharie, au quatrième jour du neuvième mois, en Casleu.
2 Bato ya Beteli batindaki Saretseri, Regemi-Meleki elongo na bato na bango mpo na kobondela Yawe
Béthel avait envoyé Sarasar et Rogommélech, avec ses gens, pour implorer Yahweh,
3 mpe mpo na kotuna motuna oyo epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe epai ya basakoli: — Boni, tosengeli kaka kokoba kolela mpe kokila bilei na sanza ya mitano ndenge tosalaka wuta kala?
pour parler aux prêtres de la maison de Yahweh des armées et aux prophètes, en ces termes: « Dois-je pleurer au cinquième mois, et faire abstinence, comme j’ai fait depuis tant d’années? »
4 Bongo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai:
La parole de Yahweh des armées me fut adressée en ces termes:
5 — Tuna bato nyonso ya ekolo mpe Banganga-Nzambe: « Wuta mibu tuku sambo, tango bokilaka bilei mpe bolelaka na sanza ya mitano mpe ya sambo, bosalaka yango mpo na Ngai?
Parle à tout le peuple du pays et aux prêtres, en ces termes: Quand vous avez jeûné et célébré le deuil au cinquième et au septième mois, et cela depuis soixante-dix ans, est-ce pour moi que vous jeûniez?
6 Bongo tango bozalaki kolia mpe komela, ezalaki te mpo na esengo na bino moko?
Et quand vous mangez et buvez, n’est-ce pas vous qui mangez et vous qui buvez?
7 Yango ezali te liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya basakoli na Ye wuta kala tango Yelusalemi mpe bingumba oyo ezingelaki yango ezalaki na kimia mpe na boyokani, mpe Negevi mpe Shefela etondaki na bato ebele? »
N’y a-t-il pas les paroles qu’a proclamées Yahweh par l’intermédiaire des anciens prophètes, quand Jérusalem était habitée et tranquille, avec ses villes autour d’elle, et que le négéb et la sephélah étaient habités?
8 Mpe Yawe alobaki lisusu na Zakari:
La parole de Yahweh fut adressée à Zacharie en ces termes:
9 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu.
Ainsi parlait Yahweh des armées en disant: « Rendez la justice selon la vérité; pratiquez la miséricorde et la compassion chacun envers son frère;
10 Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. »
n’opprimez pas la veuve et l’orphelin, l’étranger et le pauvre, et ne méditez pas l’un contre l’autre le mal dans vos cœurs. »
11 Kasi baboyaki kotosa, bamatisaki mapeka mpe bakangaki matoyi na bango mpo ete bayoka Ngai te.
Mais ils ont refusé d’écouter, ils ont prêté une épaule rebelle et endurci leurs oreilles pour ne pas entendre.
12 Bakomisaki mitema na bango makasi lokola diama mpo kaka bayoka te mibeko mpe maloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki koloba na bango na lisungi ya Molimo na Ye na nzela ya basakoli na Ye ya kala. Mpo na yango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, atombokaki makasi.
Ils ont rendu leur cœur tel que le diamant, pour ne pas entendre la loi et les paroles que Yahweh des armées leur adressait par son Esprit, par l’intermédiaire des anciens prophètes. Aussi y eut-il une violente indignation de la part de Yahweh des armées.
13 Boye, Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki: « Lokola bayokaki Ngai te tango nazalaki kobenga bango, Ngai mpe nayokaki bango te tango babengaki Ngai.
Et il arriva: De même qu’il avait appelé sans qu’ils écoutassent, « de même ils appelleront sans que je les écoute, dit Yahweh des armées.
14 Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi: moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. »
Je les disperserai parmi toutes les nations qu’ils ne connaissent pas, et derrière eux le pays restera désolé, sans personne qui passe ou revienne. » D’un pays de délices ils ont fait un désert.

< Zakari 7 >