< Zakari 6 >

1 Tango natalaki lisusu, namonaki bashar minei liboso na ngai: ezali kobima na kati-kati ya bangomba mibale ya bronze.
And again I lifted up my eyes and saw four chariots coming out from between two mountains—mountains of bronze.
2 Bampunda ya langi ya motane makasi ezalaki kobenda shar ya liboso, mpe bampunda ya langi ya mwindo ezalaki kobenda shar oyo ya mibale.
The first chariot had red horses, the second black horses,
3 Bampunda ya langi ya pembe ezalaki kobenda shar oyo ya misato, bampunda ya madodo-madodo ezalaki kobenda shar oyo ya minei. Bampunda nyonso ya madodo-madodo ezalaki makasi.
the third white horses, and the fourth dappled horses—all of them strong.
4 Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai: — Bampunda nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai?
So I inquired of the angel who was speaking with me, “What are these, my lord?”
5 Azongiselaki ngai: — Ezali Molimo ya likolo oyo akokende na bangambo nyonso minei ya mokili mobimba. Atelemaki liboso ya Nkolo ya mokili mobimba mpe sik’oyo abimi.
And the angel told me, “These are the four spirits of heaven, going forth from their station before the Lord of all the earth.
6 Shar oyo bampunda ya langi ya mwindo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya nor; shar oyo bampunda ya langi ya pembe ezali kobenda ezali kolanda oyo ya liboso, mpe shar oyo bampunda ya madodo-madodo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya sude.
The one with the black horses is going toward the land of the north, the one with the white horses toward the west, and the one with the dappled horses toward the south.”
7 Bampunda nyonso ya makasi ebimaki mpe etondaki na posa makasi ya kotambola na mabele. Boye, Anjelu alobaki na yango: « Bokende kotambola na mokili! » Mpe ebimaki mpo na kokende kotambola na mabele.
As the strong horses went out, they were eager to go and patrol the earth; and the LORD said, “Go and patrol the earth.” So they patrolled the earth.
8 Abengaki ngai mpe alobaki na ngai: — Tala, bampunda oyo ezali kokende na mokili ya nor ekosala ete Molimo na ngai avanda na mokili wana ya nor.
Then the LORD summoned me and said, “Behold, those going to the land of the north have given rest to My Spirit in the land of the north.”
9 Yawe alobaki na ngai:
The word of the LORD also came to me, saying,
10 — Kamata palata mpe wolo epai ya Elidayi, Tobiya mpe Yedaeya, ba-oyo bawuti na bowumbu wuta na Babiloni; mpe na mokolo yango kaka, kende yo moko na ndako ya Joziasi, mwana mobali ya Sofoni, epai wapi bakomeli.
“Take an offering from the exiles—from Heldai, Tobijah, and Jedaiah, who have arrived from Babylon—and go that same day to the house of Josiah son of Zephaniah.
11 Kamata palata mpe wolo mpo ete osalela yango motole; bongo okolatisa yango Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe.
Take silver and gold, make an ornate crown, and set it on the head of the high priest, Joshua son of Jehozadak.
12 Okoyebisa ye maloba oyo: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Tala moto oyo kombo na ye ezali: Moto ya nzete. Nyonso ekobota esika ye azali, mpe ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe.
And you are to tell him that this is what the LORD of Hosts says: ‘Here is a man whose name is the Branch, and He will branch out from His place and build the temple of the LORD.
13 Ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe; bakolatisa ye bilembo ya lokumu, mpe akovanda na kiti ya bokonzi mpo na kokonza. Mpe wana kaka na kiti na ye ya bokonzi, akozala mpe Nganga-Nzambe. Bongo misala nyonso mibale, ezala ya bokonzi to ya bonganga-Nzambe, ekotambola malamu. › »
Yes, He will build the temple of the LORD; He will be clothed in splendor and will sit on His throne and rule. And He will be a priest on His throne, and there will be peaceful counsel between the two.’
14 Bakobomba motole yango kati na Tempelo ya Yawe lokola ekaniseli mpo na kokanisa motema malamu ya Elidayi, ya Tobiya, ya Yedaeya mpe ya Eleme, mwana mobali ya Sofoni.
The crown will reside in the temple of the LORD as a memorial to Helem, Tobijah, Jedaiah, and the gracious son of Zephaniah.
15 Bato oyo bakowuta mosika penza bakoya mpo na kosunga misala ya kotonga Tempelo ya Yawe, bongo bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino. Makambo oyo ekokokisama solo soki boluki kotosa Yawe, Nzambe na bino.
Even those far away will come and build the temple of the LORD, and you will know that the LORD of Hosts has sent Me to you. This will happen if you diligently obey the voice of the LORD your God.”

< Zakari 6 >