< Zakari 5 >
1 Tango natalaki lisusu, namonaki buku moko: ezali kopumbwa.
Podigoh opet oči i vidjeh: leti svitak knjige.
2 Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atunaki ngai: — Ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona buku moko: ezali kopumbwa; molayi na yango ezali na bametele pene zomi, mpe mokuse na yango, bametele pene mitano.
Anđeo me upita: “Što vidiš?” Odgovorih: “Vidim svitak knjige gdje leti: dužina joj je dvadeset lakata, a širina deset.”
3 Alobaki na ngai: — Ezali nde bilakeli mabe oyo ezali kopanzana na mokili mobimba; pamba te, kolanda ndenge ekomama na ngambo moko, bakobengana miyibi nyonso; mpe kolanda ndenge ekomama na ngambo mosusu, bakobengana bato nyonso oyo balapaka ndayi ya lokuta.
On mi tad reče: “To je prokletstvo koje će zahvatiti svu zemlju; odsad, svaki koji krade bit će po njem izgnan odavde i svaki koji krivo priseže bit će po njem odavde protjeran.
4 Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Ja ću ga izvesti - riječ je Jahve nad Vojskama - da uđe u kuću lupežu i u kuću onome koji se krivo kune mojim imenom te da boravi usred njegove kuće i uništi je skupa s njenim drvljem i kamenjem.”
5 Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai apusanaki pene na ngai mpe alobaki: — Tombola miso na yo mpe tala makambo oyo ezali koleka kuna.
Anđeo koji je govorio sa mnom iziđe i reče mi: “Podigni oči i pogledaj što se to pojavljuje.”
6 Natunaki: — Makambo nini yango? Azongisaki: — Ezali nde sani, emekelo motuya ya biloko. Abakisaki: — Sani yango etondisamaki na masumu ya bato ya mokili.
Ja ga upitah: “Što je to?” On reče: “To se pojavljuje efa.” I nastavi: “To je opća pokvarenost na zemlji.”
7 Kaka na tango yango, mofinuku na yango ya ebende etombwamaki, mpe namonaki mwasi moko avanda na kati.
I gle, podiže se olovan poklopac i jedna žena sjedi usred efe.
8 Alobaki: — Mwasi wana azali elembo ya makambo mabe. Bongo azongisaki ye kati na sani, emekelo motuya ya biloko, mpe azipaki mofinuku na yango.
On reče: “To je zloća.” I gurnu je u efu i baci joj na otvor olovni poklopac.
9 Natombolaki miso mpe namonaki liboso na ngai basi mibale bazali kopumbwa mpo na koya epai na biso. Mapapu na bango ezalaki minene lokola mapapu ya nkongi. Batombolaki sani yango kino na kati-kati ya likolo mpe se.
Podigavši oči, vidjeh: dvije žene izlaze s vjetrom u krilima, a krila im bijahu kao krila rode; one podigoše efu između zemlje i neba.
10 Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai: — Bazali komema sani yango wapi?
Upitah tad anđela koji je govorio sa mnom: “Kamo odnose efu?”
11 Azongisaki: — Bazali komema yango na mokili ya Babiloni mpo ete batongela yango ndako, na Shineari. Soki ndako yango esili kotongama, bakotia sani yango kuna.
On mi odgovori: “Da joj sagrade hram u zemlji šinearskoj i da joj pripreme postolje na koje će je postaviti.”