< Zakari 2 >

1 Natombolaki lisusu miso mpe namonaki moto moko liboso na ngai, asimbaki singa oyo bamekelaka molayi, na loboko na ye.
Después levanté mis ojos y miré, y ahí estaba un varón con un cordel de medir en su mano.
2 Natunaki ye: — Ozali kokende wapi? Azongiselaki ngai: — Nazali kokende komeka molayi ya Yelusalemi mpo na koyeba mokuse mpe molayi na yango.
Y le pregunté: ¿A dónde vas? Y me respondió: A medir Jerusalén, para ver cuál es su anchura y su longitud.
3 Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atikaki ngai, mpe Anjelu mosusu ayaki mpo na kokutana na ye
Cuando salía el ángel que hablaba conmigo, otro ángel le salió al encuentro,
4 mpe alobaki na ye: — Kima mbangu penza, mpe kende koloba na elenge mobali wana: « Yelusalemi ekotikala lisusu na bamir te mpo ete motango ya bato mpe ya banyama oyo bazali kati na yango ekokoma ebele koleka.
y le dijo: Corre, habla a ese joven, y dile: Jerusalén será habitada sin muros a causa de la multitud de personas y de ganado que habrá en ella.
5 Ngai moko, nakozala mir ya moto zingazinga na yango, » elobi Yawe, « mpe nakomonisa nkembo na Ngai kati na yango. »
Yo le seré muro de fuego alrededor, y mi gloria estará dentro de ella, dice Yavé.
6 Tokende! Tokende! Tobima noki na mokili ya nor, elobi Yawe, pamba te Ngai moko nde napanzaki bino na mokili mobimba, elobi Yawe.
¡Eh, eh! Huyan de la tierra del norte, dice Yavé. Pues los esparcí por los cuatro puntos del cielo, dice Yavé.
7 Siona, tokende! Bima noki, yo oyo ovandaka na Babiloni, mboka kitoko!
¡Escapa, oh Sion, tú que vives con la hija de Babilonia!
8 Pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo apesaki ngai mokumba ya kosakola mpo na kotelemela bikolo oyo ebotolaki bino biloko na makasi alobi: Moto nyonso oyo akosimba yo akosimba nde mbuma ya liso na Ngai.
Porque Yavé de las huestes dice: Tras la gloria me enviará a las naciones que los despojaron, porque el que los toca, toca la niña de mi ojo.
9 Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai.
Por tanto, miren: Yo levanto mi mano contra ellos, y serán despojo para los que fueron sus esclavos. Y sabrán que Yavé de las huestes me envió.
10 Siona, mboka kitoko, ganga na esengo mpe sepela, pamba te nazali koya kovanda kati na yo, elobi Yawe.
¡Canta y alégrate, hija de Sion, porque ciertamente vengo, y viviré en medio de ti! dice Yavé.
11 Na mokolo wana, bato ya bikolo ebele bakoya kosangana elongo na Yawe mpe bakokoma bato na Ngai. Nakovanda kati na bino; mpe na bongo, bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino.
Aquel día se unirán a Yavé muchas naciones y serán mi pueblo. Viviré en medio de ti, y conocerán que Yavé de las huestes me envió a ti.
12 Yawe akokomisa Yuda lokola libula na Ye moko penza kati na mabele ebulisama, mpe akopona lisusu Yelusalemi.
Yavé poseerá a Judá como su heredad en la tierra santa, y escogerá a Jerusalén.
13 Tika ete bato ya mokili mobimba bavanda kimia liboso ya Yawe, pamba te Ye moko atelemi mpe abimi na Ndako na Ye ya bule.
¡Calle todo mortal ante Yavé, porque Él despertó en su santa morada!

< Zakari 2 >