< Zakari 13 >
1 Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi.
В тот день откроется источник дому Давидову и жителям Иерусалима для омытия греха и нечистоты.
2 Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo.
И будет в тот день, говорит Господь Саваоф, Я истреблю имена идолов с этой земли, и они не будут более упоминаемы, равно как лжепророков и нечистого духа удалю с земли.
3 Boye, soki moto moko akobi kosakola, tika ete tata mpe mama oyo babota ye baloba na ye: ‹ Osengeli kokufa mpo ete olobi makambo ya lokuta na Kombo na Yawe! › Wana akozala kosakola, baboti na ye bakotobola ye na mopanga.
Тогда, если кто будет прорицать, то отец его и мать его, родившие его, скажут ему: тебе не должно жить, потому что ты ложь говоришь во имя Господа; и поразят его отец его и мать его, родившие его, когда он будет прорицать.
4 Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale.
И будет в тот день, устыдятся такие прорицатели, каждый видения своего, когда будут прорицать, и не будут надевать на себя власяницы, чтобы обманывать.
5 Akoloba: ‹ Nazali na ngai mosakoli te; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai! ›
И каждый скажет: я не пророк, я земледелец, потому что некто сделал меня рабом от детства моего.
6 Soki batuni ye: ‹ Bongo bapota oyo ezali na tolo na yo ewuti wapi? › Akozongisa: ‹ Nazokaki yango kati na ndako ya balingami na ngai. ›
Ему скажут: отчего же на руках у тебя рубцы? И он ответит: оттого, что меня били в доме любящих меня.
7 Oh mopanga, telema! Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai! Tika ete oboma moninga na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Beta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. Bongo nakoboma ata bibwele ya mike.
О, меч! поднимись на пастыря Моего и на ближнего Моего, говорит Господь Саваоф: порази пастыря, и рассеются овцы! И Я обращу руку Мою на малых.
8 Na mokili mobimba, » elobi Yawe, « bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato bakobebisama mpe bakokufa; mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato nde bakotikala na mokili.
И будет на всей земле, говорит Господь, две части на ней будут истреблены, вымрут, а третья останется на ней.
9 Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto mpe nakomeka bango ndenge bamekaka wolo na moto; bakobelela Kombo na Ngai, mpe Ngai nakoyanola bango. Nakoloba na bango: ‹ Bozali bato na Ngai, › mpe bango bakoloba: ‹ Yawe azali Nzambe na biso! › »
И введу эту третью часть в огонь, и расплавлю их, как плавят серебро, и очищу их, как очищают золото: они будут призывать имя Мое, и Я услышу их и скажу: “это Мой народ”, и они скажут: “Господь - Бог мой!”