< Zakari 12 >

1 Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi:
耶和華論以色列的默示。 鋪張諸天、建立地基、造人裏面之靈的耶和華說:
2 « Nakokomisa Yelusalemi lokola kopo ya vino oyo elangwisaka bikolo nyonso ya zingazinga na yango; bakozingela solo Yuda mpe Yelusalemi.
「我必使耶路撒冷被圍困的時候,向四圍列國的民成為令人昏醉的杯;這默示也論到猶大。
3 Na mokolo wana, nakokomisa Yelusalemi lokola libanga ya kilo liboso ya bikolo nyonso; moto nyonso oyo akoluka kotombola yango akozoka; mpe bikolo nyonso ekosangana mpo na kobundisa Yelusalemi.
那日,我必使耶路撒冷向聚集攻擊他的萬民當作一塊重石頭;凡舉起的必受重傷。
4 Na mokolo wana, nakobangisa bampunda nyonso mpe nakokomisa batambolisi na yango liboma, » elobi Yawe. « Nakosenzela libota ya Yuda, kasi nakoboma miso ya bampunda nyonso ya bikolo.
耶和華說:到那日,我必使一切馬匹驚惶,使騎馬的顛狂。我必看顧猶大家,使列國的一切馬匹瞎眼。
5 Boye, bakambi ya Yuda bakomilobela: ‹ Bato ya Yelusalemi bazali makasi mpo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe na bango. ›
猶大的族長必心裏說:『耶路撒冷的居民倚靠萬軍之耶和華-他們的上帝,就作我們的能力。』
6 Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka: bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango.
「那日,我必使猶大的族長如火盆在木柴中,又如火把在禾捆裏;他們必左右燒滅四圍列國的民。耶路撒冷人必仍住本處,就是耶路撒冷。
7 Yawe akobikisa liboso bandako ya kapo ya Yuda mpo ete lokumu ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi eleka te lokumu ya Yuda.
「耶和華必先拯救猶大的帳棚,免得大衛家的榮耀和耶路撒冷居民的榮耀勝過猶大。
8 Na mokolo wana, Yawe akobatela bavandi ya Yelusalemi mpo ete bato ya bolembu kati na bango bakoma makasi lokola Davidi, mpe libota ya Davidi ekoma lokola Nzambe, lokola Anjelu ya Yawe, oyo azali kotambola liboso na bango.
那日,耶和華必保護耶路撒冷的居民。他們中間軟弱的必如大衛;大衛的家必如上帝,如行在他們前面之耶和華的使者。
9 Na mokolo wana, nakobima mpo na koboma bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi.
那日,我必定意滅絕來攻擊耶路撒冷各國的民。
10 Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.
「我必將那施恩叫人懇求的靈,澆灌大衛家和耶路撒冷的居民。他們必仰望我,就是他們所扎的;必為我悲哀,如喪獨生子,又為我愁苦,如喪長子。
11 Na mokolo wana, matanga kati na Yelusalemi ekozala monene lokola matanga ya Adadi-Rimoni na etando ya Megido.
那日,耶路撒冷必有大大的悲哀,如米吉多平原之哈達臨門的悲哀。
12 Mokili mobimba ekosala matanga, etuka na etuka na esika na yango elongo na basi na yango: etuka ya libota ya Davidi elongo na basi na yango, etuka ya libota ya Natan elongo na basi na yango,
境內一家一家地都必悲哀。大衛家,男的獨在一處,女的獨在一處。拿單家,男的獨在一處,女的獨在一處。
13 etuka ya libota ya Levi elongo na basi na yango, etuka ya libota ya Shimei elongo na basi na yango,
利未家,男的獨在一處,女的獨在一處。示每家,男的獨在一處,女的獨在一處。
14 mpe bituka nyonso oyo etikali elongo na basi na yango.
其餘的各家,男的獨在一處,女的獨在一處。

< Zakari 12 >