< Zakari 11 >

1 Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo mpo ete moto ezikisa banzete na yo ya sedele!
פתח לבנון דלתיך ותאכל אש בארזיך
2 Nzete ya sipele, lela, pamba te nzete ya sedele esili kokweya! Banzete milayi esili kokatama. Banzete ya sheni ya Bashani, bolela; pamba te basili kokata zamba monene!
הילל ברוש כי נפל ארז אשר אדרים שדדו הילילו אלוני בשן כי ירד יער הבצור (הבציר)
3 Boyoka ndenge babateli bibwele bazali kolela, pamba te bitando epai wapi baleisaka bibwele ebebisami. Boyoka ndenge bankosi ezali koganga, pamba te zamba ya Yordani, oyo etonda na banzete, esili kobebisama.
קול יללת הרעים כי שדדה אדרתם קול שאגת כפירים כי שדד גאון הירדן
4 Tala liloba oyo Yawe, Nzambe na ngai, alobi: — Batela malamu bameme oyo babongisi mpo na koboma!
כה אמר יהוה אלהי רעה את צאן ההרגה
5 Bato oyo basombaka bibwele yango babomaka yango, bazalaka na somo ya etumbu ata moko te. Bato oyo batekaka yango balobaka: « Tika ete Yawe apambolama, pamba te nakomi mozwi! » Mpe bango moko babateli na yango bayokelaka yango mawa ata moke te.
אשר קניהן יהרגן ולא יאשמו ומכריהן יאמר ברוך יהוה ואעשר ורעיהם לא יחמול עליהן
6 Yango wana Ngai mpe nakoyokela lisusu bato ya mokili mawa te, nakokaba moto na moto na maboko ya moninga na ye mpe ya mokonzi na ye. Bakonzi bakobebisa mokili, kasi nakokangola ata moto moko te wuta na maboko ya bakonzi yango, elobi Yawe.
כי לא אחמול עוד על ישבי הארץ--נאם יהוה והנה אנכי ממציא את האדם איש ביד רעהו וביד מלכו וכתתו את הארץ ולא אציל מידם
7 Boye, nabatelaki malamu bameme oyo babongisaki mpo na koboma; mpe mingi penza bameme oyo ezalaki na pasi makasi. Nakamataki mangenda mibale: nabengaki moko Ngolu, mpe mosusu, Bomoko. Bongo, nakomaki kobatela bameme.
וארעה את צאן ההרגה לכן עניי הצאן ואקח לי שני מקלות לאחד קראתי נעם ולאחד קראתי חבלים וארעה את הצאן
8 Na sanza moko kaka, nabomaki babateli bibwele misato; nakokaki lisusu kokanga motema te, mpe etonga eyinaki ngai.
ואכחד את שלשת הרעים בירח אחד ותקצר נפשי בהם וגם נפשם בחלה בי
9 Nalobaki na etonga ya bibwele: — Nakozala lisusu mobateli na bino te. Tika ete oyo ekokufa ekufa na yango, oyo ekobunga ebunga na yango; mpe tika ete oyo ekotikala ebomana yango na yango!
ואמר לא ארעה אתכם המתה תמות והנכחדת תכחד והנשארות תאכלנה אשה את בשר רעותה
10 Nakamataki lingenda oyo nabengaki Ngolu, nabukaki yango mpo na kotalisa ete boyokani oyo nasalaki elongo na bikolo nyonso esili.
ואקח את מקלי את נעם ואגדע אתו--להפיר את בריתי אשר כרתי את כל העמים
11 Boyokani esilaki nde na mokolo wana; bongo, etonga oyo ezalaki na pasi makasi mpe ezalaki kotala ngai esosolaki ete ezalaki solo Liloba na Yawe.
ותפר ביום ההוא וידעו כן עניי הצאן השמרים אתי כי דבר יהוה הוא
12 Nalobaki na bango: — Soki bomoni ete ezali malamu, bopesa ngai lifuti na ngai; soki te, botika na bino. Bafutaki ngai mbongo ya bibende ya palata tuku misato lokola lifuti na ngai.
ואמר אליהם אם טוב בעיניכם הבו שכרי--ואם לא חדלו וישקלו את שכרי שלשים כסף
13 Mpe Yawe alobaki na ngai: — Bwaka yango epai ya mosali mbeki; yango nde motuya ya malonga oyo bamoni ete ekoki na Ngai! Nakamataki mbongo yango ya bibende tuku misato mpe nabwakaki yango kati na Tempelo ya Yawe, epai ya mosali mbeki.
ויאמר יהוה אלי השליכהו אל היוצר אדר היקר אשר יקרתי מעליהם ואקחה שלשים הכסף ואשליך אתו בית יהוה אל היוצר
14 Bongo nabukaki lisusu lingenda ya mibale oyo nabengaki Bomoko, mpo na kotalisa ete bondeko kati na libota ya Yuda mpe ya Isalaele ekufi.
ואגדע את מקלי השני את החבלים--להפר את האחוה בין יהודה ובין ישראל
15 Yawe alobaki na ngai: — Kamata lisusu bisalelo ya mobateli bibwele ya zoba!
ויאמר יהוה אלי עוד קח לך כלי רעה אולי
16 Pamba te nakobimisa kati na mokili mobateli bibwele ya sika oyo akobanda koluka te bibwele oyo ebungi, akolandela te bana bibwele, akosalisa te bapota ya bibwele oyo ezoki, akoleisa te oyo ezali na nzoto kolongono, kasi akobanda koliaka misuni ya bibwele ya mafuta mpe kobuka yango makolo.
כי הנה אנכי מקים רעה בארץ הנכחדות לא יפקד הנער לא יבקש והנשברת לא ירפא הנצבה לא יכלכל ובשר הבריאה יאכל ופרסיהן יפרק
17 Mawa na mobateli bibwele ya zoba oyo asundolaka etonga na ye! Tika ete mopanga ekata ye loboko mpe etobola ye liso oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali! Tika ete loboko na ye ekawuka, solo, ekawuka penza! Tika ete liso na ye, oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ekufa, ekufa solo!
הוי רעי האליל עזבי הצאן חרב על זרועו ועל עין ימינו זרעו יבוש תיבש ועין ימינו כהה תכהה

< Zakari 11 >