< Zakari 10 >

1 Bosenga epai na Yawe ete anokisa mvula ya suka; ezali Yawe nde atindaka mapata mpe bakake oyo ememaka bamvula minene, Ye nde abimisaka matiti na elanga ya moko na moko.
あなたがたは春の雨の時に、雨を主に請い求めよ。主はいなずまを造り、大雨を人々に賜い、野の青草をおのおのに賜わる。
2 Nzokande, banzambe ya bikeko elobaka maloba ya pamba, mpe bimoniseli ya bato ya soloka ezalaka ya lokuta: bazwaka bandoto oyo ezanga tina, mpe malendisi na bango ezalaka ya lokuta. Yango wana, bato bakomaki kotelengana lokola bibwele oyo ezangi mobateli.
テラピムは、たわごとを言い、占い師は偽りを見、夢見る者は偽りの夢を語り、むなしい慰めを与える。このゆえに、民は羊のようにさまよい、牧者がないために悩む。
3 Kanda na Ngai ya makasi epeli mpo na babateli, mpe nakopesa bakambi etumbu, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayei mpo na kobatela etonga na Ye, libota ya Yuda; akokomisa bango mpunda na Ye ya lokumu kati na bitumba.
「わが怒りは牧者にむかって燃え、わたしは雄やぎを罰する。万軍の主が、その群れの羊であるユダの家を顧み、これをみごとな軍馬のようにされるからである。
4 Na Yuda nde ekobimela libanga ya songe ya ndako, likonzi ya ndako ya kapo, tolotolo ya bitumba mpe bakambi nyonso.
隅石は彼らから出、天幕の杭も彼らから出、いくさ弓も彼らから出、支配者も皆彼らの中から出る。
5 Bango nyonso bakokoma lokola bilombe ya bitumba, oyo bakangamaka te na potopoto ya babalabala na tango ya bitumba. Lokola Yawe azali elongo na bango, bakobunda mpe bakolonga, ata basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda.
彼らが戦う時は勇士のようになって、道ばたの泥の中に敵を踏みにじる。主が彼らと共におられるゆえに彼らは戦い、馬に乗る者どもを困らせる。
6 « Nakolendisa libota ya Yuda mpe nakobikisa libota ya Jozefi, nakozongisa bango lisusu na mokili na bango, pamba te nakoyokela bango mawa; bakozala lokola bato oyo nasundolaki te, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango, mpe nakoyanola bango.
わたしはユダの家を強くし、ヨセフの家を救う。わたしは彼らをあわれんで、彼らを連れ帰る。彼らはわたしに捨てられたことのないようになる。わたしは彼らの神、主であって、彼らに答えるからである。
7 Bato ya Efrayimi bakokoma lokola bilombe ya bitumba; mitema na bango ekotonda na esengo lokola bato bameli masanga; bana na bango ya mibali bakomona yango mpe bakotonda na esengo, bongo mitema na bango ekosepela kati na Yawe.
エフライムびとは勇士のようになり、その心は酒を飲んだように喜ぶ。その子供らはこれを見て喜び、その心は主によって楽しむ。
8 Nakobeta piololo mpo na kobenga bango mpe nakosangisa bango esika moko. Solo, nakokangola bango, mpe bakokoma ebele ndenge bazalaki liboso.
わたしは彼らに向かい、口笛を吹いて彼らを集める、わたしが彼らをあがなったからである。彼らは昔のように数多くなる。
9 Ata soki napanzi bango kati na bikolo ya bapaya, ezala na mokili oyo eleki mosika, bakokanisa Ngai kaka. Bango elongo na bana na bango ya mibali bakobika mpe bakozonga na mokili na bango.
わたしは彼らを国々の民の中に散らした。しかし彼らは遠い国々でわたしを覚え、その子供らと共に生きながらえて帰ってくる。
10 Nakozongisa bango wuta na Ejipito; nakosangisa bango wuta na Asiri; nakomema bango na Galadi mpe na Libani; kasi atako bongo, esika ya kovanda ekozala moke mpo na bango.
わたしは彼らをエジプトの国から連れ帰り、アッスリヤから彼らを集める。わたしはギレアデの地およびレバノンに彼らを連れて行く。彼らはいる所もないほどに多くなる。
11 Bakoleka na kati-kati ya ebale monene ya mitungisi; bambonge ya ebale monene ekovanda kimia, bozindo nyonso ya ebale Nili ekokawuka. Lolendo ya Asiri ekosila mpe lingenda ya bokonzi ya Ejipito ekolongwa.
彼らはエジプトの海を通る。海の波は撃たれ、ナイルの淵はことごとくかれた。アッスリヤの高ぶりは低くされ、エジプトのつえは移り去る。
12 Nakosala ete balendisama kati na Yawe: bakotambola na Kombo na Ye, » elobi Yawe.
わたしは彼らを主によって強くする。彼らは主の名を誇る」と主は言われる。

< Zakari 10 >