< Zakari 1 >

1 Na sanza ya mwambe, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Zakari, mwana mobali ya Barashi, mwana mobali ya Ido:
In the eighth month of the second year of Darius, the word of the LORD came to the prophet Zechariah son of Berechiah, the son of Iddo, saying:
2 — Yawe atombokelaki bakoko na bino makasi.
“The LORD was very angry with your fathers.
3 Yango wana, loba na bato oyo: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Bozonga epai na Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe Ngai nakozonga epai na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
So tell the people that this is what the LORD of Hosts says: ‘Return to Me, declares the LORD of Hosts, and I will return to you, says the LORD of Hosts.’
4 Bozala te lokola bakoko na bino, epai ya banani basakoli ya tango ya kala balobaki: Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Botika banzela mabe mpe misala na bino ya mabe, bozonga epai na Ngai! › Kasi basalaki keba te na maloba na Ngai, mpe batosaki Ngai te, elobi Yawe.
Do not be like your fathers, to whom the former prophets proclaimed that this is what the LORD of Hosts says: ‘Turn now from your evil ways and deeds.’ But they did not listen or pay attention to Me, declares the LORD.
5 Wapi sik’oyo bakoko na bino? Boni, basakoli yango bazali kaka na bomoi kino na mokolo ya lelo?
Where are your fathers now? And the prophets, do they live forever?
6 Maloba mpe malako na Ngai, oyo napesaki na nzela ya basakoli, basali na Ngai, ekomelaki bakoko na bino te? Solo, ekomelaki bango, babongolaki mitema mpe balobaki: ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, asaleli biso kolanda banzela mpe misala na biso, asali ndenge kaka akanaki kosala. › »
But did not My words and My statutes, which I commanded My servants the prophets, overtake your fathers? They repented and said, ‘Just as the LORD of Hosts purposed to do to us according to our ways and deeds, so He has done to us.’”
7 Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya zomi na moko, sanza ya shebati, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Zakari, mwana mobali ya Barashi, mwana mobali ya Ido.
On the twenty-fourth day of the eleventh month, the month of Shebat, in the second year of Darius, the word of the LORD came to the prophet Zechariah son of Berechiah, the son of Iddo.
8 Na butu, nazwaki emoniseli moko: namonaki liboso na ngai moto moko azali kotambolisa mpunda moko ya langi ya motane; moto yango atelemaki kati na banzete ya mirite oyo ezalaki kati na lubwaku. Na sima na ye, ezalaki na bampunda mosusu ya langi ya motane, ya shokola mpe ya pembe.
I looked out into the night and saw a man riding on a red horse. He was standing among the myrtle trees in the hollow, and behind him were red, sorrel, and white horses.
9 Natunaki: — Nkolo na ngai, bampunda oyo elingi kolakisa nini? Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongisaki: — Nakolakisa yo tina na yango.
“What are these, my lord?” I asked. And the angel who was speaking with me replied, “I will show you what they are.”
10 Moto oyo azalaki kati na banzete ya mirite alimbolaki: — Ezali bato oyo Yawe atindaki mpo na kotambola na mabele.
Then the man standing among the myrtle trees explained, “They are the ones the LORD has sent to patrol the earth.”
11 Bato yango bayebisaki Anjelu ya Yawe, oyo atelemaki kati na banzete ya mirite: — Towuti kotambola na mabele mpe tokuti kimia mpe bopemi na mokili mobimba.
And the riders answered the angel of the LORD who was standing among the myrtle trees, “We have patrolled the earth, and behold, all the earth is at rest and tranquil.”
12 Anjelu ya Yawe alobaki: — Yawe, Mokonzi ya mampinga, kino tango nini okoboya koyokela engumba Yelusalemi mawa mpe bingumba mosusu ya Yuda, bingumba oyo okangela kanda mibu tuku sambo mobimba?
Then the angel of the LORD said, “How long, O LORD of Hosts, will You withhold mercy from Jerusalem and the cities of Judah, with which You have been angry these seventy years?”
13 Yawe abimisaki maloba ya kimia mpe ya kobondisa, na monoko ya Anjelu oyo azalaki koloba na ngai.
So the LORD spoke kind and comforting words to the angel who was speaking with me.
14 Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai alobaki: — Tatola maloba oyo: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Yelusalemi mpe Siona.
Then the angel who was speaking with me said, “Proclaim this word: This is what the LORD of Hosts says: ‘I am very jealous for Jerusalem and Zion,
15 Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › »
but I am fiercely angry with the nations that are at ease. For I was a little angry, but they have added to the calamity.’
16 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi: « Nakozonga na Yelusalemi mpo na koyokela bango mawa; mpe kuna, bakotonga lisusu Tempelo na Ngai mpe bakosalela kati na Yelusalemi singa oyo bamekelaka molayi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Therefore this is what the LORD says: ‘I will return to Jerusalem with mercy, and there My house will be rebuilt, declares the LORD of Hosts, and a measuring line will be stretched out over Jerusalem.’
17 Tatola lisusu: « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Bingumba na Ngai ekotondisama lisusu na bomengo, Yawe akobondisa lisusu Siona mpe akopona Yelusalemi. › »
Proclaim further that this is what the LORD of Hosts says: ‘My cities will again overflow with prosperity; the LORD will again comfort Zion and choose Jerusalem.’”
18 Bongo natombolaki miso mpe namonaki maseke minei liboso na ngai.
Then I looked up and saw four horns.
19 Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai: — Maseke wana elakisi nini? Azongiselaki ngai: — Maseke wana ezali bikolo ya nguya oyo epanzaki Yuda, Isalaele mpe Yelusalemi.
So I asked the angel who was speaking with me, “What are these?” And he told me, “These are the horns that have scattered Judah, Israel, and Jerusalem.”
20 Yawe alakisaki ngai bato minei ya misala ya maboko.
Then the LORD showed me four craftsmen.
21 Natunaki: — Bato oyo bayei kosala nini? Azongisaki: — Ezali maseke oyo eyaki kopanza Yuda mpo ete moto moko te akoka kotombola moto, kasi bato oyo ya misala ya maboko bayei nde kolengisa bango mpe kokweyisa nguya ya bikolo oyo etombolaki maseke na yango mpo na kobundisa Yuda mpe kopanza bato na yango.
“What are these coming to do?” I asked. And He replied, “These are the horns that scattered Judah so that no one could raise his head; but the craftsmen have come to terrify them and throw down these horns of the nations that have lifted up their horns against the land of Judah to scatter it.”

< Zakari 1 >