< Tito 3 >

1 Yebisa bango lisusu ete basengeli kotosa bakambi mpe bakonzi, koselingwa mpo na misala nyonso ya malamu,
Put them in mind to be subject to governments, and powers, to obey magistrates, to be ready to every good work;
2 komipekisa kotiola bato, kozala bato na kimia, na boboto mpe na bolingo epai ya bato nyonso.
to speak evil of no one; to be no fighters, but equitable, showing all meekness to all men.
3 Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.
For even we ourselves were formerly foolish, disobedient, erring, slavishly serving diverse inordinate desires and pleasures, living in malice and envy, hateful, and hating one another.
4 Kasi tango Nzambe Mobikisi na biso amonisaki boboto mpe bolingo na Ye mpo na bato,
But when the goodness and philanthropy of God our Saviour shone forth,
5 abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale.
he saved us--not on account of works of righteousness which we had done--but according to his own mercy, through the bath of regeneration, and the renewing of the Holy Spirit;
6 Nzambe asopelaki biso Molimo Mosantu na bofuluki penza na nzela ya Yesu-Klisto, Mobikisi na biso,
which he poured out on us richly, through Jesus Christ our Saviour;
7 mpo ete, wana akomisi biso bato ya sembo na nzela ya ngolu na Ye, tokoma bakitani ya libula kolanda elikya ya bomoi ya seko. (aiōnios g166)
that being justified by his favor, we might be made heirs according to the hope of eternal life. (aiōnios g166)
8 Makambo oyo nawuti koloba ezali penza ya solo; mpe nalingi ete obetelaka yango sete makasi, mpo ete bato oyo bandimeli Nzambe bamipesa mobimba mpo na kosala misala ya malamu. Yango nde makambo oyo ezali penza malamu mpe na tina mpo na bato.
This doctrine is true: and concerning these, I charge you to affirm strongly, that those who have believed in God, be studious to stand foremost in good works. These are things that are honorable and profitable to men.
9 Kasi kima tembe ya bozoba, masolo ya milongo ya mbotama, koswana mpe bitumba na tina na mibeko: ezali na litomba te mpe ezali na tina te.
But foolish questions, and genealogies, and strifes, and fightings about the law, resist; for they are unprofitable and vain.
10 Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba;
A factionist, after a first and second admonition, reject;
11 pamba te osengeli koyeba ete moto ya ndenge wana abunga nzela, azali kosala masumu; mpe na ndenge wana, amikateli ye moko etumbu.
knowing that such a person is perverted, and sins, being self-condemned.
12 Tango kaka nakotindela yo Artemasi to Tishike, sala nyonso mpo ete oya epai na ngai, na Nikopolisi, pamba te nazwaki mokano ya kolekisa kuna eleko ya malili makasi.
When I shall send Artemas to you, or Tychicus, make haste to come to me at Nicopolis, for I have determined to winter there.
13 Sala nyonso oyo okoki kosala mpo na kosunga mobembo ya Zenasi, molakisi ya Mobeko, mpe Apolosi mpo ete bazanga eloko moko te na nzela.
Diligently help forward on their journey, Zenas, the lawyer, and Apollos, that nothing may be wanting to them.
14 Bandeko na biso mpe basengeli koyekola komipesa na misala ya malamu, mpo na kosunga bosenga nyonso mpe kobika bomoi oyo ekobotaka bambuma.
And let ours also learn to stand foremost in good works, for necessary uses, that they may not be unfruitful.
15 Bato nyonso oyo bazali elongo na ngai batindeli yo mbote. Pesa mbote na bato oyo balingaka biso kati na kondima. Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na biso nyonso!
All who are with me salute you. Salute them who love us in the faith. Favor be with you all.

< Tito 3 >