< Tito 2 >

1 Kasi yo, teya makambo oyo ekoki na malakisi ya peto.
至于你,你应当进行符合正确信念的宣讲。
2 Teya na batata mibange ete balekisaka ndelo te na bizaleli na bango, bazala bato oyo bakoki na lokumu, bato na mayele, bato na kondima ya solo, bato na bolingo, mpe bato na molende.
让年老的男人不要饮酒,他们应该值得尊重,明白事理,以健全的方式相信上帝,有爱心,有耐心。
3 Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe: basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu,
同样,让年老的女人应该在行为中显示他们为上帝而活。他们不应该以言辞毁人的名声,并且不应该沉迷于葡萄酒。。
4 mpo ete balakisa na bilenge basi kolinga mibali na bango mpe bana na bango,
他们应该教导其他人什么是善行,教导年轻的妻子爱她们的丈夫和儿女,
5 komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.
要明白事理、贞洁、做好家务、做善事、聆听丈夫对她们所说的。只有这样,上帝之道才不会错误讲述。
6 Lendisa mpe bilenge mibali ete bamibatelaka malamu.
同样,让年轻的男子要明事理。
7 Na makambo nyonso, zala ndakisa na nzela ya misala malamu; mpe na mateya na yo, lakisa bosembo, longola maseki,
你应该在生活的方方面面,显示你作为善行的榜样;在你教导的事情上,显示你的正直和认真,
8 salela maloba ya kimia mpe ezanga pamela, mpo ete bato oyo batelemelaka yo bayoka soni mpe bazanga mabe ya koloba na tina na biso.
分享无可指责的正确信念,通过这种方式,让那些反对的人对自己感到羞愧,不再说出任何诋毁我们的话语。
9 Teya bawumbu ete batosaka bankolo na bango na makambo nyonso, basalaka makasi mpo na kosepelisa bango, babendanaka na bango te
告诉奴仆们凡事要遵从自己的主人,让主人欢喜,不要顶嘴。
10 mpe bayibaka te. Kasi teya bango ete bamilakisaka tango nyonso lokola bato oyo bankolo na bango bakoki kotiela mitema, mpo ete bakomisa malakisi ya Nzambe Mobikisi na biso elengi.
他们不应偷东西自己用,而是要显示出绝对的诚实,这样才能正确地代表我们救世主上帝所讲述的真理。
11 Pamba te ngolu ya Nzambe emonisami lokola etima ya lobiko mpo na bato nyonso.
上帝拯救所有人的恩典已经显化。
12 Elakisaka biso kotika mabe, kokabwana na baposa ya makambo ya mokili, kobika tango oyo na bwanya, na bosembo mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe, (aiōn g165)
它教导我们拒绝不虔诚的生活方式和这世间的欲望,而是要在这个世界,在上帝面前,过着考虑周详、自控的生活, (aiōn g165)
13 wana tozali kozela kokokisama ya elikya oyo epambolama: komonisama ya nkembo ya Yesu-Klisto, Nzambe monene mpe Mobikisi na biso, oyo
与此同时,期待伟大上帝和救主耶稣基督荣耀显现的美好希望。
14 amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
他舍身为我们,这样就能救赎我们脱离一切邪恶之事,让我们为他而变得洁净,成为属于他的子民,热心行善。
15 Yango nde makambo oyo osengeli koteya. Lendisa mpe pamela na bokonzi nyonso. Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola yo.
这就是你要宣讲的事情,你有权力去鼓励其他人,在需要的时候纠正其他人。不要让任何人低看你。

< Tito 2 >