< Tito 1 >

1 Ngai Polo, mowumbu ya Nzambe mpe ntoma ya Yesu-Klisto, mpo na kolendisa kondima ya baponami ya Nzambe mpe boyebi ya bosolo oyo ememaka na botosi kati na makambo ya Nzambe,
Од Павла, слуге Божјег, а апостола Исуса Христа по вери изабраних Божјих и по познању истине побожности,
2 mpo ete bazala na elikya ya bomoi ya seko oyo Nzambe, Ye oyo akosaka te, alakaki biso wuta kala, liboso ya ebandeli ya tango, (aiōnios g166)
За наду вечног живота, који обећа нелажни Бог пре времена вечних, (aiōnios g166)
3 mpe atalisi sik’oyo polele na nzela ya Liloba na Ye, oyo napesamelaki mokumba ya kosakola, kolanda etinda ya Nzambe, Mobikisi na biso, na tango oyo Ye akata;
А јави у времена своја реч своју проповедањем, које је мени поверено по заповести Спаситеља нашег Бога,
4 epai ya Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali kokabola elongo na ye: Tika ete ngolu mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mobikisi na biso!
Титу, правом сину по вери нас обојице, благодат, милост, мир од Бога Оца и Господа Исуса Христа, Спаса нашег.
5 Natikaki yo kati na Kreti mpo ete osilisa kobongisa makambo oyo etikalaki mpe opona bakambi ya Lingomba kati na engumba moko na moko, ndenge natindaki yo.
Зато те оставих у Криту да поправиш шта је недовршено, и да поставиш по свим градовима свештенике, као што ти ја заповедих,
6 Mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moboti ya malamu; mpe bana na ye basengeli kozala bandimi, bana ya mobulu te mpe ya kilikili te.
Ако је ко без мане, једне жене муж, и има верну децу, коју не коре за курварство или за непокорност.
7 Lokola motambolisi misala ya Nzambe, mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela. Yango wana, asengeli kozala moto na lolendo te, moto na kanda te, molangwi masanga te, moto na kanza te, moto na lokoso ya mbongo te.
Јер владика треба да је без мане, као Божји пристав; не који себи угађа, не гневљив, не пијаница, не бојац, не лаком на погани добитак;
8 Asengeli nde kozala moto oyo ayambaka bato malamu kati na ndako na ye, alingaka makambo ya malamu, azalaka na ekenge; asengeli kozala moto ya bule, moto ya sembo, moto oyo ayebi komikanga,
Него гостољубив, благ, поштен, праведан, свет, чист;
9 moto oyo akangama makasi na Liloba ya solo, ndenge kaka bateyaki ye yango. Na bongo, akoki kolendisa bato mosusu na nzela ya malakisi ya peto mpe kosukisa tembe ya bato oyo bandimaka te.
Који се држи верне речи по науци, да буде кадар и саветовати са здравом науком, и покарати оне који се противе.
10 Bato mingi baboyi kotosa solo, bazali koteya makambo ezanga tina mpe ya lokuta, mingi-mingi kati na bato oyo bakatama ngenga.
Јер има много непослушних, празноговорљивих, и умом преварених, а особито који су из обрезања,
11 Osengeli kosukisa bango, pamba te bazali kobebisa mabota ebele na nzela ya malakisi oyo esengeli kutu te, mpo na kaka kozwa mbongo ya soni.
Којима треба уста затворити; који целе куће изопачују учећи шта не треба, поганог добитка ради.
12 Moto moko ya Kreti, oyo bango moko bato ya Kreti bazwaka lokola mosakoli, alobaki: « Bato ya Kreti bazalaka bakosi, bazalaka banyama mabe, bato na lokoso mpe bagoyigoyi. »
А рече неко од њих, њихов пророк: Крићани свагда лажљиви, зли зверови, беспослени трбуси.
13 Litatoli oyo ezali penza ya solo. Yango wana, pamela bango makasi mpo ete bazala na kondima ya peto
Сведочанство је ово истинито; заради тог узрока карај их без штеђења, да буду здрави у вери,
14 mpe balanda te masapo ya Bayuda to mibeko ya bato oyo baboyi solo.
Не слушајући јеврејске гаталице ни заповести људи који се одвраћају од истине.
15 Mpo na bato oyo bazali peto, nyonso ezalaka peto; kasi mpo na bato oyo bazali mbindo mpe bazangi kondima, eloko moko te ezalaka peto, pamba te mayele mpe mitema na bango ezali mbindo.
Чистима је све чисто; а поганима и невернима ништа није чисто, него је опогањен њихов и ум и савест.
16 Balobaka ete bayebi Nzambe, kasi bawanganaka Ye na nzela ya misala na bango, pamba te bazali nkele, batomboki mpe bazangi makoki ya kosala ata likambo moko ya malamu.
Говоре да познају Бога, а делима Га се одричу; јер су мрски и непослушни, и ни за какво добро дело ваљани.

< Tito 1 >