< Loyembo ya Salomo 1 >
1 Oyo nde nzembo oyo eleki kitoko kati na banzembo ya Salomo.
This is Solomon’s Song of Songs.
2 Tika ete bibebu na yo epesa ngai beze, pamba te bolingo na yo eleki vino na elengi.
Let him kiss me with the kisses of his mouth! For your love is more delightful than wine.
3 Solo ya malasi na yo ezali kitoko, mobimba na yo ezali lokola solo ya malasi ya kitoko oyo epanzani; yango wana bilenge basi balingaka yo!
The fragrance of your perfume is pleasing; your name is like perfume poured out. No wonder the maidens adore you.
4 Tokende na yo elongo, tokima mbangu! Mokonzi akotisi ngai na bashambre na ye! Tovanda elongo na esengo mpe tosepela na tina na yo, tosanzola bolingo na yo, oyo eleki vino ya kitoko na elengi. Solo, ezali na pamba te nde basi balulaka yo!
Take me away with you—let us hurry! May the king bring me to his chambers. We will rejoice and delight in you; we will praise your love more than wine. It is only right that they adore you.
5 Oh bilenge basi ya Yelusalemi, nazali mwindo, kasi nazali kitoko! Solo, nazali mwindo lokola bandako ya kapo ya Kedari, lokola barido ya kitoko na ndako ya kapo ya Salomo.
I am dark, yet lovely, O daughters of Jerusalem, like the tents of Kedar, like the curtains of Solomon.
6 Kokamwa ngai te mpo ete nazali mwindo, pamba te moyi nde eyindisi ngai. Bana mibali ya mama na ngai basilikelaki ngai, bakomisaki ngai mokengeli bilanga ya vino. Solo, bilanga na ngai moko ya vino, nazalaki kokoka lisusu te kokengela yango.
Do not stare because I am dark, for the sun has gazed upon me. My mother’s sons were angry with me; they made me a keeper of the vineyards, but my own vineyard I have neglected.
7 Oh mobali oyo ngai nalingaka, yebisa ngai esika nini oleisaka bibwele na yo, esika nini opemisaka bampate na yo na midi! Mpo na nini nazala lokola mwasi oyo azali koyengayenga sima na bibwele ya baninga na yo?
Tell me, O one I love, where do you pasture your sheep? Where do you rest them at midday? Why should I be like a veiled woman beside the flocks of your companions?
8 Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, soki oyebi yango te, landa kaka matambe ya bibwele, na banzela oyo yango elekeli, mpe leisa bana bantaba ya basi na yo pembeni ya bandako ya kapo ya babateli bibwele.
If you do not know, O fairest of women, follow the tracks of the flock, and graze your young goats near the tents of the shepherds.
9 Oh bolingo na ngai, nazali komona yo lokola mpunda ya mwasi oyo ebendaka shar ya Faraon.
I compare you, my darling, to a mare among Pharaoh’s chariots.
10 Matama na yo ezalaka kitoko kati na biloko ya matoyi, mpe kingo na yo ebongaka na mayaka.
Your cheeks are beautiful with ornaments, your neck with strings of jewels.
11 Tokolukela yo biloko ya matoyi ya wolo oyo batia bambuma ya mike-mike ya palata.
We will make you ornaments of gold, studded with beads of silver.
12 Tango mokonzi azalaki kolia na mesa na ye, malasi na ngai ya nare ezalaki kopanza solo na yango ya kitoko.
While the king was at his table, my perfume spread its fragrance.
13 Molingami na ngai azali mpo na ngai lokola liboke ya malasi ya mire, akolekisa butu na ye na kati-kati ya mabele na ngai.
My beloved is to me a sachet of myrrh resting between my breasts.
14 Molingami na ngai azali mpo na ngai lokola liboke ya bambuma ya ene oyo ewutaka na bilanga ya vino ya Eyini-Gedi.
My beloved is to me a cluster of henna blossoms in the vineyards of En-gedi.
15 Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko! Solo, ozali penza kitoko makasi! Miso na yo elala lokola ebenga.
How beautiful you are, my darling! Oh, how very beautiful! Your eyes are like doves.
16 Mobali na ngai, tala ndenge nini ozali kitoko! Ozali penza elengi. Mbeto na biso ezali nde matiti ya mobesu,
How handsome you are, my beloved! Oh, how delightful! The soft grass is our bed.
17 makonzi ya ndako na biso esalemi na banzete ya sedele, mpe balate na yango, na banzete ya sipele.
The beams of our house are cedars; our rafters are fragrant firs.