< Loyembo ya Salomo 8 >
1 Ah, soki ozalaki ndeko na ngai ya mobali oyo amelaki mabele ya mama na ngai! Soki nakutanaki na yo na libanda, nalingaki kopesa yo beze, mpe moto moko te alingaki kotiola ngai.
¡Oh, si fueras mi hermano, que tomaste la leche de los pechos de mi madre! Cuando te encontrará por la calle, te daria besos; Y no sería menospreciada.
2 Nalingaki komema yo mpe kokotisa yo na ndako ya mama na ngai, mpo ete oteya ngai bolingo. Nalingaki komelisa yo vino ya kitoko, oyo basali na bambuma ya grenade.
Te llevaría de la mano a la casa de mi madre y ella sería mi maestra. Te daría una copa de vino sazonado, una bebida de la granada.
3 Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai, mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto!
Su mano izquierda estaría debajo de mi cabeza, y su mano derecha a mi alrededor.
4 Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino: bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
Prometanme, oh hijas de Jerusalén, que no despierten ni levanten a mi amor hasta que quiera.
5 Nani oyo abimi na esobe mpe alaleli mobali na ye ya motema? Nalamusaki yo na se ya nzete ya pome, na esika oyo mama na yo azwaki zemi na yo, esika oyo abotaki yo na pasi.
¿Quién es este, quién sale del desierto, descansando sobre su amado? Fui yo quien te despertó debajo del manzano, donde tu madre te dio a luz; Allí ella estaba sufriendo por tu nacimiento.
6 Tia ngai lokola kashe na motema na yo, lokola kashe na loboko na yo; pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa, zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi. Moto ya bolingo epelaka makasi lokola kake kowuta epai na Yawe. (Sheol )
Ponme como un sello en tu corazón, como un sello en tu brazo; El amor es fuerte como la muerte, y los celos como el inframundo; sus carbones son carbones de fuego; el fuego divino. (Sheol )
7 Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te; ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te. Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako mpo na kosomba bolingo, solo penza bakotiola ye.
Muchas aguas no podrán apagar el amor, o los ríos pueden ahogarlo; si un hombre diera toda la sustancia de su casa por amor, solo sería menospreciado.
8 Tozali na ndeko moko ya mwasi, azali nanu moke; azali nanu ata na mabele te. Tokosala nini mpo na ye na mokolo oyo bakoluka ye na libala?
Tenemos una hermana joven, y ella no tiene pechos; ¿Qué debemos hacer por nuestra hermana en el día en que se la entregue a un hombre?
9 Soki azalaki mir, tolingaki kotonga likolo na ye ndako oyo esalemi na palata; soki azalaki ekuke, tolingaki kokanga ye na libaya ya sedele.
Si ella es un muro, haremos de ella una fuerte base de plata; y si es una puerta, la reforzáremos con madera de cedro.
10 Nazali mir, mpe mabele na ngai ezali lokola bandako milayi. Boye, na miso na ye, nazali lokola mwasi oyo azwi kimia.
Soy un muro, y mis pechos son como torres; entonces estaba yo en sus ojos como alguien a quien habían llegado las buenas oportunidades.
11 Salomo azali na elanga ya vino kati na Bala-Amoni, apesi yango na bakengeli; moko na moko kati na bango azalaki kopesa mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko mpo na kosomba bambuma na yango.
Salomón tenía un huerto de viñas en Baal-hamon; Dejó el jardín de la vid a los cuidadores; Cada uno tenía que dar mil trozos de plata por su fruto.
12 Oh Salomo, mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ezali ya yo, mpe bibende nkama mibale ezali ya bakengeli bambuma; kasi elanga na ngai ya vino, oyo ezali liboso na ngai, ezali ya ngai.
Mi huerta, que es mía, está delante de mí: tú, oh Salomón, tendrás mil, y los que guardan el fruto de ellos doscientos.
13 Yo oyo ovandi kati na bilanga, baninga na yo balingi koyoka mongongo na yo; tika ete oyokisa ngai yango!
Tú que tienes tu lugar de descanso en los jardines, mis compañeros escuchan tu voz; Déjame escuchar tu voz. Ella.
14 Oh bolingo na ngai, kima mbangu, zala lokola mboloko to lokola mwana ya mbuli; kende na likolo ya bangomba oyo etondi na matiti ya solo kitoko.
Ven pronto, mi amado, y sé como una gacela en las montañas de las especias.