< Loyembo ya Salomo 7 >
1 Oh elenge mwasi ya lokumu! Makolo na yo ebimaka kitoko soki olati basandale. Zingazinga ya loketo na yo ezali lokola lopete oyo esalemi na maboko ya basali bikeko.
Howe beautifull are thy goings with shooes, O princes daughter! the ioynts of thy thighs are like iewels: the worke of the hande of a cunning workeman.
2 Motolu na yo ezali lokola kopo ya kitoko oyo ezangaka vino ya kitoko te. Libumu na yo ezali lokola mopiku ya ble oyo ezingami na fololo oyo babengaka lisi.
Thy nauel is as a round cuppe that wanteth not licour: thy belly is as an heape of wheat compassed about with lilies.
3 Mabele na yo nyonso mibale ezali lokola bana mapasa mibale ya mboloko.
Thy two breastes are as two young roes that are twinnes.
4 Kingo na yo ezali lokola ndako molayi oyo batonga na pembe ya nzoko. Miso na yo ezali lokola maziba ya engumba Eshiboni, pembeni ya ekuke ya Bati-Rabimi. Zolo na yo ezali lokola ndako molayi ya Libani oyo etalani na Damasi.
Thy necke is like a towre of yuorie: thine eyes are like the fishe pooles in Heshbon by the gate of Bath-rabbim: thy nose is as the towre of Lebanon, that looketh toward Damascus.
5 Moto na yo ezali lokola ngomba Karimeli, mpe suki ya moto na yo ezali lokola elamba ya motane; mokonzi akangami na mazita na yango.
Thine head vpon thee is as skarlet, and the bush of thine head like purple: the King is tyed in the rafters.
6 Oh tala ndenge ozali penza kitoko! Bolingo na ngai, osalaka esengo ya motema na ngai; kitoko na yo esalaka ngai esengo na motema!
Howe faire art thou, and howe pleasant art thou, O my loue, in pleasures!
7 Molayi na yo ezali lokola nzete ya mbila, mabele na yo ezali lokola maboke ya bambuma.
This thy stature is like a palme tree, and thy brestes like clusters.
8 Namilobeli: « Nakomata na nzete ya mbila, nakobuka bambuma na yango! » Tika ete mabele na yo ezala lokola maboke ya bambuma ya vino! Tika ete solo ya monoko na yo ezala lokola bapome!
I saide, I will goe vp into the palme tree, I will take holde of her boughes: thy breastes shall nowe be like the clusters of the vine: and the sauour of thy nose like apples,
9 Mpe tika ete monoko na yo ezala lokola vino ya kitoko koleka! Tika ete vino yango esopanela bolingo na ngai na pete, eleka na bibebu ya bato oyo bazali kolala.
And the roufe of thy mouth like good wine, which goeth straight to my welbeloued, and causeth the lippes of the ancient to speake.
10 Ngai, nazali ya mobali na ngai; mpe ye, azalaka kaka na posa na ngai.
I am my welbeloueds, and his desire is toward mee.
11 Yaka, mobali na ngai; tika ete tokende na biso na elanga, tolekisa butu na biso kati na mboka!
Come, my welbeloued, let vs go foorth into the fielde: let vs remaine in the villages.
12 Na tongo, tokokende na bilanga ya vino mpo na kotala soki banzete ya vino ebandi kobimisa bafololo, soki mito na yango efungwami, mpe soki banzete ya bambuma ya grenade ebimisi bafololo. Kuna nde nakopesa yo babeze na ngai.
Let vs get vp early to the vines, let vs see if the vine florish, whether it hath budded the small grape, or whether the pomegranates florish: there will I giue thee my loue.
13 Bambuma ya mandragore ezali kobimisa solo na yango; mpe na ekuke na biso, tozali na bambuma nyonso ya kitoko: ezala ya sika to ya kala, oyo nabombeli yo, mobali na ngai ya motema.
The mandrakes haue giuen a smelll, and in our gates are all sweete things, new and olde: my welbeloued, I haue kept them for thee.