< Loyembo ya Salomo 6 >
1 Oh mwasi oyo aleki basi nyonso na kitoko, mobali na yo akei wapi? Akoti nzela nini mpo ete tosunga yo mpo na koluka ye?
Où est-il allé, ton bien-aimé, ô la plus belle des femmes? De quel côté s’est-il dirigé, ton bien-aimé? Nous t’aiderons à le chercher.
2 Mobali na ngai akei na elanga na ye, na mikala ya banzete ya solo kitoko mpo na koleisa bibwele na ye mpe kobuka fololo oyo babengaka lisi.
Mon bien-aimé est descendu dans son jardin, vers les plates-bandes d’aromates, pour faire paître son troupeau dans les jardins et cueillir des roses.
3 Nazali mpo na mobali na ngai, mpe mobali na ngai azali mpo ngai. Azali koleisa bibwele na ye na bilanga ya bafololo oyo babengaka lisi.
Je suis à mon bien-aimé, et mon bien-aimé est à moi, lui qui fait paître son troupeau parmi les roses.
4 Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko lokola engumba ya Tiritsa; elongi na yo ezali kitoko lokola engumba Yelusalemi; obangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango.
Tu es belle, mon amie, comme Tirça, gracieuse comme Jérusalem, imposante comme une armée aux enseignes déployées.
5 Tika kotala ngai, pamba te miso na yo ezali kokweyisa ngai mayanga. Suki na yo ezali lokola etonga ya bantaba ya basi oyo ewutaka na Galadi.
Détourne tes yeux de moi, car ils me jettent dans des transports. Tes cheveux sont comme un troupeau de chèvres dévalant du Galaad.
6 Minu na yo ezali lokola etonga ya bameme oyo bawuti kosukola. Meme moko na moko ezali na lipasa na yango, moko te ezangi mwana.
Tes dents sont comme un troupeau de brebis qui remontent du bain, formant deux rangées parfaites, sans aucun vide.
7 Matama na yo, na se ya vwale, ezali lokola liboke ya bambuma ya grenade.
Ta tempe est comme une tranche de grenade à travers ton voile.
8 Mokonzi akoki kozala na basi tuku motoba, bamakangu tuku mwambe mpe bilenge basi ebele penza.
Les reines sont au nombre de soixante, les concubines de quatre-vingts, et innombrables sont les jeunes filles.
9 Kasi ebenga na ngai, mwasi na ngai oyo akoka na nyonso, azali kaka ye moko; azali kaka ye moko mwana mwasi ya mama na ye, oyo aleki kitoko na libumu ya mama oyo abota ye. Tango bilenge basi bamonaka ye, balulaka ye mpe batatolaka ete azali mwasi na esengo. Basi ya bakonzi mpe bamakangu bakumisaka ye soki bamoni ye.
Mais unique est ma colombe, mon amie accomplie; elle est unique pour sa mère, elle est la préférée de celle qui l’a enfantée. Les jeunes filles, en la voyant, la proclament heureuse; reines et concubines font son éloge.
10 Nani oyo azali komonana lokola moyi ya tongo, kitoko lokola sanza, azali kongenga lokola moyi, abangisaka lokola mampinga ya basoda na se ya bendele na bango?
Qui est-elle, celle-ci qui apparaît comme l’aurore, qui est belle comme la lune, brillante comme le soleil, imposante comme une armée aux enseignes déployées?
11 Nakendeki na elanga ya bakokoti mpo na koluka milona kati na lubwaku, mpo na kotala soki banzete ya vino ebandi kobimisa mito to banzete ya grenade ebandi kobimisa bafololo.
Je suis descendue dans le verger aux noyers, pour voir les jeunes pousses de la vallée, pour voir si la vigne avait bourgeonné, si les grenades étaient en fleurs.
12 Nasosolaki te ndenge nini molimo na ngai ememaki ngai kino na bashar ya mokonzi ya bato na ngai.
Je ne savais pas… Le désir de mon âme m’avait poussé au beau milieu des chars de mon peuple généreux.
13 Zonga, zonga, oh mwasi ya Sulami! Zonga, zonga mpo ete tokoka kotala yo malamu! Mpo na nini bolingi kotala malamu mwasi ya Sulami ndenge batalaka mabina ya mindule ya masanga mibale?
Reviens, reviens, ô la Sulamite, reviens, reviens, que nous puissions te regarder! Pourquoi voulez-vous regarder la Sulamite, comme on fait d’un ballet de deux chœurs?