< Loyembo ya Salomo 4 >

1 Oh mwasi na ngai ya motema, ozali kitoko, ozali penza kitoko makasi! Miso na yo, na se ya vwale, elala lokola ebenga; suki na yo ezali lokola etonga ya bantaba ya basi oyo ekitaka na ngomba Galadi.
How beautiful you are, my darling— how very beautiful! Your eyes are like doves behind your veil. Your hair is like a flock of goats streaming down Mount Gilead.
2 Minu na yo ezali lokola etonga ya bameme oyo balongoli bapwale, bongo bawuti kosukola yango. Meme moko na moko ezali na lipasa na yango; moko te ezangi mwana.
Your teeth are like a flock of newly shorn sheep coming up from the washing; each has its twin, and not one of them is lost.
3 Bibebu na yo ezali lokola kitendi ya motane, mpe elobeli na yo epesaka esengo; matama na yo ezali lokola mbuma ya grenade, na se ya vwale.
Your lips are like a scarlet ribbon, and your mouth is lovely. Your brow behind your veil is like a slice of pomegranate.
4 Kingo na yo ezali lokola ndako molayi ya Davidi, oyo batongi mpo na kobomba bibundeli; banguba nkoto moko ediembisami kuna, banguba ya basoda ya mpiko.
Your neck is like the tower of David, built with rows of stones; on it hang a thousand shields, all of them shields of warriors.
5 Mabele na yo nyonso mibale ezali lokola bana mapasa mibale ya mboloko, oyo ezali kolia kati na bafololo oyo babengaka lisi.
Your breasts are like two fawns, twins of a gazelle grazing among the lilies.
6 Kino tongo ekotana mpe molili ekolimwa, nakokende na ngomba ya mire mpe na ngomba moke ya ansa.
Before the day breaks and the shadows flee, I will make my way to the mountain of myrrh and to the hill of frankincense.
7 Mwasi na ngai ya motema, mobimba na yo ezali kitoko mingi; ata elembo moko te emonani mabe kati na yo.
You are altogether beautiful, my darling; in you there is no flaw.
8 Longwa na Libani mpe yaka elongo na ngai, mwasi na ngai ya motema; longwa na Libani, yaka elongo na ngai. Tala wuta na basonge ya bangomba Amana, Seniri mpe Erimoni epai wapi ezali na ndako ya bankosi mpe ngomba ya bankoyi.
Come with me from Lebanon, my bride, come with me from Lebanon! Descend from the peak of Amana, from the summits of Senir and Hermon, from the dens of the lions, from the mountains of the leopards.
9 Obetisi ngai motema makasi, Oh ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema; obetisi ngai motema na komona etaleli ya miso na yo, mpe na komona moko ya sheneti ya kingo na yo.
You have captured my heart, my sister, my bride; you have stolen my heart with one glance of your eyes, with one jewel of your neck.
10 Solo, bolingo na yo eleki elengi, ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema! Solo, bolingo na yo eleki vino na kitoko; solo ya mafuta na yo eleki malasi nyonso na kitoko.
How delightful is your love, my sister, my bride! Your love is much better than wine, and the fragrance of your perfume than all spices.
11 Bibebu na yo ezali kobimisa mafuta ya elengi, mwasi na ngai ya motema; se ya lolemo na yo etondi na mafuta ya nzoyi mpe na miliki, mpe solo ya bilamba na yo ezali lokola solo ya Libani.
Your lips, my bride, drip sweetness like the honeycomb; honey and milk are under your tongue, and the fragrance of your garments is like the aroma of Lebanon.
12 Ozali elanga ekangama, ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema; ozali etima oyo ezipami mpe liziba oyo ekangami.
My sister, my bride, you are a garden locked up, a spring enclosed, a fountain sealed.
13 Ozali kopesa pio lokola elanga ya banzete ya grenade, oyo ezali na bambuma kitoko, elongo na banzete ya solo kitoko: ene mpe nare,
Your branches are an orchard of pomegranates with the choicest of fruits, with henna and nard,
14 nare mpe safarani, kaneli ya solo kitoko, sinamoni, elongo na lolenge nyonso ya banzete oyo epesaka malasi ya ansa, ya aloe mpe ya mire, mpe malasi nyonso oyo eleki kitoko.
with nard and saffron, with calamus and cinnamon, with every kind of frankincense tree, with myrrh and aloes, with all the finest spices.
15 Ozali liziba kati na elanga, etima oyo etiolaka wuta na Libani.
You are a garden spring, a well of fresh water flowing down from Lebanon.
16 Oh mopepe ya nor, lamuka; oh mopepe ya sude, yaka! Pepa kati na elanga na ngai, mpe tika ete solo kitoko na yango epanzana kino mosika! Tika ete mwasi na ngai ya motema aya kati na elanga na ye mpe alia mbuma na yango ya elengi makasi!
Awake, O north wind, and come, O south wind. Breathe on my garden and spread the fragrance of its spices. Let my beloved come into his garden and taste its choicest fruits.

< Loyembo ya Salomo 4 >