< Loyembo ya Salomo 3 >
1 Butu mobimba, na mbeto na ngai, nazali koluka mobali oyo motema na ngai elingaka; naluki ye, kasi namonaki ye te.
我夜間躺臥在床上, 尋找我心所愛的; 我尋找他,卻尋不見。
2 Esengeli na ngai kolamuka sik’oyo mpe kobima libanda ya engumba, na balabala na yango mpe na bisika oyo bato nyonso bakutanaka; nakoluka mobali oyo motema na ngai elingaka. Nalukaki ye, kasi namonaki ye te.
我說:我要起來,遊行城中, 在街市上,在寬闊處, 尋找我心所愛的。 我尋找他,卻尋不見。
3 Bakengeli bamonaki ngai tango bazalaki koleka-leka na balabala ya engumba. Natunaki bango: « Bomoneli ngai te mobali oyo motema na ngai elingaka? »
城中巡邏看守的人遇見我; 我問他們:你們看見我心所愛的沒有?
4 Tango kaka nalekaki bango, mbala moko, namonaki mobali oyo motema na ngai elingaka. Nakangaki ye mpe natikaki ye lisusu te kokende. Namemaki ye kino na ndako ya mama na ngai, na shambre ya mwasi oyo abotaki ngai.
我剛離開他們就遇見我心所愛的。 我拉住他,不容他走, 領他入我母家, 到懷我者的內室。
5 Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga: Bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
耶路撒冷的眾女子啊, 我指着羚羊或田野的母鹿囑咐你們: 不要驚動、不要叫醒我所親愛的, 等他自己情願。
6 Nani oyo abimi na esobe lokola molinga oyo ezali komata, azali kobimisa solo ya malasi ya mire mpe ya ansa, oyo basali na biloko ya mike-mike ya solo kitoko ya moto ya mombongo?
那從曠野上來、形狀如煙柱、 以沒藥和乳香並商人各樣香粉薰的是誰呢?
7 Tala! Ezali nde tsipoyi ya mokonzi Salomo! Basoda na ye ya mpiko, bato ya lokumu ya Isalaele, tuku motoba nde bamemi yango.
看哪,是所羅門的轎; 四圍有六十個勇士, 都是以色列中的勇士;
8 Bango nyonso balati mipanga; bango nyonso bazali makasi na bitumba, baselingwa mpo na bitumba ya butu.
手都持刀,善於爭戰, 腰間佩刀,防備夜間有驚慌。
9 Mokonzi Salomo asalisaki tsipoyi; basalaki yango na mabaya ya mboka Libani.
所羅門王用黎巴嫩木 為自己製造一乘華轎。
10 Basalaki bisimbelo na yango na palata, mokongo na yango, na wolo. Balatisaki evandelo na yango bilamba ya motuya ya langi ya motane makasi. Bongo, bilenge basi ya Yelusalemi babongisaki kati na yango na motema ya bolingo.
轎柱是用銀做的, 轎底是用金做的; 坐墊是紫色的, 其中所鋪的乃耶路撒冷眾女子的愛情。
11 Bino bilenge basi ya Siona, bobima; botala ndenge nini mokonzi Salomo alati motole, motole oyo mama na ye alatisaki ye na mokolo ya libala na ye, na mokolo oyo motema na ye ezalaki na esengo.
錫安的眾女子啊, 你們出去觀看所羅門王! 頭戴冠冕,就是在他婚筵的日子、 心中喜樂的時候,他母親給他戴上的。