< Loyembo ya Salomo 2 >

1 Nazali lokola fololo oyo ebotaka na etando ya Saroni, fololo oyo babengaka lisi ya lubwaku.
- Ja sam cvijet šaronski, ljiljan u dolu.
2 Ndenge fololo oyo babengaka lisi ezalaka kati na banzube, ndenge wana mpe mwasi na ngai ya motema azalaka kati na bilenge basi.
- Što je ljiljan među trnjem, to je prijateljica moja među djevojkama.
3 Ndenge nzete ya pome ezalaka kati na banzete ya zamba, ndenge wana mpe mobali na ngai azalaka kati na bilenge mibali. Nasepelaka kovanda na se ya elilingi na ye, mpe mbuma na ye ezalaka elengi na monoko na ngai.
- Što je jabuka među šumskim stablima, to je dragi moj među mladićima; bila sam željna hlada njezina i sjedoh, plodovi njeni slatki su grlu mome.
4 Amemaki ngai na esika oyo bamelaka masanga, mpe bendele na ye likolo na ngai ezali bolingo.
Uveo me u odaje vina i pokrio me zastavom ljubavi.
5 Lendisa ngai na bagato oyo basali na bambuma ya vino, sunga ngai na bapome, pamba te nabeli maladi ya bolingo.
Okrijepite me kolačima, osvježite jabukama, jer sam bolna od ljubavi.
6 Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai, mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto!
Njegova mi je lijeva ruka pod glavom, a desnom me grli.
7 Bilenge basi ya Yelusalemi, nabondeli bino na kombo ya mboloko mpe ya mbuli ya bilanga: Bolamusa Bolingo na ngai te liboso ete ye moko akoma na posa ya kolamuka.
- Kćeri jeruzalemske, zaklinjem vas srnama i košutama poljskim, ne budite, ne budite ljubav moju dok sama ne bude htjela!
8 Yoka mongongo ya Bolingo na ngai! Tala ye wana! Ye wana azali koya, azali kopumbwa na likolo ya bangomba, azali kodenda na likolo ya bangomba mike.
Glas dragoga moga! Evo ga, dolazi, prelijeće brda, preskakuje brežuljke.
9 Molingami na ngai azali lokola mboloko to mwana ya mbuli. Tala ye wana! Atelemi na sima ya mir na biso, azali kotala na lininisa, azali kotala na mayele na kiyungulu ya lininisa.
Dragi je moj kao srna, on je kao jelenče. Evo ga za našim zidom, gleda kroz prozore, zaviruje kroz rešetke.
10 Molingami na ngai alobi mpe ayebisi ngai: « Mwasi na ngai ya motema, telema; mwasi na ngai ya kitoko, yaka epai na ngai!
Dragi moj podiže glas i govori mi: “Ustani, dragano moja, ljepoto moja, i dođi,
11 Pamba te, tala eleko ya malili esili koleka, bamvula esili mpe ekeyi.
jer evo, zima je već minula, kiša je prošla i nestala.
12 Bafololo ebimi na mboka, tango ya koyemba banzembo ekoki. Makelele ya banzembo ya bibenga ekomi lisusu koyokana na mokili.
Cvijeće se po zemlji ukazuje, vrijeme pjevanja dođe i glas se grličin čuje u našem kraju.
13 Nzete ya figi ebimisi bambuma na yango ya liboso, bafololo ya bilanga ya vino ekomi kopanza solo na yango ya kitoko. Mwasi na ngai ya motema, telema; mwasi na ngai ya kitoko, yaka epai na ngai.
Smokva je izbacila prve plodove, vinograd, u cvatu, miriše. Ustani, dragano moja, ljepoto moja i dođi.
14 Ebenga na ngai oyo obombami kati na madusu ya mabanga, kati na madusu ya bangomba, monisa ngai ata elongi na yo mpe sala ete nayoka ata mongongo na yo, pamba te mongongo na yo ezalaka elengi mpe elongi na yo ezalaka kitoko mingi! »
Golubice moja, u spiljama kamenim, u skrovištima vrletnim, daj da ti vidim lice i da ti čujem glas, jer glas je tvoj ugodan i lice je tvoje krasno.”
15 Bokangela biso bambwa ya zamba mpe bana na yango oyo ezali kobebisa bilanga na biso ya vino, pamba te bilanga na biso ya vino ebimisi bafololo.
Pohvatajte lisice, male lisice što oštećuju vinograde, naše vinograde u cvatu.
16 Mobali na ngai ya bolingo azali ya ngai, mpe ngai nazali ya ye; aleisaka bibwele na ye na bilanga oyo etondi na bafololo oyo babengaka lisi.
Dragi moj pripada meni, a ja njemu, on pase među ljiljanima.
17 Mobali na ngai ya bolingo, zonga; awa moyi ebandi kobima mpe molili ekimi, zala lokola mboloko to mwana ya mbuli na bangomba ya Beteli.
Prije nego dan izdahne i sjene se spuste, vrati se, dragi moj: budi lagan kao srna, kao lane na gori Beteru.

< Loyembo ya Salomo 2 >